NEHEMIA
1 Maloba ya Nehemia*+ mwana ya Hakalia: Na sanza ya Kisleve,* na mbula ya 20,* ntango nazalaki na Shushane*+ ndako makasi,* 2 Hanani,+ moko ya bandeko na ngai, ayaki elongo na mibali mosusu ya Yuda. Natunaki bango nsango ya Bayuda oyo batikalaki, bakangami oyo babikaki mpe bazongaki na mboka,+ mpe lisusu nsango ya Yerusaleme. 3 Bayanolaki ngai boye: “Bakangami oyo babikaki, oyo batikali kuna na etúká,* bazali na mpasi mpenza mpe na nsɔni.+ Bifelo ya Yerusaleme ebukanibukani+ mpe baporte na yango etumbami na mɔtɔ.”+
4 Ntango kaka nayokaki maloba wana, nafandaki mpe nabandaki kolela. Nazalaki na mawa makasi mikolo ebele, nakilaki bilei+ mpe nabondelaki Nzambe ya likoló. 5 Nalobaki: “Ee Yehova, Nzambe ya likoló, Nzambe monene mpe ya nsɔmɔ, oyo abatelaka kondimana na ye mpe amonisaka bolingo ya sembo epai ya baoyo balingaka ye mpe batosaka mitindo na ye,+ 6 nabondeli yo, tiká litoi na yo etya likebi mpe tiká miso na yo emona. Yoká libondeli na ngai mosaleli na yo, oyo nazali kobondela yo lelo, butu moi,+ mpo na basaleli na yo Bayisraele, mpe nazali koyambola masumu oyo bato ya ekólo Yisraele basaleli yo. Tosali lisumu, ngai ná bato ya ekólo na ngai.*+ 7 Ya solo, tosaleli yo mabe mingi+ na ndenge totosaki te mitindo, malako ná bikateli ya lisambisi oyo opesaki mosaleli na yo Moize.+
8 “Nabondeli yo, kanisá mitindo* oyo opesaki mosaleli na yo Moize ete: ‘Soki bozangi bosembo, nakopalanganisa bino na kati ya bato ya bikólo.+ 9 Kasi soki bozongeli ngai, bolandi mitindo na ngai mpe botosi yango, ata soki bopalangani tii na nsuka ya likoló, nakoyanganisa bino+ banda kuna mpe nakoya na bino na esika oyo naponaki mpo nkombo na ngai efanda wana.’+ 10 Bazali basaleli na yo mpe bato na yo, oyo osikolaki na nguya na yo monene mpe na lobɔkɔ na yo ya nguya.+ 11 Ee, Yehova, nabondeli yo, tiká litoi na yo etya likebi na libondeli na ngai mosaleli na yo mpe na libondeli ya basaleli na yo oyo basepelaka kobanga nkombo na yo. Nabondeli yo, pesá ngai mosaleli na yo elonga lelo mpe tiká ete mokonzi ayokela ngai mawa.”+
Na ntango yango nazalaki mopesi-masanga ya mokonzi.+
2 Na sanza ya Nisana,* na mbula ya 20+ ya boyangeli ya Mokonzi Artazerezese,+ vinyo etyamaki liboso na ye, mpe lokola momeseno, nazwaki vinyo mpe napesaki yango mokonzi.+ Kasi nazalaki na mawa mingi, naino namonaná mawamawa bongo te liboso na ye. 2 Bongo mokonzi atunaki ngai: “Mpo na nini ozali mawamawa boye, nzokande ozali maladi te? Boye motema na yo nde ezali na mawa.” Ntango nayokaki bongo, nabangaki mingi.
3 Bongo nalobaki na mokonzi: “Mokonzi azala na bomoi! Ndenge nini nakozala mawamawa te, awa engumba, esika bakundá bankɔkɔ na ngai, ebebibebi mpe baporte na yango etumbami na mɔtɔ?”+ 4 Na yango mokonzi atunaki ngai: “Mposa na yo ezali nini?” Na mbala moko nabondelaki Nzambe ya likoló.+ 5 Bongo nalobaki na mokonzi ete: “Soki yango esepelisi mokonzi, mpe soki ngai mosaleli na yo nandimami na miso na yo, tindá ngai na Yuda, na engumba oyo bakundá bankɔkɔ na ngai, mpo natonga yango lisusu.”+ 6 Na yango mokonzi atunaki ngai boye, wana mwasi na ye* afandaki pembeni na ye: “Mobembo na yo ekoumela ntango boni mpe okozonga ntango nini?” Bongo mokonzi asepelaki kotinda ngai,+ mpe nayebisaki ye ntango boni nakosala.+
7 Bongo nalobaki na mokonzi: “Soki yango esepelisi mokonzi, tiká bápesa ngai mikanda oyo nakolakisa baguvɛrnɛrɛ ya etúká ya Ngámbo mosusu ya Ebale,*+ mpo bátika ngai naleka tii nakokóma na Yuda. 8 Bápesa ngai mpe mokanda mpo na kolakisa Asafa, mokɛngɛli ya zamba ya mokonzi, mpo apesa ngai banzete oyo nakosala mabaya mpo na baporte ya Esika makasi+ ya Ndako,* mpe mpo na bifelo ya engumba+ mpe mpo na ndako oyo nakofanda.” Bongo mokonzi apesaki ngai mikanda yango,+ mpo lobɔkɔ malamu ya Nzambe na ngai ezalaki likoló na ngai.+
9 Nsukansuka nakómaki epai ya baguvɛrnɛrɛ ya etúká ya Ngámbo mosusu ya Ebale mpe napesaki bango mikanda ya mokonzi. Mokonzi atindaki mpe elongo na ngai bakonzi ya basoda mpe batambwisi-mpunda. 10 Ntango Sanebalate,+ moto ya Bete-horone mpe Tobia+ moto ya Amone+ oyo azalaki mosali ya Leta,* bayokaki likambo yango, basepelaki ata moke te ete moto moko ayei kosala likambo ya malamu mpo na bato ya Yisraele.
11 Nsukansuka nakómaki na Yerusaleme, mpe nafandaki wana mikolo misato. 12 Nalamukaki na butu, ngai ná mwa ndambo ya mibali elongo na ngai, mpe nayebisaki moto moko te likambo oyo Nzambe na ngai atindaki* ngai nasala mpo na Yerusaleme; nakendaki na nyama mosusu te, longola kaka nyama oyo namatelaki. 13 Na butu nabimaki na Porte ya Lobwaku,+ nalekaki liboso ya Liziba ya Nyoka Monene tii na Porte ya Mabondo ya Putulu ya Mɔtɔ,+ mpe nazalaki kotalatala bifelo ya Yerusaleme oyo ebebaki, mpe baporte na yango oyo etumbamaki na mɔtɔ.+ 14 Nalekaki pembenipembeni ya Porte ya Liziba+ tii na Liziba ya Mokonzi, mpe esika ya koleka ezalaki moke mpo na nyama oyo ememaki ngai. 15 Kaka na butu, namataki tii na lobwaku,*+ mpe nakobaki kotalatala efelo. Nsima na yango nabalukaki mpe nakɔtaki na Porte ya Lobwaku, bongo nazongaki.
16 Bayangeli-basungi+ bayebaki te epai wapi nakendaki mpe eloko nini nazalaki kosala, mpo nalobaki naino likambo moko te epai ya Bayuda, epai ya banganga-nzambe, epai ya bato ya lokumu, epai ya bayangeli-basungi mpe epai ya basali mosusu. 17 Nsukansuka nalobaki na bango: “Bino moko bozali komona mpasi oyo tozali na yango, ndenge Yerusaleme ebebi mpe baporte na yango etumbami na mɔtɔ. Bóya tótonga lisusu bifelo ya Yerusaleme, mpo nsɔni oyo elongwa.” 18 Bongo nayebisaki bango ndenge lobɔkɔ malamu ya Nzambe na ngai ezalaki likoló na ngai,+ mpe lisusu makambo oyo mokonzi alobaki na ngai.+ Na mbala moko bango nyonso bagangaki: “Tótɛlɛma mpe tótonga.” Bongo balendisanaki* mpo na kosala mosala yango.+
19 Nzokande ntango Sanebalate moto ya Bete-horone, Tobia+ moto ya Amone+ oyo azalaki mosali ya Leta, ná Moarabe+ moko na nkombo Gesheme bayokaki likambo yango, babandaki kosɛka+ mpe kotyola biso mpe koloba: “Bozali kosala nini? Bolingi nde kotombokela mokonzi?”+ 20 Kasi nazongiselaki bango: “Nzambe ya likoló nde akosalisa biso tólonga,+ mpe biso, basaleli na ye, tokotɛlɛma mpe tokotonga. Kasi bino bozali na likabo te, lotomo te, mpe eloko ya kokanisa bino te na Yerusaleme.”+
3 Nganga-nzambe monene Eliashibe+ mpe bandeko na ye banganga-nzambe babandaki kotonga lisusu Porte ya Bampate.+ Basantisaki* yango+ mpe batyaki bizipeli na yango; basantisaki eteni oyo ebandi na porte wana tii na Linɔ́ngi ya Mea,+ mpe tii na Linɔ́ngi ya Hananele.+ 2 Mpe mibali ya Yeriko+ bazalaki kotonga pembeni na bango; mpe pembeni ya mibali ya Yeriko, Zakure mwana ya Imiri azalaki kotonga.
