Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 14
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Mitángo

      • Bato bazali na mposa ya kozonga na Ezipito (1-10)

        • Yosua ná Kalebe bapesi nsango ya malamu (6-9)

      • Nkanda ya Yehova; Moize abondeli mpo na bato (11-19)

      • Etumbu: Mbula 40 na esobe (20-38)

      • Baamaleke balongi Yisraele (39-45)

Mitángo 14:1

Mitindami

  • +Mib 1:32, 33

Mitángo 14:2

Mitindami

  • +Mib 1:27; Nz 106:25

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2006, lok. 15

Mitángo 14:3

Mitindami

  • +Nz 78:40
  • +Mit 14:31; Mib 1:39
  • +Mit 11:5

Mitángo 14:4

Mitindami

  • +Ne 9:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2011, nk. 25-26

Mitángo 14:6

Mitindami

  • +Mit 13:8, 16
  • +Mit 13:6, 16; 14:30

Mitángo 14:7

Mitindami

  • +Mit 13:26, 27; Mib 1:25; 8:7, 8

Mitángo 14:8

Mitindami

  • +Kob 3:8

Mitángo 14:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mpo bazali limpa mpo na biso.”

Mitindami

  • +Mib 7:17, 18; 20:3
  • +Kob 33:16; Mib 20:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2006, lok. 17

Mitángo 14:10

Mitindami

  • +Kob 17:4
  • +Kob 16:10

Mitángo 14:11

Mitindami

  • +Kob 16:28; Mit 14:22, 23
  • +Mib 9:23; Ebr 3:19

Mitángo 14:12

Mitindami

  • +Kob 32:10

Mitángo 14:13

Mitindami

  • +Kob 32:12; Ezk 20:9

Mitángo 14:14

Mitindami

  • +Kob 15:13, 14; Yos 2:10; 5:1
  • +Mib 4:12; 5:4
  • +Kob 13:21; Nz 78:14

Mitángo 14:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “lokola moto moko.”

Mitángo 14:16

Mitindami

  • +Mib 9:28

Mitángo 14:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “boboto monene.”

Mitindami

  • +Nz 103:8; Mik 7:18
  • +Kob 34:6, 7

Mitángo 14:19

Mitindami

  • +Kob 34:9; Nz 78:38

Mitángo 14:20

Mitindami

  • +Yk 5:16

Mitángo 14:21

Mitindami

  • +Nz 72:19; Hab 2:14

Mitángo 14:22

Mitindami

  • +Ne 9:17
  • +Kob 17:2; Nz 95:9; 106:14; Ebr 3:16
  • +Nz 81:11

Mitángo 14:23

Mitindami

  • +Mit 26:63, 64; 32:11; Mib 1:35; Nz 95:11; 106:26; Ebr 3:18; 4:3

Mitángo 14:24

Mitindami

  • +Mit 13:30; 26:65
  • +Yos 14:9, 14

Mitángo 14:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “lobwaku patatalu.”

Mitindami

  • +Mit 13:29
  • +Mib 1:40

Mitángo 14:27

Mitindami

  • +Kob 16:28; Mit 14:11
  • +1Ko 10:6, 10

Mitángo 14:28

Mitindami

  • +Mit 14:2; 26:64; 32:11; Mib 1:35

Mitángo 14:29

Mitindami

  • +Nz 106:26; 1Ko 10:5; Ebr 3:17
  • +Mit 1:45, 46; Yd 5

Mitángo 14:30

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “natombolaki lobɔkɔ na ngai.”

Mitindami

  • +Kob 6:8
  • +Mit 26:65; 32:11, 12; Mib 1:34-38

Mitángo 14:31

Mitindami

  • +Mit 14:3; Mib 1:39
  • +Nz 106:24

Mitángo 14:33

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bondumba.”

Mitindami

  • +Mit 32:13; Yos 14:10
  • +Mib 1:3; 2:14

Mitángo 14:34

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kozwa ngai lokola monguna.”

