Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika Na kati ya 2 Samwele 2 SAMWELE MAKAMBO OYO EZALI NA KATI 1 Davidi ayoki nsango ya liwa ya Saulo (1-16) Davidi asali loyembo mpo na kolela Saulo ná Yonatane (17-27) 2 Davidi akómi mokonzi ya Yuda (1-7) Ishi-boshete akómi mokonzi ya Yisraele (8-11) Etumba kati na ndako ya Davidi mpe ndako ya Saulo (12-32) 3 Ndako ya Davidi ezali se kokóma makasi (1) Bana ya Davidi ya mibali (2-5) Abinere akómi na ngámbo ya Davidi (6-21) Yoabe abomi Abinere (22-30) Davidi asali matánga mpo na Abinere (31-39) 4 Babomi Ishi-boshete (1-8) Davidi abomisi bato oyo babomi Ishi-boshete (9-12) 5 Davidi akómi mokonzi ya Yisraele mobimba (1-5) Yerusaleme ezwami (6-16) Siona, Sité ya Davidi (7) Davidi alongi Bafilistia (17-25) 6 Bamemi Sanduku ya kondimana na Yerusaleme (1-23) Uza asimbi Sanduku mpe Nzambe abomi ye (6-8) Mikale atyoli Davidi (16, 20-23) 7 Davidi akotonga tempelo te (1-7) Kondimana ná Davidi mpo na bokonzi (8-17) Davidi abondeli Nzambe mpo na kopesa ye matɔndi (18-29) 8 Bitumba oyo Davidi alongaki (1-14) Bakonzi na boyangeli ya Davidi (15-18) 9 Davidi amoniseli Mefiboshete bolingo ya sembo (1-13) 10 Balongi Baamone mpe bato ya Siri (1-19) 11 Davidi asali ekobo ná Bate-sheba (1-13) Davidi abomisi Uriya (14-25) Davidi abali Bate-sheba (26, 27) 12 Natane apameli Davidi (1-15a) Mwana ya Bate-sheba akufi (15b-23) Bate-sheba aboti Salomo (24, 25) Davidi abɔtɔli Raba, engumba ya Baamone (26-31) 13 Aminone abebisi Tamara (1-22) Abisalome abomi Aminone (23-33) Abisalome akimi na Geshure (34-39) 14 Yoabe mpe mwasi moko ya Tekoa (1-17) Davidi ayebi mayele mabe ya Yoabe (18-20) Abisalome azwi ndingisa ya kozonga (21-33) 15 Abisalome asaleli mokonzi likita mpe atombokeli ye (1-12) Davidi akimi Yerusaleme (13-30) Ahitofele akómi na ngámbo ya Abisalome (31) Batindi Hushai akende kobebisa toli ya Ahitofele (32-37) 16 Ziba akoseli Mefiboshete makambo (1-4) Shimei alakeli Davidi mabe (5-14) Hushai akei epai ya Abisalome (15-19) Toli ya Ahitofele (20-23) 17 Hushai atɛmɛli toli ya Ahitofele (1-14) Bakebisi Davidi; akimi Abisalome (15-29) Barazilai ná mibali mosusu bamemeli Davidi biloko (27-29) 18 Abisalome alongi te, mpe akufi (1-18) Davidi ayoki nsango ya liwa ya Abisalome (19-33) 19 Davidi aleli Abisalome (1-4) Yoabe apameli Davidi (5-8a) Davidi azongi na Yerusaleme (8b-15) Shimei asɛngi bolimbisi (16-23) Eyebani ete Mefiboshete azali na likambo te (24-30) Davidi apesi Barazilai lokumu (31-40) Kowelana kati na mabota (41-43) 20 Botomboki ya Sheba; Yoabe abomi Amasa (1-13) Balandi Sheba mpe bakati ye motó (14-22) Bakonzi na boyangeli ya Davidi (23-26) 21 Bagibeone bazongiseli libota ya Saulo mabe (1-14) Bitumba ná Bafilistia (15-22) 22 Davidi akumisi Nzambe mpo abikisi ye (1-51) “Yehova azali libanga na ngai” (2) Yehova azalaka sembo epai ya bato ya sembo (26) 23 Maloba ya nsuka ya Davidi (1-7) Makambo minene oyo bilombe ya etumba ya Davidi basalaki (8-39) 24 Davidi asali lisumu ya kotánga bato (1-14) Maladi mabe ebomi bato 70 000 (15-17) Davidi atongi etumbelo (18-25) Aboyi kopesa mbeka na biloko ya ofele (24)