3 Bana ya Hasenaa batongaki lisusu Porte ya Mbisi;+ batɛlɛmisaki mabaya na yango+ mpe na nsima batyaki bizipeli na yango, mpe bikangeli na yango ya mabaya ná ya bibende. 4 Mpe pembeni na bango, Meremote+ mwana ya Uriya, mwana ya Hakoze, azalaki kobongisa bisika oyo ebebaki. Pembeni na ye, Meshulame+ mwana ya Berekia, mwana ya Meshezabele, azalaki kobongisa bisika oyo ebebaki. Pembeni na ye, Zadoke mwana ya Baana azalaki kobongisa bisika oyo ebebaki. 5 Mpe pembeni na ye, bato ya Tekoa+ bazalaki kobongisa bisika oyo ebebaki. Kasi mibali ya lokumu ya Tekoa baboyaki komikitisa mpo na kosala* misala na kolanda mitindo ya bankolo na bango.
6 Yoyada mwana ya Pasea mpe Meshulame mwana ya Besodeia babongisaki Porte ya Engumba ya Kala;+ batɛlɛmisaki mabaya na yango mpe na nsima batyaki bizipeli na yango mpe bikangeli na yango ya mabaya ná ya bibende. 7 Pembeni na bango, Melatia moto ya Gibeone+ mpe Yadone moto ya Merote, bazalaki kobongisa bisika oyo ebebaki, bazalaki bato ya Gibeone mpe ya Mizipa,+ oyo bazalaki na nse ya bokonzi* ya guvɛrnɛrɛ ya etúká ya Ngámbo mosusu ya Ebale.*+ 8 Pembeni na bango, Uziele mwana ya Haraya, moko ya basali ya biloko ya wolo, abongisaki bisika oyo ebebaki. Mpe pembeni na ye, Hanania, moko ya bato oyo basalaka malasi,* azalaki kobongisa bisika oyo ebebaki. Basalaki pavema ya mabanga na Yerusaleme tii na Efelo Monene.+ 9 Mpe pembeni na bango, Refaya mwana ya Hure, nkumu ya eteni moko ya etúká ya Yerusaleme, azalaki kobongisa bisika oyo ebebaki. 10 Pembeni na ye, Yedaya mwana ya Harumafe azalaki kobongisa bisika oyo ebebaki, oyo etalani na ndako na ye. Mpe pembeni na ye, Hatushe mwana ya Hashabeneya azalaki kobongisa bisika oyo ebebaki.
11 Malakiya mwana ya Harime+ mpe Hashube mwana ya Pahate-moabe+ babongisaki eteni mosusu ya efelo,* mpe Linɔ́ngi ya Bitumbelo ya mampa.+ 12 Mpe pembeni na bango, Shalume mwana ya Haloheshe, nkumu ya eteni mosusu ya etúká ya Yerusaleme, azalaki kobongisa bisika oyo ebebaki, ná bana na ye ya basi.
13 Hanune mpe bato oyo bafandi na Zanoa+ babongisaki Porte ya Lobwaku;+ batongaki yango lisusu mpe na nsima batyaki bizipeli na yango, mpe bikangeli na yango ya mabaya ná ya bibende. Babongisaki mpe mapeko 1 000* ya efelo tii na Porte ya Mabondo ya Putulu ya Mɔtɔ.+ 14 Malakiya mwana ya Rekabe, nkumu ya etúká ya Bete-hakereme,+ abongisaki Porte ya Mabondo ya Putulu ya Mɔtɔ: atongaki yango lisusu mpe na nsima batyaki bizipeli na yango, mpe bikangeli na yango ya mabaya ná ya bibende.
15 Shalune mwana ya Koloze, nkumu ya etúká ya Mizipa,+ abongisaki Porte ya Liziba:+ atongaki lisusu porte yango ná nsamba na yango mpe atyaki bizipeli na yango, mpe bikangeli na yango ya mabaya ná ya bibende, abongisaki mpe efelo ya Liziba+ ya Nzela ya mai oyo ekei na Elanga ya Mokonzi+ tii na eskalye+ oyo ekitá banda na Sité ya Davidi.+
16 Pembeni na ye, Nehemia mwana ya Azabuke, nkumu ya eteni moko ya etúká ya Bete-zure,+ azalaki kobongisa bisika oyo ebebaki, banda na esika oyo etalani na Malita ya Davidi+ tii na liziba+ oyo basalá, tii na Ndako ya Bato ya Nguya.
17 Pembeni na ye, Balevi bazalaki kobongisa bisika oyo ebebaki: ezalaki Rehume mwana ya Bani; mpe pembeni na ye, Hashabia, nkumu ya eteni moko ya etúká ya Keila,+ azalaki kobongisa bisika oyo ebebaki mpo na etúká na ye. 18 Pembeni na ye, Balevi mosusu bazalaki kobongisa bisika oyo ebebaki: Bavai mwana ya Henadade, nkumu ya eteni mosusu ya etúká ya Keila.
19 Pembeni na ye Ezere mwana ya Yeshua,+ nkumu ya Mizipa, azalaki kobongisa eteni mosusu, oyo etalani na esika ya komata tii na Esika ya kobomba bibundeli, na Likonzí oyo esimbi bifelo.+
20 Pembeni na ye, Baruke mwana ya Zabai+ azalaki kosala na molende. Abongisaki eteni mosusu ya efelo, banda na Likonzí oyo esimbi bifelo tii na ekɔtelo ya ndako ya Eliashibe+ nganga-nzambe monene.
21 Pembeni na ye, Meremote+ mwana ya Uriya mwana ya Hakoze abongisaki eteni mosusu ya efelo, banda na ekɔtelo ya ndako ya Eliashibe tii na nsuka ya ndako yango.
22 Mpe pembeni na ye, banganga-nzambe, mibali ya Etúká ya Yordani,*+ bazalaki kobongisa bisika oyo ebebaki. 23 Pembeni na bango, Benyamina mpe Hashube bazalaki kobongisa bisika oyo ebebaki, oyo etalani na ndako na bango. Pembeni na bango, Azaria mwana ya Maaseya mwana ya Anania azalaki kobongisa bisika oyo ebebaki pembeni na ndako na ye. 24 Pembeni na ye, Binui mwana ya Henadade abongisaki eteni mosusu ya efelo, banda na ndako ya Azaria tii na Likonzí oyo esimbi bifelo+ mpe tii na esika oyo bifelo ekutani.
25 Pembeni na ye, Palale mwana ya Uzai azalaki kobongisa bisika oyo ebebaki, oyo etalani na likonzí oyo esimbi bifelo mpe linɔ́ngi oyo ezalaki pene na Ndako ya Mokonzi,+ linɔ́ngi ya likoló oyo ezalaki na Lopango ya Bakɛngɛli.+ Pembeni na ye ezalaki Pedaya mwana ya Paroshe.+
26 Mpe basaleli ya tempelo*+ oyo bazalaki kofanda na Ofɛlɛ+ bazalaki kobongisa bisika oyo ebebaki tii na esika oyo etalani na Porte ya Mai+ na ɛsti mpe na linɔ́ngi oyo ebimá mwa moke.
27 Pembeni na bango, bato ya Tekoa+ babongisaki eteni mosusu ya efelo, banda na esika oyo etalani na linɔ́ngi monene oyo ebimá mwa moke, tii na efelo ya Ofɛlɛ.