Mitindami

  • +Mit 13:25
  • +Nz 95:10; Mis 7:36; 13:18

Mitángo 14:35

Mitindami

  • +Mit 14:29; Ebr 3:17

Mitángo 14:36

Mitindami

  • +Mit 13:32

Mitángo 14:37

Mitindami

  • +1Ko 10:6, 10; Yd 5

Mitángo 14:38

Mitindami

  • +Mit 14:30; 26:65; 32:11, 12; Mib 1:35, 36; Yos 14:6

Mitángo 14:40

Mitindami

  • +Mib 1:41

Mitángo 14:42

Mitindami

  • +Le 26:14, 17; Mib 1:42

Mitángo 14:43

Mitindami

  • +Mit 13:29
  • +2Nt 15:2

Mitángo 14:44

Mitindami

  • +Mib 1:43
  • +Mit 10:33

Mitángo 14:45

Mitindami

  • +Mit 21:1, 3; Mib 1:44

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mit. 14:1Mib 1:32, 33
Mit. 14:2Mib 1:27; Nz 106:25
Mit. 14:3Nz 78:40
Mit. 14:3Mit 14:31; Mib 1:39
Mit. 14:3Mit 11:5
Mit. 14:4Ne 9:17
Mit. 14:6Mit 13:8, 16
Mit. 14:6Mit 13:6, 16; 14:30
Mit. 14:7Mit 13:26, 27; Mib 1:25; 8:7, 8
Mit. 14:8Kob 3:8
Mit. 14:9Mib 7:17, 18; 20:3
Mit. 14:9Kob 33:16; Mib 20:1
Mit. 14:10Kob 17:4
Mit. 14:10Kob 16:10
Mit. 14:11Kob 16:28; Mit 14:22, 23
Mit. 14:11Mib 9:23; Ebr 3:19
Mit. 14:12Kob 32:10
Mit. 14:13Kob 32:12; Ezk 20:9
Mit. 14:14Kob 15:13, 14; Yos 2:10; 5:1
Mit. 14:14Mib 4:12; 5:4
Mit. 14:14Kob 13:21; Nz 78:14
Mit. 14:16Mib 9:28
Mit. 14:18Nz 103:8; Mik 7:18
Mit. 14:18Kob 34:6, 7
Mit. 14:19Kob 34:9; Nz 78:38
Mit. 14:20Yk 5:16
Mit. 14:21Nz 72:19; Hab 2:14
Mit. 14:22Ne 9:17
Mit. 14:22Kob 17:2; Nz 95:9; 106:14; Ebr 3:16
Mit. 14:22Nz 81:11
Mit. 14:23Mit 26:63, 64; 32:11; Mib 1:35; Nz 95:11; 106:26; Ebr 3:18; 4:3
Mit. 14:24Mit 13:30; 26:65
Mit. 14:24Yos 14:9, 14
Mit. 14:25Mit 13:29
Mit. 14:25Mib 1:40
Mit. 14:27Kob 16:28; Mit 14:11
Mit. 14:271Ko 10:6, 10
Mit. 14:28Mit 14:2; 26:64; 32:11; Mib 1:35
Mit. 14:29Nz 106:26; 1Ko 10:5; Ebr 3:17
Mit. 14:29Mit 1:45, 46; Yd 5
Mit. 14:30Kob 6:8
Mit. 14:30Mit 26:65; 32:11, 12; Mib 1:34-38
Mit. 14:31Mit 14:3; Mib 1:39
Mit. 14:31Nz 106:24
Mit. 14:33Mit 32:13; Yos 14:10
Mit. 14:33Mib 1:3; 2:14
Mit. 14:34Mit 13:25
Mit. 14:34Nz 95:10; Mis 7:36; 13:18
Mit. 14:35Mit 14:29; Ebr 3:17
Mit. 14:36Mit 13:32
Mit. 14:371Ko 10:6, 10; Yd 5
Mit. 14:38Mit 14:30; 26:65; 32:11, 12; Mib 1:35, 36; Yos 14:6
Mit. 14:40Mib 1:41
Mit. 14:42Le 26:14, 17; Mib 1:42
Mit. 14:43Mit 13:29
Mit. 14:432Nt 15:2
Mit. 14:44Mib 1:43
Mit. 14:44Mit 10:33
Mit. 14:45Mit 21:1, 3; Mib 1:44
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
  • 40
  • 41
  • 42
  • 43
  • 44
  • 45
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Mitángo 14:1-45

