Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Samwele 12
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Samwele

      • Natane apameli Davidi (1-15a)

      • Mwana ya Bate-sheba akufi (15b-23)

      • Bate-sheba aboti Salomo (24, 25)

      • Davidi abɔtɔli Raba, engumba ya Baamone (26-31)

2 Samwele 12:1

Mitindami

  • +1Ba 1:8; 1Nt 17:1; 29:29
  • +Nz 51:maloba ya ebandeli ya loyembo

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/2010, lok. 30

2 Samwele 12:2

Mitindami

  • +2Sa 5:13; 15:16

2 Samwele 12:3

Mitindami

  • +2Sa 11:3

2 Samwele 12:4

Mitindami

  • +2Sa 11:4

2 Samwele 12:5

Mitindami

  • +Mib 6:13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/2010, lok. 30

2 Samwele 12:6

Mitindami

  • +Kob 22:1

2 Samwele 12:7

Mitindami

  • +1Sa 16:13; 2Sa 7:8
  • +1Sa 18:10, 11; 19:10; 23:14

2 Samwele 12:8

Mitindami

  • +1Sa 13:13, 14; 15:26, 28
  • +2Sa 3:7; 1Ba 2:22
  • +2Sa 2:4; 5:5
  • +2Sa 7:19

2 Samwele 12:9

Mitindami

  • +Kob 20:13
  • +2Sa 11:15, 27
  • +Kob 20:14, 17

2 Samwele 12:10

Mitindami

  • +Mit 14:18; 2Sa 13:32; 18:33; Ga 6:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/2010, lok. 30

2 Samwele 12:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “moninga na yo.”

  • *

    Lil., “na miso ya moi oyo.”

Mitindami

  • +2Sa 12:15, 19; 13:10-15; 15:14
  • +Kob 21:24; Yb 31:9-11; 34:11
  • +2Sa 16:21, 22

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 62

2 Samwele 12:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “liboso ya moi.”

Mitindami

  • +2Sa 11:4, 15

2 Samwele 12:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “atiki lisumu na yo eleka.”

Mitindami

  • +Eb 39:9; Nz 32:5; 38:3; 51:maloba ya ebandeli ya loyembo; 51:4; Mas 28:13
  • +Kob 34:6; Nz 32:1
  • +Le 20:10; Nz 103:10

2 Samwele 12:16

Mitindami

  • +2Sa 12:22; Yon 3:8, 9

2 Samwele 12:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ndako na ye ya bokonzi.”

Mitindami

  • +Rt 3:3; 2Sa 14:2
  • +2Sa 6:17

2 Samwele 12:22

Mitindami

  • +2Sa 12:16; Yoe 1:14
  • +Yis 38:3, 5; Yoe 2:13, 14; Am 5:15; Yon 3:8, 9

2 Samwele 12:23

Mitindami

  • +Mos 9:6
  • +Yb 30:23; Mos 3:20; Mis 2:29, 34; 13:36
  • +Mos 9:5, 10

2 Samwele 12:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Euti na liloba ya Ebre oyo elimboli “kimya.”

Mitindami

  • +2Sa 11:3
  • +1Nt 3:5, 9; 22:9; 28:5; Mt 1:6
  • +2Sa 7:12; 1Nt 29:1

2 Samwele 12:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “moto oyo Yah alingi.”

Mitindami

  • +2Sa 7:4, 5; 12:1; 1Ba 1:8

2 Samwele 12:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “engumba ya bokonzi.”

Mitindami

  • +Mib 3:11; Yos 13:24, 25
  • +Mib 23:3, 6
  • +2Sa 11:25; 1Nt 20:1

2 Samwele 12:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Mbala mosusu elobeli bisika oyo mai ya engumba yango ezalaki kouta.

Mitindami

  • +2Sa 11:1

2 Samwele 12:28

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mpe bakobenga yango na nkombo na ngai.”

2 Samwele 12:30

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ekɔti ya bokonzi.”

  • *

    Talanta moko = 34,2 kg. Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +2Sa 8:11, 12
  • +1Nt 20:2, 3

2 Samwele 12:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “basóka.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/2/2005, lok. 27