28 Banganga-nzambe bazalaki kobongisa bisika oyo ebebaki likoló ya Porte ya Bampunda,+ moto na moto na esika oyo etalani na ndako na ye.
29 Pembeni na bango, Zadoke+ mwana ya Imere azalaki kobongisa bisika oyo ebebaki, oyo etalani na ndako na ye.
Pembeni na ye, Shemaya mwana ya Shekania, mokɛngɛli ya Porte ya Ɛsti,+ azalaki kobongisa bisika oyo ebebaki.
30 Pembeni na ye, Hanania mwana ya Shelemia mpe Hanune mwana ya motoba ya Zalafe bazalaki kobongisa eteni mosusu ya efelo.
Pembeni na bango, Meshulame+ mwana ya Berekia azalaki kobongisa bisika oyo ebebaki, oyo etalani na eteni ya ndako na ye.
31 Pembeni na ye, Malakiya, moko ya bato oyo basalaka biloko ya wolo, azalaki kobongisa bisika oyo ebebaki tii na ndako ya basaleli ya tempelo*+ mpe ya bato ya mombongo, na esika oyo etalani na Porte ya Kokɛngɛla mpe tii na shambrɛ ya likoló na esika oyo bifelo ekutaná.
32 Mpe banda na shambrɛ ya likoló na esika oyo bifelo ekutaná tii na Porte ya Bampate,+ bato oyo basalaka misala ya wolo mpe bato ya mombongo bazalaki kobongisa bisika oyo ebebaki.
4 Nzokande ntango kaka Sanebalate+ ayokaki ete tozali kotonga lisusu efelo, asilikaki* mpe ayokaki nkanda makasi, mpe azalaki kaka kotyola Bayuda. 2 Mpe liboso ya bandeko na ye mpe ya limpinga ya basoda ya Samaria, alobaki: “Eloko nini Bayuda oyo balɛmbálɛmbá bazali kosala? Bakanisi ete bakolonga kaka bango moko? Bakobanda kopesa nde bambeka? Bakosilisa na mokolo moko kaka? Bakokundola lisusu mabanga oyo ezikaziká mpe ekundamá na kati ya biloko oyo ebukanabukaná oyo ezipami na putulu?”+
3 Nzokande Tobia+ moto ya Amone,+ oyo azalaki kotɛlɛma pembeni na ye, alobaki: “Efelo ya mabanga oyo bazali kotonga, soki ata gambala emateli yango, ekobukana mbala moko.”
4 “Yoká, Ee Nzambe na biso, mpo bato oyo bazali kotyola biso.+ Salá ete kotyola na bango ezonga na motó na bango moko,+ bákóma bakangami mpe bámemama na mboka mopaya lokola biloko oyo epunzami. 5 Kozipa ngambo na bango te mpe lisumu na bango elongwa te liboso na yo,+ mpo bafingi bato oyo bazali kotonga.”
6 Na yango tokobaki kotonga efelo, mpe tokangisaki yango mobimba banda na ebandeli tii na nsuka mpe efelo emataki tii na katikati. Bato bazalaki kosala na motema moko.
7 Nzokande ntango kaka Sanebalate, Tobia,+ Baarabe,+ Baamone ná Baashedode+ bayokaki ete mosala ya kobongisa bifelo ya Yerusaleme ezalaki kokende liboso, mpe ete tozalaki kobamba bisika oyo bifelo ebukanaki, bayokaki nkanda makasi. 8 Bayokanaki ete báya kobundisa Yerusaleme mpe bátya mobulu na engumba yango. 9 Kasi tobondelaki Nzambe na biso mpe totyaki bakɛngɛli mpo bábatelaka biso butu moi.
10 Nzokande bato ya Yuda bazalaki koloba: “Basali* basili makasi mpe biloko oyo ebukanabukaná ezali ebele; tokokoka ata moke te kosilisa kotonga efelo yango.”
11 Mpe banguna na biso bazalaki koloba: “Tokokóma na kati na bango liboso báyeba mpe bámona biso, tokoboma bango mpe tokosukisa misala.”
12 Mbala nyonso oyo Bayuda oyo bazalaki kofanda pembeni na bango bazalaki koya, bayebisaki biso mbala na mbala:* “Banguna bakouta bipai nyonso mpo na kobundisa biso.”
13 Bongo natyaki mibali bátɛlɛma na bisika oyo ekitá na nse, nsima ya efelo, na bisika ya polele; natyaki bango libota na libota ná mipanga na bango, makɔnga na bango mpe matimbo na bango. 14 Ntango namonaki ete bazali kobanga, na mbala moko natɛlɛmaki mpe nalobaki na bato ya lokumu+ mpe na bayangeli-basungi mpe na bato mosusu ete: “Bóbanga bango te.+ Bókanisa Yehova oyo azali monene mpe nsɔmɔ;+ bóbunda mpo na bandeko na bino, bana na bino ya mibali mpe bana na bino ya basi, basi na bino mpe bandako na bino.”
15 Nzokande ntango banguna na biso bayokaki ete toyebi makambo oyo bazalaki kokana kosala, mpe ete Nzambe ya solo abebisaki mokano na bango, biso nyonso tozongelaki mosala ya kotonga efelo. 16 Banda mokolo wana, ndambo ya bato na ngai bazalaki kosala mosala+ mpe ndambo mosusu bazalaki kosimba makɔnga, banguba ná matimbo mpe kolata bakazaka ya bibende; mpe bankumu+ bazalaki kobatela* bato nyonso ya Yuda 17 oyo bazalaki kotonga lisusu efelo. Baoyo bazalaki komema mikumba, bazalaki kosala mosala na lobɔkɔ moko, mpe na lobɔkɔ mosusu bazalaki kosimba ebundeli.* 18 Mpe batongi bakangaki, moto na moto, mopanga na loketo na ye ntango bazali kotonga; mpe moto oyo azalaki koyula liseke+ atɛlɛmaki pembeni na ngai.
19 Na nsima nalobaki na bato ya lokumu mpe na bayangeli-basungi mpe na bato mosusu ete: “Mosala ya kosala ezali monene mpe efelo ezali molai; biso tozali kosala na efelo, tokabwani mosika mosika. 20 Ntango bokoyoka bayuli liseke, bóya kosangana na esika biso tozali. Nzambe na biso akobundela biso.”+
21 Na yango, biso tokobaki kosala mosala mpe ndambo mosusu ya bato bazalaki kosimba makɔnga, banda kotana ya ntɔngɔ tii kobima ya minzoto. 22 Na ntango yango, nalobaki na bato boye: “Tiká ete mibali bálekisa butu na kati ya Yerusaleme, moto na moto ná mosungi na ye. Bakokɛngɛla biso na butu mpe na moi bakosala mosala.” 23 Na yango, ngai ná bandeko na ngai ná basaleli na ngai+ mpe bakɛngɛli oyo bazalaki kotambola na ngai,* tozalaki kolongola bilamba na biso te; mokomoko na biso azalaki ntango nyonso na ebundeli na ye na lobɔkɔ ya mobali.
5 Nzokande, bato ya ekólo mpe basi na bango bamilelaki makasi mpo na bandeko na bango Bayuda.+ 2 Basusu bazalaki koloba: “Tozali na bana mibali mpe bana basi ebele. Tosengeli na mbuma mpo na kolya mpo tókoba kozala na bomoi.” 3 Basusu bazalaki koloba: “Na eleko oyo ya nzala, tokómi kosimbisa bilanga na biso, bilanga na biso ya vinyo mpe bandako na biso lokola ndanga, mpo na kozwa mbuma ya kolya.” 4 Basusu mpe bazalaki koloba: “Tosimbisi bilanga na biso mpe bilanga na biso ya vinyo mpo na kodefa mbongo ya kofuta mpako ya mokonzi.+ 5 Biso ná bandeko na biso tozali makila moko,* mpe bana na biso bazali kaka ndenge moko na bana na bango. Nzokande biso tosengeli kopesa bana na biso ya mibali mpe bana na biso ya basi na boombo. Kutu, bana na biso mosusu ya basi bazali sikoyo na boombo.+ Kasi tozali na nguya ya kopekisa likambo yango te mpo bilanga na biso ná bilanga na biso ya vinyo ekómi ya bato mosusu.”