Mitángo

14 Bongo liyangani mobimba etombolaki mongongo, mpe bato bakobaki koganga mpe kolela butu wana mobimba.+ 2 Bayisraele nyonso babandaki koimaima mpo na Moize mpe Arona,+ mpe liyangani mobimba elobaki na bango ete: “Soki tókufaka ata na mokili ya Ezipito, to soki tókufaka ata na esobe oyo! 3 Mpo na nini Yehova azali komema biso na mokili oyo mpo tókwea na mopanga?+ Basi na biso ná bana na biso bakokóma biloko ya kopunza.+ Ekoleka malamu te tózonga na biso na Ezipito?”+ 4 Bazalaki kutu kolobana ete: “Tópona mokambi, mpe tózonga na Ezipito!”+

5 Na yango, Moize ná Arona bakweaki bilongi na nse liboso ya lisangá mobimba ya Bayisraele, oyo eyanganaki wana. 6 Yosua+ mwana ya Nunu ná Kalebe+ mwana ya Yefune, oyo bazalaki na kati ya baoyo banɔngaki mokili yango, bapasolaki bilamba na bango, 7 mpe balobaki na liyangani mobimba ya Bayisraele boye: “Mokili oyo tokendaki konɔnga, ezali mokili moko ya malamu mingi, mingi mpenza.+ 8 Soki Yehova asepeli na biso, akokɔtisa mpenza biso na mokili oyo mpe akopesa biso yango, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+ 9 Kasi bosengeli te kotombokela Yehova, mpe bosengeli te kobanga bato ya mokili yango,+ mpo tokolonga bango mpenza.* Bazali lisusu na libateli te mpe Yehova azali elongo na biso.+ Bóbanga bango te.”

10 Nzokande, liyangani mobimba elobaki ete bábamba bango mabanga.+ Kasi nkembo ya Yehova emonanaki likoló ya hema ya kokutana liboso ya bato nyonso ya Yisraele.+

11 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Tii ntango nini bato oyo bakozanga limemya epai na ngai,+ mpe tii ntango nini bakondimela ngai te atako bilembo nyonso oyo nasalaki na kati na bango?+ 12 Tiká natindela bango maladi mabe mpe nabengana bango, mpe nakómisa yo ekólo moko monene mpe ya makasi koleka bango.”+

13 Kasi Moize alobaki na Yehova ete: “Na nguya na yo obimisaki bato na yo na Ezipito. Ntango Baezipito bakoyoka yango,+ 14 bakoyebisa yango bato oyo bafandi na mokili oyo. Bango mpe bayoká ete yo, Yehova, ozali kati na bato oyo,+ mpe omonanaki epai na bango boye na miso.+ Ozali Yehova, mpe lipata na yo ezali kotɛlɛma likoló na bango, mpe ozali kotambola liboso na bango na kati ya likonzí ya lipata na moi mpe na kati ya likonzí ya mɔtɔ na butu.+ 15 Soki obomi bato oyo nyonso mbala moko,* bato ya bikólo oyo bayokaki nsango ya lokumu na yo bakoloba ete: 16 ‘Yehova azalaki na likoki te ya kokɔtisa bato oyo na mokili oyo alapelaki bango ndai ete akopesa bango, yango wana abomaki bango na esobe.’+ 17 Sikoyo, nabondeli yo, Yehova, tiká nguya na yo ezala monene, kaka ndenge opesaki elaka, ntango olobaki ete: 18 ‘Yehova, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na bolingo ya sembo,*+ alimbisaka libunga ná kobuka mibeko, kasi akozanga ata moke te kopesa basali mabe etumbu, mpe mpo na libunga ya batata, ayeisaka etumbu na bana mpe bana ya bana, na libota ya misato mpe na libota ya minei.’+ 19 Nabondeli yo, limbisá libunga ya bato oyo na kotalela bonene ya bolingo ya sembo na yo, kaka ndenge olimbisaki bato oyo kobanda na Ezipito tii sikoyo.”+

20 Bongo Yehova alobaki ete: “Nalimbisi bango ndenge olobi.+ 21 Kasi, lokola nazali solo na bomoi, mabele mobimba ekotonda na nkembo ya Yehova.+ 22 Kasi, mpo na bato oyo bamoni nkembo na ngai mpe bilembo+ na ngai oyo nasali na Ezipito mpe na esobe mpe atako bongo bazali kaka komeka ngai+ mbala zomi oyo, mpe bayoki te mongongo na ngai,+ moko te na kati na bango 23 akomona ata moke mokili oyo nalapelaki batata na bango ndai. Te, ata moto moko te na kati ya baoyo bazali kozanga limemya epai na ngai, akomona yango.+ 24 Kasi, lokola mosaleli na ngai Kalebe+ azalaki na makanisi ya ndenge mosusu mpe atosaki ngai na motema na ye mobimba, nakokɔtisa ye mpenza na mokili epai akendaki, mpe bana na ye bakozwa yango.+ 25 Lokola Baamaleke ná Bakanana+ bazali kofanda na lobwaku,* lobi bóbaluka, mpe bókende na esobe na nzela ya Mbu Motane.”+