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Sa. 12:11Ba 1:8; 1Nt 17:1; 29:29
2 Sa. 12:1Nz 51:maloba ya ebandeli ya loyembo
2 Sa. 12:22Sa 5:13; 15:16
2 Sa. 12:32Sa 11:3
2 Sa. 12:42Sa 11:4
2 Sa. 12:5Mib 6:13
2 Sa. 12:6Kob 22:1
2 Sa. 12:71Sa 16:13; 2Sa 7:8
2 Sa. 12:71Sa 18:10, 11; 19:10; 23:14
2 Sa. 12:81Sa 13:13, 14; 15:26, 28
2 Sa. 12:82Sa 3:7; 1Ba 2:22
2 Sa. 12:82Sa 2:4; 5:5
2 Sa. 12:82Sa 7:19
2 Sa. 12:9Kob 20:13
2 Sa. 12:92Sa 11:15, 27
2 Sa. 12:9Kob 20:14, 17
2 Sa. 12:10Mit 14:18; 2Sa 13:32; 18:33; Ga 6:7
2 Sa. 12:112Sa 12:15, 19; 13:10-15; 15:14
2 Sa. 12:11Kob 21:24; Yb 31:9-11; 34:11
2 Sa. 12:112Sa 16:21, 22
2 Sa. 12:122Sa 11:4, 15
2 Sa. 12:13Eb 39:9; Nz 32:5; 38:3; 51:maloba ya ebandeli ya loyembo; 51:4; Mas 28:13
2 Sa. 12:13Kob 34:6; Nz 32:1
2 Sa. 12:13Le 20:10; Nz 103:10
2 Sa. 12:162Sa 12:22; Yon 3:8, 9
2 Sa. 12:20Rt 3:3; 2Sa 14:2
2 Sa. 12:202Sa 6:17
2 Sa. 12:222Sa 12:16; Yoe 1:14
2 Sa. 12:22Yis 38:3, 5; Yoe 2:13, 14; Am 5:15; Yon 3:8, 9
2 Sa. 12:23Mos 9:6
2 Sa. 12:23Yb 30:23; Mos 3:20; Mis 2:29, 34; 13:36
2 Sa. 12:23Mos 9:5, 10
2 Sa. 12:242Sa 11:3
2 Sa. 12:241Nt 3:5, 9; 22:9; 28:5; Mt 1:6
2 Sa. 12:242Sa 7:12; 1Nt 29:1
2 Sa. 12:252Sa 7:4, 5; 12:1; 1Ba 1:8
2 Sa. 12:26Mib 3:11; Yos 13:24, 25
2 Sa. 12:26Mib 23:3, 6
2 Sa. 12:262Sa 11:25; 1Nt 20:1
2 Sa. 12:272Sa 11:1
2 Sa. 12:302Sa 8:11, 12
2 Sa. 12:301Nt 20:2, 3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Samwele 12:1-31

Mokanda ya mibale ya Samwele

12 Na yango, Yehova atindaki Natane+ epai ya Davidi. Natane akɔtaki epai na ye+ mpe alobaki ete: “Bato mibale bazalaki kofanda na engumba moko, moko azalaki mozwi mpe mosusu azalaki mobola. 2 Mozwi azalaki na bampate mpe bangɔmbɛ ebele mpenza;+ 3 kasi mobola azalaki na eloko te kaka mwana-mpate moko ya mwasi ya moke, oyo asombaki.+ Azalaki kobɔkɔla yango, mpe mpate yango ezalaki kokola esika moko na bana ya mobola yango. Ezalaki kolya mwa bilei moke ya mobola yango, komɛla na kɔpɔ na ye mpe kolala na mabɔkɔ na ye. Ekómaki lokola mwana na ye ya mwasi. 4 Mokolo moko, mopaya moko ayaki epai ya mozwi. Kasi na esika ete mozwi yango azwa moko ya bampate to ya bangɔmbɛ na ye mpo alambela moto ya mobembo oyo ayaki epai na ye, azwaki nde mwana-mpate ya mobola wana mpe alambelaki mopaya yango.”+

5 Na yango, Davidi asilikaki makasi mpo na moto yango, mpe alobaki na Natane ete: “Lokola Yehova azali solo na bomoi,+ moto oyo asali bongo abongi na liwa! 6 Mpe asengeli kofuta mbala minei mpo na mwana-mpate yango,+ mpo asali likambo ya boye mpe ayoki ata mawa te.”

7 Bongo Natane alobaki na Davidi ete: “Moto yango ezali nde yo! Talá oyo Yehova, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Ngai nde natyaki yo mafuta mpo ozala mokonzi ya Yisraele,+ mpe nabikisaki yo na lobɔkɔ ya Saulo.+ 8 Napesaki yo ndako ya nkolo na yo+ mpe basi ya nkolo na yo,+ mpe nakómisaki yo mokonzi ya Yisraele mpe ya Yuda.+ Mpe soki nyonso wana ekokaki te, nalingaki kosalela yo makambo mosusu mingi.+ 9 Mpo na nini otyoli liloba ya Yehova mpe osali oyo ezali mabe na miso na ye? Obomi Uria Mohiti na mopanga!+ Mpe ozwi mwasi na ye mpo akóma mwasi na yo+ nsima ya koboma ye na mopanga ya Baamone.+ 10 Sikoyo, mopanga ekolongwa na ndako na yo soki moke te,+ mpo otyoli ngai ndenge ozwi mwasi ya Uria Mohiti mpe okómisi ye mwasi na yo.’ 11 Yoká oyo Yehova alobi: ‘Talá, nazali kobimisela yo mpasi oyo ekouta na libota na yo moko.+ Nakozwa basi na yo na miso na yo moko mpe nakopesa bango moto mosusu,*+ mpe akolala na bango na miso ya bato nyonso.*+ 12 Atako yo osalaki likambo yango na kobombana,+ ngai nakosala yango na moi,* liboso ya Yisraele mobimba.’”