6 Ntango nayokaki kolela na bango mpe maloba wana, nayokaki nkanda makasi. 7 Bongo nakanisaki makambo yango malamu mpe napamelaki bato ya lokumu mpe bayangeli-basungi, mpe nalobaki na bango: “Bandeko na bino moko, bozali kosɛnga báfuta bino ná benefisi.”*+
Lisusu, nabongisaki liyangani moko monene mpo na bango. 8 Mpe nalobaki na bango: “Tosalaki nyonso oyo ekoki mpo na kosikola bandeko na biso Bayuda oyo batɛkamaki na bikólo mosusu, mpe sikoyo bino moko bolingi kotɛka bandeko na bino,+ mpe ekosɛnga ete biso moko tósomba bango lisusu?” Na yango, bafandaki nyɛɛ, mpe bazangaki likambo ya koloba. 9 Nabakisaki: “Likambo oyo bozali kosala ezali malamu te. Bosengeli kotambola na kobanga Nzambe,+ mpo bikólo mosusu, oyo bazali banguna na biso, bázwa biso na likambo ya kotyola te. 10 Kutu ngai ná bandeko na ngai mpe basaleli na ngai, tozali kodefisa bango mbongo mpe mbuma kozanga kosɛnga ete báfuta yango na benefisi. Nabondeli bino, tótika kosɛnga benefisi soki todefisi.+ 11 Nabondeli bino, kaka lelo bózongisela bango bilanga na bango,+ bilanga na bango ya vinyo, bilanga na bango ya olive, mpe bandako na bango. Ezala mpe moko ya bandambo nkama* ya mbongo mpe ya mbuma, ya vinyo ya sika mpe ya mafuta oyo bozali kosɛnga bango benefisi.”
12 Na yango balobaki: “Tokozongisela bango biloko yango, mpe tokosɛnga bango eloko te. Tokosala kaka ndenge olobi.” Na yango nabengaki banganga-nzambe mpe nayebisaki mibali yango bálapa ndai ete bakotosa elaka oyo bapesi. 13 Naningisaki mpe elamba* na ngai mpe nalobaki: “Kaka ndenge wana moto nyonso oyo akokokisa elaka oyo te, tiká ete Nzambe ya solo aningisa ndako na ye mpe biloko na ye. Aningisa ye boye mpe atikala mabɔkɔ mpamba.” Na yango, lisangá mobimba elobaki: “Amen!”* Na nsima, basanzolaki Yehova. Mpe bato basalaki na kolanda elaka na bango.
14 Longola yango, banda mokolo oyo Mokonzi Artazerezese apesaki ngai mokumba ya kozala guvɛrnɛrɛ+ na bango na mokili ya Yuda, banda na mbula ya 20+ tii na mbula ya 32+ ya boyangeli na ye,+ elingi koloba mbula 12, ezala ngai to bandeko na ngai tolyaki te bilei oyo guvɛrnɛrɛ asengelaki kozwa.+ 15 Kasi baguvɛrnɛrɛ oyo bazalaki liboso na ngai, banyokolaki bato, bazalaki kozwa epai na bango mokolo na mokolo shekele* ya palata 40 mpo na mampa mpe vinyo. Basaleli na bango mpe banyokolaki bato. Kasi ngai, nasalaki bongo te+ mpo nabangaka Nzambe.+
16 Longola yango, ngai moko napesaki mabɔkɔ na mosala ya efelo oyo, mpe nasombaki ata elanga moko te.+ Basaleli na ngai nyonso basanganaki mpo na kosala mosala yango. 17 Ezalaki na Bayuda mpe bayangeli-basungi 150, oyo bazalaki kolya na mesa na ngai. Ezala mpe bato ya bikólo mosusu oyo bazalaki koya epai na biso. 18 Mokolo na mokolo bazalaki kolambela ngai* ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate motoba ya malamu, mpe bandɛkɛ, mpe nsima ya mikolo zomi nyonso bazalaki koyela biso ebele ya vinyo ya ndenge na ndenge. Atako bongo, nasɛngaki te biloko oyo guvɛrnɛrɛ asengelaki kozwa, mpo bato bazalaki kosala mosala oyo ezalaki kilo mpo na bango. 19 “Ee Nzambe na ngai, kanisá ngai mpe pambolá ngai* mpo na nyonso oyo nasaleli bato oyo.”+
6 Nzokande ntango kaka Sanebalate, Tobia,+ Gesheme Moarabe+ ná banguna na biso mosusu bayokaki ete natongi lisusu efelo+ mpe ete ezalaki lisusu ata na lidusu moko te (atako na ntango wana natyaki naino bizipeli na baporte te),+ 2 na mbala moko Sanebalate ná Gesheme batindelaki ngai maloba oyo: “Yaká, tóyokana ntango nini tokokutana na bamboka ya Lobwaku patatalu ya Ono.”+ Nzokande bazalaki kokana kosala ngai mabe. 3 Bongo natindelaki bango bamemi-nsango báyebisa bango: “Nazali na mosala moko monene ya kosala, mpe nakoki kokita kuna te. Mpo soki natiki mosala, mpe nayei kokutana na bino, mosala ekokatana.” 4 Batindelaki ngai maloba yango mbala minei mobimba, kasi mbala nyonso nazalaki kozongisela bango kaka eyano wana moko.
5 Bongo Sanebalate atindelaki ngai mosungi na ye mpe ayaki kaka na maloba yango mpo na mbala ya mitano, ná mokanda polele na lobɔkɔ na ye. 6 Na mokanda yango bakomaki: “Nsango ezali kotambola na bikólo, Gesheme+ mpe azali kolobela yango, ete yo ná Bayuda bozali kokana kotombokela mokonzi.+ Yango wana bozali kotonga efelo. Mpe ndenge bazali koloba, yo olingi kokóma mokonzi na bango. 7 Lisusu, otye basakoli básakola mpo na yo na Yerusaleme mobimba ete: ‘Mokonzi azali na Yuda!’ Mpe sikoyo makambo yango ekokóma na matoi ya mokonzi. Yango wana yaká tólobela likambo yango elongo.”
8 Kasi, natindelaki ye eyano ete: “Na nyonso oyo olobi, ata likambo moko te esalemaki. Nyonso oyo olobi euti na makanisi na yo* moko.” 9 Mpo bango nyonso bazalaki koluka kobangisa biso. Bazalaki koloba: “Bakolɛmbisa mabɔkɔ na mosala mpe mosala yango ekosila te.”+ Kasi nabondelaki: “Nzambe, pesá ngai mpiko.”*+
10 Na nsima nakendaki na ndako ya Shemaya mwana ya Delaya mwana ya Mehetabele, oyo na ntango wana azalaki kobima na ndako na ye te. Alobaki: “Tiká tóyokana ntango nini tokokutana na ndako ya Nzambe ya solo, na kati ya tempelo, mpe tókanga baporte ya tempelo; mpo bazali koya koboma yo. Bakoya na butu mpo na koboma yo.” 11 Kasi nalobaki: “Mobali lokola ngai asengeli kokima? Mobali lokola ngai, akoki nde kokɔta na tempelo mpe atikala na bomoi?+ Te, nakokɔta kuna te!” 12 Bongo nayaki koyeba ete ezalaki Nzambe te moto atindaki ye, kasi Tobia ná Sanebalate+ bafutaki ye mpo asakwela makambo wana mpo na kotɛmɛla ngai. 13 Bafutaki ye mpo abangisa ngai mpe asalisa ngai lisumu, mpo bázwa likoki ya kobebisa lokumu na ngai, mpo na koyokisa ngai nsɔni.
14 Ee Nzambe na ngai, kanisá Tobia+ ná Sanebalate, mpe makambo oyo basali, mpe lisusu mosakoli-mwasi Noadia, ná basakoli mosusu oyo bazalaki ntango nyonso koluka kobangisa ngai.