26 Yehova alobaki lisusu na Moize mpe na Arona ete: 27 “Tii ntango nini liyangani mabe oyo ekokoba koimaima mpo na ngai?+ Nayoki ndenge Bayisraele bazali koimaima mpo na ngai.+ 28 Lobá na bango boye: ‘“Lokola nazali solo na bomoi,” yango nde liloba ya Yehova, “nakosalela bino kaka ndenge nayoki bino bozali koloba!+ 29 Na esobe oyo, bibembe na bino ekolala,+ ɛɛ, motángo mobimba ya baoyo nyonso bakomisamaki nkombo kobanda na mbula 20 to koleka, bino nyonso bato oyo boimaimaki mpo na ngai.+ 30 Moto moko te na kati na bino akokɔta na mokili oyo nalapaki ndai* ete nakopesa bino bófanda,+ longola kaka Kalebe mwana ya Yefune mpe Yosua mwana ya Nunu.+

31 “‘“Mpe nakokɔtisa bana na bino na mokili yango, oyo bolobaki ete bakokóma eloko ya kopunza,+ mpe bakoyeba mokili oyo bino boboyi.+ 32 Kasi bibembe na bino moko ekolala na esobe oyo. 33 Sikoyo, bana na bino bakokóma babateli ya mpate na esobe mbula 40,+ mpe bakozongisa monɔkɔ mpo na misala na bino ya kozanga bosembo* tii ebembe ya nsuka na bibembe na bino ekolala na esobe.+ 34 Na kolanda motángo ya mikolo oyo bonɔngaki mokili yango, mikolo 40,+ mokolo moko mpo na mbula moko, mokolo moko mpo na mbula moko, bokozongisa monɔkɔ mpo na mabunga na bino mbula 40.+ Bongo, bokoyeba ete kotɛmɛla ngai* ezali mabe mpenza.

35 “‘“Ngai Yehova nalobi. Tála likambo nakosala na liyangani mobimba oyo ya mabe, baoyo bayanganaki mpo na kotɛmɛla ngai: Na esobe oyo, bakosila mpe bakokufa awa.+ 36 Mibali oyo Moize atindaki mpo na konɔnga mokili mpe oyo basalaki ete liyangani mobimba eimaima mpo na ye, mpo ntango bazongaki bapesaki nsango ya mabe mpo na mokili yango,+ 37 ɛɛ, mibali oyo bapesaki nsango mabe na ntina na mokili yango, bakozwa etumbu mpe bakokufa liboso ya Yehova.+ 38 Kasi Yosua mwana ya Nunu mpe Kalebe mwana ya Yefune, oyo bazalaki na kati ya mibali oyo bakendaki konɔnga mokili yango, bakokoba mpenza kozala na bomoi.”’”+

39 Ntango Moize ayebisaki Bayisraele nyonso maloba yango, bato babandaki kolela mingi mpenza. 40 Lisusu, balamukaki ntɔngɔntɔngɔ mpe bamekaki komata na nsɔngɛ ya ngomba mpe balobaki ete: “Tosali lisumu. Kasi sikoyo, tozali pene ya komata na esika oyo Yehova alobelaki.”+ 41 Kasi Moize alobaki ete: “Mpo na nini bozali kotosa te etinda ya Yehova? Bokolonga te. 42 Bómata te, mpo Yehova azali elongo na bino te; mpe banguna na bino bakolonga bino.+ 43 Mpo Baamaleke ná Bakanana bazali kuna liboso na bino,+ mpe bokokwea na mopanga. Lokola bopesaki Yehova mokɔngɔ, Yehova akozala elongo na bino te.”+

44 Nzokande, na lofundo nyonso bamataki na nsɔngɛ ya ngomba yango,+ kasi sanduku ya kondimana ya Yehova ná Moize balongwaki te na katikati ya kaa.+ 45 Bongo Baamaleke ná Bakanana oyo bazalaki kofanda na ngomba yango, bakitaki mpe babɛtaki bango mpe bapanzaki bango tii na Horoma.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto