Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika Na kati ya Zekaria ZEKARIA MAKAMBO OYO EZALI NA KATI 1 Basɛngi bato bázongela Yehova (1-6) ‘Bózongela ngai mpe ngai nakozongela bino’ (3) Emonaneli 1: Batambwisi-mpunda minei (7-17) “Yehova akobɔndisa lisusu Siona” (17) Emonaneli 2: Maseke minei mpe bato minei oyo basalaka misala ya mabɔkɔ (18-21) 2 Emonaneli 3: Mobali moko oyo azali na nsinga ya komeka (1-13) Bakomeka Yerusaleme (2) Yehova akokóma “efelo ya mɔtɔ zingazinga na yango” (5) Oyo asimbi bino asimbi mbuma ya liso ya Nzambe (8) Bikólo mingi ekoya epai ya Yehova (11) 3 Emonaneli 4: Balatisi nganga-nzambe monene bilamba mosusu (1-10) Satana atɛmɛli Nganga-nzambe monene Yosua (1) ‘Nakobimisa mosaleli na ngai Molona oyo ebimi!’ (8) 4 Emonaneli 5: Etɛlɛmiselo ya miinda mpe banzete mibale ya olive (1-14) “Na nguya ya moto te, kasi na elimo na ngai” (6) Kotyola te mokolo oyo makambo ebandaki mokemoke (10) 5 Emonaneli 6: Rulo ezali kopumbwa (1-4) Emonaneli 7: Kitunga ya efa (5-11) Na kati na yango, ezali na mwasi moko nkombo na ye Mabe (8) Kitunga ememami na Shinare (9-11) 6 Emonaneli 8: Makalo minei (1-8) Mwa nzete ya sika akozala mokonzi mpe nganga-nzambe (9-15) 7 Yehova aboyi kokila bilei ya bokosi (1-14) “Bokilaki mpenza bilei mpo na ngai?” (5) ‘Bósalelanaka makambo na bosembo, na bolingo ya sembo mpe na motema mawa’ (9) 8 Yehova apesi Siona kimya mpe solo (1-23) Yerusaleme, “engumba ya bosolo” (3) “Bólobanaka solo kati na bino” (16) Kokila bilei ebongwani fɛti (18, 19) ‘Tókende mpenza koluka Yehova’ (21) Bato zomi basimbi elamba ya Moyuda moko (23) 9 Etumbu ya Nzambe na bikólo ya pembenipembeni (1-8) Koya ya mokonzi ya Siona (9, 10) Mokonzi moko ya komikitisa azali kotambola na mpunda (9) Bato ya Yehova bakosikolama (11-17) 10 Bósɛnga nde Yehova mbula, kasi banzambe ya lokuta te (1, 2) Yehova asangisi bato na ye (3-12) Moto monene auti na kati ya bato ya Yuda (3, 4) 11 Mbuma mabe ya koboya mobateli ya mpate ya solo ya Nzambe (1-17) “Batelá bampate oyo esengeli kobomama” (4) Mwa banzete mibale: Kosepelisa mpe Bomoko (7) Lifuti ya mobateli ya mpate: Mbongo ya bibende 30 ya palata (12) Mbongo ebwakami na esika ya kobomba mosolo (13) 12 Yehova akokɔtela Yuda mpe Yerusaleme (1-9) Yerusaleme, “libanga moko ya kilo” (3) Koganga na kolela moto oyo batɔbɔli (10-14) 13 Kolongolama ya bikeko mpe ya basakoli ya lokuta (1-6) Basakoli ya lokuta bakoyoka nsɔni (4-6) Mobateli ya mpate akobɛtama (7-9) Ndambo ya misato ekopɛtolama (9) 14 Losambo ya solo ekolonga mpenza (1-21) Ngomba ya Olive ekopasuka na katikati (4) Yehova akozala moko, mpe nkombo na ye moko (9) Mpasi oyo ekokómela banguna ya Yerusaleme (12-15) Kosala fɛti ya mwa Bandako ya matiti (16-19) Nzungu nyonso ekozala mosantu mpo na Yehova (20, 21)