15 Bongo efelo esilaki na mokolo ya 25 ya sanza ya Elule,* nsima ya mikolo 52.
16 Ntango kaka banguna na biso nyonso bayokaki likambo yango mpe ntango bikólo nyonso ya zingazinga bamonaki yango, bayokaki nsɔni mingi,*+ mpe bamonaki ete mosala yango esalemaki nde na lisalisi ya Nzambe na biso. 17 Na mikolo wana, bato ya lokumu+ ya Yuda bazalaki kotindela Tobia mikanda ebele, mpe Tobia azalaki kozongisela bango biyano. 18 Na Yuda, bato mingi balapelaki ye ndai ya bosembo, mpo azalaki mobali ya mwana ya Shekania mwana ya Ara;+ mpe mwana na ye ya mobali Yehohanane abalaki mwana ya Meshulame+ mwana ya Berekia. 19 Lisusu, bazalaki ntango nyonso koloba malamu mpo na ye epai na ngai, mpe bazalaki kokende koyebisa ye makambo oyo nazalaki koloba. Bongo Tobia azalaki kotinda mikanda mpo na kobangisa ngai.+
7 Ntango kaka basilisaki kotonga lisusu efelo,+ natɛlɛmisaki baporte ya engumba;+ na nsima bakɛngɛli ya baporte,+ bayembi+ mpe Balevi+ batyamaki na misala na bango. 2 Nsima na yango napesaki ndeko na ngai Hanani+ mokumba ya kokamba Yerusaleme, ná Hanania nkumu ya Ndako Monene,+ mpo azalaki mobali oyo abongi mpenza kotyelama motema mpe azalaki kobanga Nzambe ya solo+ koleka bato mosusu mingi. 3 Bongo nalobaki na bango: “Baporte ya Yerusaleme esengeli kofungwama te liboso ete moi engala makasi; mpe ntango nyonso oyo bakɛngɛli bazali wana, basengeli kokanga bizipeli ya baporte na bikangeli na yango. Bokopona mpe bafandi ya Yerusaleme mpo bázala bakɛngɛli, basusu bakokɛngɛla na bisika oyo bokotya bango mpe basusu liboso ya bandako na bango.” 4 Nzokande engumba ezalaki monene mpe molai, kasi ezalaki na bato mingi te na kati,+ mpe bandako etongamaki naino mingi te.
5 Kasi Nzambe na ngai apesaki ngai likanisi* ya koyanganisa bato ya lokumu, bayangeli-basungi mpe bato ya ekólo mpo bákomisa nkombo na kolanda milɔngɔ ya bankɔkɔ na bango.+ Na nsima, namonaki buku ya bankombo oyo ekomamá na kolanda molɔngɔ ya bankɔkɔ, ya baoyo bazongaki liboso, mpe na kati ekomamaki boye:
6 Talá bankombo ya bato ya etúká* oyo bautaki na bokangami na mboka mopaya, oyo Nebukadenezare+ mokonzi ya Babilone amemaki na mboka mopaya,+ mpe oyo na nsima bazongaki na Yerusaleme mpe na Yuda, moto na moto na engumba na ye,+ 7 baoyo bayaki elongo na Zerubabele,+ Yeshua,+ Nehemia, Azaria, Raamia, Nahamani, Mordekai, Bilishane, Misiperete, Bigivai, Nehume, mpe Baana.
Talá motángo ya Bayisraele ya mibali oyo bazongaki:+ 8 bana ya Paroshe: 2 172; 9 bana ya Shefatia: 372; 10 bana ya Ara:+ 652; 11 bana ya Pahate-moabe,+ ya libota ya Yeshua mpe ya Yoabe:+ 2 818; 12 bana ya Elame:+ 1 254; 13 bana ya Zatu: 845; 14 bana ya Zakai: 760; 15 bana ya Binui: 648; 16 bana ya Bebai: 628; 17 bana ya Azegade: 2 322; 18 bana ya Adonikame: 667; 19 bana ya Bigivai: 2 067; 20 bana ya Adine: 655; 21 bana ya Atere, ya libota ya Ezekiasi: 98; 22 bana ya Hashume: 328; 23 bana ya Bezai: 324; 24 bana ya Harife: 112; 25 bana ya Gibeone:+ 95; 26 mibali ya Beteleme mpe ya Netofa: 188; 27 mibali ya Anatote:+ 128; 28 mibali ya Bete-azemavete: 42; 29 mibali ya Kiriate-yearime,+ ya Kefira mpe ya Beerote:+ 743; 30 mibali ya Rama mpe ya Geba:+ 621; 31 mibali ya Mikemase:+ 122; 32 mibali ya Betele+ mpe ya Ai:+ 123; 33 mibali ya Nebo mosusu: 52; 34 bana ya Elame mosusu: 1 254; 35 bana ya Harime: 320; 36 bana ya Yeriko: 345; 37 bana ya Lode, Hadide mpe Ono:+ 721; 38 bana ya Senaa: 3 930.
39 Talá motángo ya banganga-nzambe,+ bana ya Yedaya ya libota* ya Yeshua: 973; 40 bana ya Imere: 1 052; 41 bana ya Pashure:+ 1 247; 42 bana ya Harime:+ 1 017.
43 Talá motángo ya Balevi:+ bana ya Yeshua, ya Kadimiele,+ ya libota ya Hodeva: 74. 44 Talá motángo ya bayembi,+ bana ya Asafe:+ 148. 45 Talá motángo ya bakɛngɛli ya baporte:+ bana ya Shalume, bana ya Atere, bana ya Talamone, bana ya Akube,+ bana ya Hatita mpe bana ya Shobai: 138.
46 Basaleli ya tempelo*+ bango oyo: bana ya Ziha, bana ya Hasufa, bana ya Tabaote, 47 bana ya Kerose, bana ya Sia, bana ya Padone, 48 bana ya Lebana, bana ya Hagaba, bana ya Salmai, 49 bana ya Hanane, bana ya Gidele, bana ya Gahare, 50 bana ya Reaya, bana ya Rezine, bana ya Nekoda, 51 bana ya Gazame, bana ya Uza, bana ya Pasea, 52 bana ya Besai, bana ya Meunime, bana ya Nefushesime, 53 bana ya Bakabuke, bana ya Hakufa, bana ya Harure, 54 bana ya Bazilite, bana ya Mehida, bana ya Haresha, 55 bana ya Barakose, bana ya Sisera, bana ya Tema, 56 bana ya Nezia mpe bana ya Hatifa.
57 Bana ya basaleli ya Salomo bango oyo:+ bana ya Sotai, bana ya Soferete, bana ya Perida, 58 bana ya Yaala, bana ya Darakone, bana ya Gidele, 59 bana ya Shefatia, bana ya Hatile, bana ya Pokerete-hazebaime, bana ya Amone. 60 Motángo ya basaleli nyonso ya tempelo*+ mpe ya bana ya basaleli ya Salomo ezalaki 392.
61 Mpe talá motángo ya bato oyo bautaki na Tele-mela, Tele-haresha, Kerube, Adone ná Imere, kasi bakokaki te koyebisa polele mabota ya batata na bango mpe ya bankɔkɔ na bango, mpo emonisa ete bazalaki Bayisraele:+ 62 bana ya Delaya, bana ya Tobia, mpe bana ya Nekoda: 642. 63 Mpe na kati ya banganga-nzambe: bana ya Habaya, bana ya Hakoze,+ bana ya Barazilai, oyo abalaki mwasi na kati ya bana basi ya Barazilai+ Mogileade mpe akómaki kobengama na nkombo ya tata-bokilo na ye. 64 Bango nde balukaki mokanda oyo ezali na bankombo ya molɔngɔ ya bankɔkɔ na bango, kasi emonanaki te, yango wana batyaki bango te na mosala ya bonganga-nzambe.*+ 65 Guvɛrnɛrɛ*+ ayebisaki bango ete basengelaki te kolya biloko oyo eleki mosantu+ tii ntango nganga-nzambe moko akomonana, oyo akoki kotuna Nzambe na nzela ya Urime ná Tumime.+
66 Motángo ya bato ya lisangá mobimba ezalaki 42 360,+ 67 longola baombo na bango ya mibali mpe ya basi,+ oyo bazalaki 7 337; bazalaki mpe na bayembi ya mibali mpe ya basi 245.+ 68 Bampunda na bango ezalaki 736, badɔngi* na bango 245, 69 bakamela na bango 435 mpe bampunda na bango 6 720.
70 Bankumu mosusu ya mabota ya batata bapesaki makabo mpo na mosala.+ Guvɛrnɛrɛ* apesaki mpo na esika ya kobomba biloko ya motuya makabo ya drakimɛ* ya wolo 1 000, mabakuli 50, mpe bazambala 530 ya banganga-nzambe.+ 71 Mpe bankumu mosusu ya batata ya mabota bapesaki makabo mpo na esika ya kobomba biloko ya motuya mpo na mosala: drakimɛ ya wolo 20 000 mpe mina* ya palata 2 200. 72 Mpe bato mosusu ya ekólo bapesaki drakimɛ ya wolo 20 000, mina ya palata 2 000 mpe bazambala 67 ya banganga-nzambe.