13 Bongo Davidi alobaki na Natane ete: “Nasaleli Yehova lisumu.”+ Natane ayanolaki Davidi ete: “Yehova mpe alimbisi lisumu na yo.*+ Okokufa te.+ 14 Atako bongo, lokola ozangi mpenza limemya epai ya Yehova na likambo oyo, mwana oyo mwasi yango auti kobotela yo, akokufa solo.”

15 Na nsima, Natane azongaki na ndako na ye.

Mpe Yehova abɛlisaki mwana oyo mwasi ya Uria abotelaki Davidi maladi makasi. 16 Davidi abondelaki Nzambe ya solo mpo abikisa mwana yango. Davidi akilaki mpenza bilei mpe azalaki kozonga na ndako, azalaki kolala na mabele butu mobimba.+ 17 Bongo bankulutu ya ndako ya mokonzi batɛlɛmaki pene na ye mpe bamekaki kolongola ye na mabele, kasi aboyaki kotɛlɛma mpe kolya elongo na bango. 18 Na mokolo ya nsambo, mwana yango akufaki, kasi basaleli ya Davidi bazalaki kobanga koyebisa ye ete mwana akufi. Bazalaki koloba ete: “Ntango mwana yango azalaki na bomoi, tolobaki na ye, kasi ayokaki biso te. Sikoyo ndenge nini tokoyebisa ye ete mwana yango akufi? Akoya komisala mabe.”

19 Ntango Davidi amonaki ete basaleli na ye bazali kosolola bango na bango na mongongo ya nse, asosolaki ete mwana akufi. Bongo Davidi atunaki basaleli na ye: “Mwana akufi?” Bayanolaki: “Ɛɛ, akufi.” 20 Bongo Davidi alongwaki na mabele. Asukolaki mpe apakolaki mafuta,+ alataki bilamba mosusu, akendaki na ndako+ ya Yehova, mpe afukamaki. Na nsima, akendaki na ndako na ye,* asɛngaki biloko ya kolya, mpe alyaki. 21 Basaleli na ye balobaki na ye ete: “Mpo na nini osali boye? Ntango mwana azalaki na bomoi, okilaki bilei mpe ozalaki se kolela; kasi ntango kaka mwana yango akufi, otɛlɛmi mpe obandi kolya.” 22 Ayanolaki: “Ntango mwana azalaki na bomoi, nakilaki bilei+ mpe nazalaki se kolela, mpo namilobaki: ‘Nani ayebi soki Yehova akomonisela ngai boboto, mpe akotika mwana na bomoi?’+ 23 Sikoyo lokola akufi, mpo na nini nakila lisusu bilei? Nakoki nde kozongisa ye na bomoi?+ Nakokende epai na ye,+ kasi ye akozonga epai na ngai te.”+

24 Bongo Davidi abɔndisaki mwasi na ye Bate-sheba.+ Akɔtaki epai na ye mpe alalaki na ye. Na nsima, Bate-sheba abotaki mwana mobali mpe bapesaki ye nkombo Salomo.*+ Yehova alingaki mwana yango,+ 25 mpe atindaki maloba na nzela ya mosakoli Natane+ ete bápesa ye nkombo Yedidia,* mpo Yehova alingaki ye.

26 Nzokande Yoabe akobaki kobundisa Raba+ ya Baamone,+ mpe abɔtɔlaki engumba ya mokonzi.*+ 27 Na yango, Yoabe atindelaki Davidi bamemi-nsango mpe alobaki: “Nabundisi Raba,+ mpe nabɔtɔli engumba ya mai.* 28 Sikoyo, yanganisá basoda oyo batikali mpe tyá kaa mpo na kobundisa engumba yango mpe kobɔtɔla yango. Soki te, ngai moto nakobɔtɔla engumba yango mpe lokumu ekozonga epai na ngai.”*

29 Na yango, Davidi ayanganisaki basoda nyonso; akendaki na Raba, abundisaki engumba yango, mpe azwaki yango. 30 Bongo azwaki motole* oyo ezali na motó ya Malakame. Kilo na yango ezalaki talanta moko* ya wolo, mpe ezalaki na mabanga ya ntalo; mpe batyaki yango na motó ya Davidi. Azwaki mpe biloko ebele oyo bapunzaki+ na engumba yango.+ 31 Abimisaki bato oyo bazalaki na engumba yango, mpe apesaki bango mosala ya kokata mabanga na sii, ya kosalela bisaleli ya ebende oyo epeli makasi, misala ya kosala na bipasola* ya ebende mpe ya kosala babriki. Davidi asalaki bongo na bingumba nyonso ya Baamone. Nsukansuka, Davidi ná basoda nyonso bazongaki na Yerusaleme.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto