Nzembo
Epai ya mokambi ya nzembo. Ya bana ya Kora.+ Mondule.
47 Bino nyonso bato ya bikólo, bóbɛta mabɔkɔ.
Bóganga mpo na Nzambe na koganga ya bolongi mpe ya esengo.
6 Bóyemba mpo na kosanzola* Nzambe, bóyemba mpo na kosanzola.
Bóyemba mpo na kosanzola Mokonzi na biso, bóyemba mpo na kosanzola.
8 Nzambe akómi Mokonzi ya bikólo.+
Nzambe afandi na kiti mosantu ya bokonzi na ye.
9 Bakambi ya bato ya bikólo bayangani
Ná bato ya Nzambe ya Abrahama.
Mpo bakambi* ya mabele bazali ya Nzambe.
Atombwami likoló mingi mpenza.+