73 Mpe banganga-nzambe, Balevi, bakɛngɛli ya baporte, bayembi,+ bato mosusu ya ekólo, basaleli ya tempelo* mpe bato mosusu oyo batikali bakómaki kofanda na bingumba na bango.+ Ntango sanza ya nsambo ekómaki,+ Bayisraele basilaki kofanda na bingumba na bango.+
8 Bongo bato nyonso bayanganaki na mokano moko na esika monene ya bato nyonso oyo ezali liboso ya Porte ya Mai.+ Mpe basɛngaki Ezera+ mosali-bakopi* amema buku ya Mobeko ya Moize,+ oyo Yehova apesaki Yisraele.+ 2 Na yango nganga-nzambe Ezera amemaki Mobeko yango liboso ya lisangá+ ya mibali, basi mpe bato nyonso oyo bakokaki koyoka mpe kokanga ntina. Ezalaki na mokolo ya liboso ya sanza ya nsambo.+ 3 Mpe banda na kotana ya ntɔngɔ tii na midi, Ezera atɛlɛmaki na esika monene ya bato nyonso oyo ezali liboso ya Porte ya Mai, mpe atángaki buku yango na mongongo makasi,+ liboso ya mibali, basi mpe bato nyonso oyo bakokaki kokanga ntina; mpe bato bayokaki na likebi+ maloba ya buku ya Mobeko. 4 Mpe Ezera mosali-bakopi* atɛlɛmaki na estrade ya mabaya oyo basalaki mpo na libaku wana; bato oyo batɛlɛmaki na lobɔkɔ na ye ya mobali ezalaki Matitia, Shema, Anaya, Uria, Hilikiya ná Maaseya mpe na lobɔkɔ na ye ya mwasi ezalaki Pedaya, Mishaele, Malakiya,+ Hashume, Hasha-badana, Zekaria mpe Meshulame.
5 Ezera afungolaki buku yango, mpe bato nyonso bakokaki komona ye, mpo atɛlɛmaki na esika oyo ezalaki likoló koleka bato nyonso. Ntango afungolaki buku yango, bato nyonso batɛlɛmaki. 6 Bongo Ezera asanzolaki Yehova Nzambe ya solo, Nzambe Monene, mpe bato nyonso balobaki: “Amen!* Amen!”+ wana batombolaki mabɔkɔ likoló. Na nsima bagumbamaki mpe bafukamaki liboso ya Yehova, bilongi na nse. 7 Mpe Yeshua, Bani, Sherebia,+ Yamine, Akube, Shabetai, Hodia, Maaseya, Kelita, Azaria, Yozabade,+ Hanane, mpe Pelaya, bango nyonso Balevi, bazalaki kolimbolela bato Mobeko,+ wana bato batɛlɛmaki kaka. 8 Mpe bakobaki kotánga na mongongo makasi buku yango, Mobeko ya Nzambe ya solo. Balimbolaki yango polele mpe bamonisaki ntina na yango. Na ndenge yango basalisaki bato bákanga ntina ya makambo oyo ezalaki kotángama.+
9 Mpe Nehemia, oyo na ntango wana azalaki Guvɛrnɛrɛ,* Ezera+ oyo azalaki nganga-nzambe mpe mosali-bakopi,* mpe Balevi oyo bazalaki koteya bato balobaki na bato nyonso: “Oyo ezali mokolo mosantu mpo na Yehova Nzambe na bino.+ Bósala matánga te mpe bólela te.” Mpo bato nyonso bazalaki kolela ntango bazalaki koyoka maloba ya Mobeko. 10 Nehemia alobaki na bango: “Bókende, bólya biloko ya malamu,* bómɛla masanga ya elɛngi, mpe bótinda bilei+ epai ya bato oyo bazali na eloko te; mpo oyo ezali mokolo mosantu mpo na Nkolo na biso, mpe bózala na mawa te, mpo esengo oyo euti na Yehova ezali kopesa bino makasi.”* 11 Mpe Balevi bazalaki kokitisa bato nyonso mitema, na maloba oyo: “Bófanda nyɛɛ! mpo mokolo oyo ezali mosantu; mpe bóyoka mawa te.” 12 Bongo bato nyonso bakendaki mpo na kolya, komɛla, mpe kotindela basusu bilei; bazalaki kosepela mingi+ mpo bakangaki ntina ya maloba oyo batángelaki bango.+
13 Mpe na mokolo ya mibale, bankumu ya mabota ya batata ya bato nyonso, banganga-nzambe mpe Balevi bayanganaki epai ya Ezera mosali-bakopi,* mpo balingaki kososola malamumalamu maloba ya Mobeko. 14 Bongo bamonaki ete na Mobeko oyo Yehova apesaki na nzela ya Moize ekomamá ete Bayisraele basengeli kofanda na bandako ya matiti* na fɛti ya sanza ya nsambo,+ 15 mpe ete basengeli kosakola+ mpe kobelela na bingumba na bango nyonso mpe na Yerusaleme mobimba ete: “Bókende na etúká ya ngombangomba mpe bóya na nkasa ya banzete ya olive, ya banzete ya mafuta, nkasa ya mirte, nkasa ya banzete ya mbila mpe nkasa ya banzete mosusu, mpo na kosala bandako ya matiti, ndenge mibeko esɛngi.”
16 Na yango, bato bakendaki koluka nkasa mpe batongaki bandako ya matiti, moto na moto na nsamba ya ndako na ye; batongaki mpe mosusu na mapango na bango, na mapango ya ndako ya Nzambe ya solo,+ na esika monene ya bato nyonso ya Porte ya Mai+ mpe na esika monene ya bato nyonso ya Porte ya Efraime.+ 17 Na yango lisangá mobimba ya baoyo bautaki na bokangami batongaki bandako ya matiti mpe bafandaki na bandako yango ya matiti. Bayisraele basalá naino fɛti yango ndenge wana te banda na mikolo ya Yosua+ mwana ya Nunu tii na mokolo yango, yango wana bato basepelaki mingi.+ 18 Mpe mokolo na mokolo, banda na mokolo ya liboso tii na mokolo ya nsuka, bazalaki kotánga buku ya Mobeko ya Nzambe ya solo.+ Basalaki fɛti mikolo nsambo, mpe na mokolo ya mwambe, basalaki liyangani moko monene, ndenge esɛngamaki.+
9 Na mokolo ya 24 ya sanza yango, Bayisraele bayanganaki. Bakilaki bilei, balataki ngɔtɔ* mpe bamisopelaki putulu.+ 2 Bongo baoyo bazalaki mpenzampenza Bayisraele bakabwanaki na bapaya nyonso,+ na nsima batɛlɛmaki mpe bayambolaki masumu na bango moko mpe mabunga ya batata na bango.+ 3 Batɛlɛmaki kaka na esika bazalaki mpe batángaki na mongongo makasi buku ya Mobeko+ ya Yehova Nzambe na bango ngonga misato. Mpe na boumeli ya ngonga misato mosusu, bayambolaki masumu na bango mpe bagumbamaki liboso ya Yehova Nzambe na bango.
4 Yeshua, Bani, Kadimiele, Shebania, Buni, Sherebia,+ Bani ná Kenani batɛlɛmaki na estrade+ ya Balevi mpe bazalaki kobelela Yehova Nzambe na bango na mongongo makasi. 5 Mpe Yeshua, Kadimiele, Bani, Hashabeneya, Sherebia, Hodia, Shebania ná Petaya, bango nyonso Balevi, balobaki: “Bótɛlɛma, mpe bósanzola Yehova Nzambe na bino libela na libela.*+ Mpe tiká básanzola nkombo na yo ya nkembo, oyo ezali monene koleka mapamboli mpe masanzoli nyonso oyo bato bakoki kopesa.
6 “Kaka yo moko nde ozali Yehova.+ Yo nde osalaki likoló, ɛɛ, likoló na bonene na yango nyonso* mpe limpinga na yango nyonso, ná mabele mpe nyonso oyo ezali likoló na yango, ná mai minene* mpe nyonso oyo ezali na kati na yango. Ozali kobatela yango nyonso na bomoi, mpe limpinga ya likoló ezali kogumbama liboso na yo. 7 Yo ozali Yehova Nzambe ya solo, yo moto oponaki Abrama;+ olongolaki ye na Ure+ engumba ya Bakaladea mpe opesaki ye nkombo Abrahama.+ 8 Omonaki ete motema na ye ezali sembo epai na yo,+ yango wana osalaki ná ye kondimana ete okopesa ye ná libota* na ye+ mokili ya Bakanana, ya Bahiti, ya Baamore, ya Baperizi, ya Bayebusi mpe ya Bagirigashe. Mpe okokisaki bilaka na yo, mpo ozali sembo.*
9 “Na yango omonaki mpasi ya bankɔkɔ na biso na Ezipito,+ mpe oyokaki kolela na bango pene na Mbu Motane. 10 Bongo obimisaki bilembo mpe osalaki makamwisi mpo na kotɛmɛla Farao ná basaleli na ye nyonso mpe bato nyonso ya mokili na ye,+ mpo oyebaki ete basalelaki bato na yo makambo na lofundo.+ Omisalelaki nkombo oyo ezali na lokumu tii lelo.+ 11 Okabolaki mai ya mbu liboso na bango, mpe bakatisaki na kati ya mbu na mabele oyo ekauki.+ Mpe baoyo bazalaki kolanda bango, obwakaki bango na bozindo, lokola libanga oyo babwaki na kati ya mai oyo etomboki.+ 12 Na moi, okambaki bango na likonzí ya lipata, mpe na butu na likonzí ya mɔtɔ, mpo na kongɛngisela bango nzela oyo basengelaki kokende.+ 13 Okitaki na Ngomba Sinai+ mpe osololaki na bango longwa na likoló.+ Opesaki bango bikateli ya lisambisi oyo ezali sembo, mibeko oyo ezali solo,* malako mpe mitindo oyo ezali malamu.+ 14 Oteyaki bango bátosa Sabata na yo mosantu,+ mpe opesaki bango mitindo, malako mpe mobeko na nzela ya mosaleli na yo Moize. 15 Opesaki bango mampa longwa na likoló ntango bazalaki na nzala,+ mpe obimiselaki bango mai na libanga ntango bayokaki mposa ya mai.+ Mpe oyebisaki bango bákɔta mpe bázwa mokili oyo olapaki ndai* ete okopesa bango.
16 “Kasi bango, bankɔkɔ na biso, basalaki makambo na lofundo+ mpe bakómaki mitó makasi,*+ mpe bazalaki koyoka mitindo na yo te. 17 Baboyaki koyoka,+ mpe babosanaki misala na yo ya kokamwa oyo osalaki kati na bango. Nzokande bakómaki mitó makasi* mpe baponaki mokambi mpo na kozonga na boombo na bango na Ezipito.+ Kasi ozali Nzambe oyo asepelaka kolimbisa,* ya ngɔlu* mpe ozalaka na motema mawa, oyokaka nkanda noki te mpe otondi na bolingo ya sembo,*+ mpe osundolaki bango te.+ 18 Bamisalelaki ekeko ya mwana-ngɔmbɛ ya ebende* mpe babandaki koloba: ‘Talá Nzambe na yo oyo abimisaki yo na Ezipito,’+ mpe basalaki makambo mingi oyo ezangi limemya. 19 Atako bongo, mpo na motema mawa monene oyo ozali na yango, osundolaki bango te na esobe.+ Likonzí ya lipata elongwaki te likoló na bango na moi mpo na kokamba bango na nzela, mpe na butu likonzí ya mɔtɔ ezalaki kongɛngisa nzela oyo basengelaki kolanda.+ 20 Mpe opesaki bango elimo na yo ya malamu mpo bákóma na bososoli,+ oboyaki te kopesa bango mana na yo,+ mpe opesaki bango mai ntango bayokaki mposa ya mai.+ 21 Mbula 40 na esobe, opesaki bango bilei.+ Bazangaki eloko te. Bilamba na bango ebebaki te,+ mpe makolo na bango evimbaki te.
22 “Opesaki bango bikólo mpe bato na yango, okabolelaki bango yango ndambondambo,+ bongo bazwaki mokili ya Sihone,+ elingi koloba, mokili ya mokonzi ya Heshibone,+ mpe mokili ya Oge+ mokonzi ya Bashane. 23 Osalaki ete bana na bango bákóma mingi lokola minzoto ya likoló.+ Na nsima okɔtisaki bango na mokili oyo olakaki bankɔkɔ na bango ete bakokɔta mpe bakozwa yango.+ 24 Bongo bana na bango bakɔtaki mpe bazwaki mokili yango.+ Otyaki na nse ya bokonzi na bango Bakanana,+ oyo bazalaki kofanda na mokili yango, mpe opesaki na mabɔkɔ na bango bakonzi na bango ná bato ya bikólo ya mokili yango, mpo básala bango ndenge balingi. 25 Mpe babɔtɔlaki bingumba oyo ebatelami makasi+ ná mabele oyo ebotaka malamu,+ mpe bazwaki bandako oyo etondi na biloko ya malamu ndenge na ndenge, mabulu oyo basilá kotimola mpo na kobomba mai, bilanga ya vinyo, bilanga ya olive+ ná ebele ya banzete oyo ebotaka mbuma; bongo balyaki mpe batondaki, bakómaki mafutamafuta, mpe bazalaki kosepela na bolamu na yo monene.
26 “Kasi, bazangaki botosi, batombokelaki yo+ mpe bapesaki Mobeko na yo mokɔngɔ.* Babomaki basakoli na yo, oyo bazalaki kokebisa bango mpo na kosalisa bango bázongela yo, mpe basalaki makambo mingi oyo ezangi limemya.+ 27 Mpo na yango, opesaki bango na mabɔkɔ ya banguna na bango,+ oyo bazalaki se komonisa bango mpasi.+ Kasi na kati ya mpasi na bango, bazalaki kobelela yo mpe yo ozalaki koyoka bango kuna na likoló. Mpe mpo na motema mawa monene oyo ozali na yango, ozalaki kopesa bango bato mpo bábikisa bango na mabɔkɔ ya banguna na bango.+
28 “Kasi ntango kaka bazalaki kopema mwa moke, bazalaki lisusu kosala makambo oyo ezali mabe na miso na yo,+ mpe ozalaki kosundola bango na mabɔkɔ ya banguna na bango, oyo bazalaki kokonza* bango.+ Bongo bazalaki kozongela yo mpe kobelela yo mpo osalisa bango,+ mpe ozalaki koyoka bango kuna na likoló mpe kobikisa bango mbala na mbala, mpo na motema mawa na yo monene.+ 29 Ozalaki kokebisa bango mpo na kosalisa bango bázongela Mobeko na yo. Kasi bazalaki kosala makambo na lofundo mpe baboyaki koyoka mitindo na yo.+ Basalaki lisumu mpo batosaki malako na yo te, oyo epesaka bomoi na moto oyo atosi yango.+ Kasi bazalaki kaka kopesa yo mokɔngɔ, bazalaki mitó makasi,* mpe baboyaki koyoka yo. 30 Omoniselaki bango motema molai+ bambula mingi mpe ozalaki kaka kokebisa bango na elimo na yo, na nzela ya basakoli na yo, kasi baboyaki koyoka. Nsukansuka opesaki bango na mabɔkɔ ya bato ya bikólo ya mikili yango.+ 31 Mpe na motema mawa monene oyo ozali na yango, osilisaki bango nyonso te+ mpe osundolaki bango te, mpo ozali Nzambe ya ngɔlu* mpe ya motema mawa.+
32 “Mpe sikoyo, Ee Nzambe na biso, Nzambe monene, ya nguya mpe ya nsɔmɔ, oyo abatelaka kondimana na ye mpe amonisaka bolingo ya sembo,+ komona mpamba te bampasi nyonso oyo ekómeli biso, bakonzi na biso, bankumu na biso,+ banganga-nzambe na biso,+ basakoli na biso,+ bankɔkɔ na biso ná bato na yo nyonso, banda na mikolo ya bakonzi ya Asiri+ tii na mokolo ya lelo. 33 Na makambo nyonso oyo ekómeli biso, omonisi ete ozali sembo* mpo osali makambo na bosembo. Kasi biso tosalaki makambo na motema mabe.+ 34 Bakonzi na biso, bankumu na biso, banganga-nzambe na biso ná bankɔkɔ na biso batosaki Mobeko na yo te; batyaki mpe likebi te na mitindo na yo mpe na makundoli* na yo oyo opesaki mpo na kokebisa bango. 35 Ata ntango bazalaki na bokonzi na bango mpe bazalaki kosepela na ebele ya biloko ya malamu oyo ozalaki kopesa bango, mpe bazalaki na mokili monene oyo opesaki bango, oyo ebotaka malamu, basalelaki yo te+ mpe batikaki te makambo ya mabe oyo bazalaki kosala. 36 Sikoyo lelo tozali baombo,+ ɛɛ, baombo na mokili oyo opesaki bankɔkɔ na biso mpo bálya mbuma na yango mpe biloko na yango ya malamu. 37 Ebele ya biloko oyo ebotaka na mboka yango ezali mpo na bakonzi oyo otyelaki biso mpo na masumu na biso.+ Bazali kokonza biso* ná banyama na biso, ndenge balingi, mpe biso tozali na mpasi monene.
38 “Na yango, na kotalela nyonso wana, tosali boyokani ya makasi+ oyo tokomi na mokanda mpe bankumu na biso, Balevi na biso mpe banganga-nzambe na biso batye yango kashɛ.”+
10 Baoyo batyaki kashɛ yango+ ezalaki:
Guvɛrnɛrɛ* Nehemia, mwana ya Hakalia,
Mpe Zidikiya, 2 Seraya, Azaria, Yirimia, 3 Pashure, Amaria, Malakiya, 4 Hatushe, Shebania, Maluke, 5 Harime,+ Meremote, Obadia, 6 Danyele,+ Ginetone, Baruke, 7 Meshulame, Abiya, Miyamine, 8 Maazia, Biligai ná Shemaya; bango bazali banganga-nzambe.
9 Mpe Balevi oyo batyaki kashɛ ezalaki: Yeshua mwana ya Azania, Binui na kati ya bana ya Henadade, Kadimiele,+ 10 mpe bandeko na bango Shebania, Hodia, Kelita, Pelaya, Hanane, 11 Mika, Rehobe, Hashabia, 12 Zakure, Sherebia,+ Shebania, 13 Hodia, Bani mpe Beninu.
14 Bankumu ya bato oyo batyaki kashɛ ezalaki: Paroshe, Pahate-moabe,+ Elame, Zatu, Bani, 15 Buni, Azegade, Bebai, 16 Adoniya, Bigivai, Adine, 17 Atere, Ezekiasi, Azure, 18 Hodia, Hashume, Bezai, 19 Harife, Anatote, Nebai, 20 Magepiashe, Meshulame, Hezire, 21 Meshezabele, Zadoke, Yadua, 22 Pelatia, Hanane, Anaya, 23 Hoshea, Hanania, Hashube, 24 Haloheshe, Pila, Shobeke, 25 Rehume, Hashabana, Maaseya, 26 Ahiya, Hanane, Anane, 27 Maluke, Harime, mpe Baana.
28 Mpe bato mosusu, elingi koloba banganga-nzambe, Balevi, bakɛngɛli ya baporte, bayembi, basaleli ya tempelo* mpe moto nyonso oyo amikabolaki na bato ya bikólo ya mokili yango mpo na kotosa Mobeko ya Nzambe ya solo,+ elongo na basi na bango, bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi, baoyo nyonso bazalaki na boyebi mpe bakokaki* kokanga ntina ya boyokani oyo esalemaki, 29 basanganaki na bandeko na bango, bato na bango ya lokumu, mpe balapaki ndai oyo soki batosi yango te bakozwa elakeli mabe. Balobaki ete bakotosa Mobeko ya Nzambe ya solo, oyo epesamaki na nzela ya Moize mosaleli ya Nzambe ya solo. Balapaki mpe ndai ete bakotosa malamumalamu mitindo nyonso ya Yehova Nkolo na biso, bikateli na ye ya lisambisi mpe malako na ye. 30 Tokopesa te bana na biso ya basi epai ya bato ya bikólo ya mokili yango, mpe tokozwa te bana na bango ya basi mpo na bana na biso ya mibali.+
31 Soki bato ya bikólo ya mokili yango bayei na biloko ya kotɛka mpe mbuma ya ndenge nyonso mpo na kotɛka na Sabata, tokosomba eloko moko te epai na bango na Sabata+ to na mokolo mosusu mosantu.+ Lisusu tokozwa eloko moko te na elanga na mbula ya nsambo,+ mpe tokotika nyongo nyonso.+
32 Lisusu, tomityelaki mobeko ete mbula na mbula mokomoko na biso akopesa moko ya bandambo misato ya shekele* mpo na mosala ya ndako* ya Nzambe na biso,+ 33 mpo na mampa ya kotanda,*+ likabo ya mbuma ya ntango nyonso,+ likabo ya kotumba ya ntango nyonso ya Basabata+ mpe ya basanza ya sika,+ mpe mpo na bafɛti oyo etyamá,+ mpo na biloko mosantu, mpo na makabo ya lisumu+ mpo na kozipa masumu ya Yisraele, mpe mpo na mosala nyonso ya ndako ya Nzambe na biso.
34 Tobwakaki mpe mbɛsɛ mpo na koyeba libota nini ya banganga-nzambe, ya Balevi mpe ya bato esengeli komema nkoni na ndako ya Nzambe na biso, na bantango oyo etyamá, mbula na mbula, mpo na kopelisaka yango likoló ya etumbelo ya Yehova Nzambe na biso, ndenge ekomami na Mobeko.+ 35 Mbula na mbula tokomema mpe na ndako ya Yehova+ bambuma ya liboso ya mabele na biso mpe bambuma ya liboso ya nzete ya lolenge nyonso, 36 ezala mpe bana ya liboso kati na bana na biso ya mibali mpe ya bibwɛlɛ na biso,+ na kolanda ndenge ekomami na Mobeko, mpe bana ya liboso ya bitonga na biso ya bangɔmbɛ, ya bampate, mpe ya bantaba. Tokomema yango na ndako ya Nzambe na biso, epai ya banganga-nzambe oyo bazali kosala mosala na ndako ya Nzambe na biso.+ 37 Lisusu, tokomemela banganga-nzambe na bisika ya kobomba biloko* na ndako ya Nzambe na biso:+ farini ya mbuma na biso ya liboso,+ makabo na biso, mbuma ya nzete ya lolenge nyonso,+ vinyo ya sika ná mafuta.+ Mpe tokomema moko ya bandambo zomi ya biloko ya mabele na biso epai ya Balevi,+ mpo Balevi nde bazwaka moko ya bandambo zomi* na bingumba na biso nyonso esika basalaka bilanga.
38 Mpe nganga-nzambe moko, mokitani ya Arona, asengeli kozala elongo na Balevi ntango bazali kozwa moko ya bandambo zomi. Mpe Balevi basengeli kopesa moko ya bandambo zomi ya moko ya bandambo zomi oyo bazwaki, na ndako ya Nzambe na biso+ na biteni* ya ndako ya kobomba biloko. 39 Mpo ezali na bisika yango ya kobomba biloko* nde Bayisraele mpe bana ya Balevi basengeli komema likabo+ ya mbuma, vinyo ya sika mpe mafuta.+ Mpe kuna nde batyaka bisaleli ya esika mosantu mpe banganga-nzambe oyo basalaka mosala, bakɛngɛli ya baporte ná bayembi bazalaka wana. Tokosundola ndako ya Nzambe na biso te.+
11 Bankumu ya bato bazalaki kofanda na Yerusaleme;+ kasi mpo na bato mosusu, babwakaki mbɛsɛ+ mpo na kopona libota moko na kati ya mabota zomi mpo eya kofanda na Yerusaleme, engumba mosantu, nzokande mabota mosusu libwa ekotikala na bingumba mosusu. 2 Lisusu, mibali mosusu bandimaki bango moko kofanda na Yerusaleme mpe bato bakumisaki* bango.
3 Talá bankombo ya bakambi ya etúká* oyo bazalaki kofanda na Yerusaleme. (Bato mosusu ya Yisraele, banganga-nzambe, Balevi, basaleli ya tempelo,*+ mpe bana ya basaleli ya Salomo+ bazalaki kofanda na bingumba mosusu ya Yuda, moto na moto na mabele na ye moko, na engumba na ye.+
4 Bato mosusu ya libota ya Yuda mpe ya Benyamina bazalaki mpe kofanda na Yerusaleme.) Na libota ya Yuda: Ataya mwana ya Uzia mwana ya Zekaria mwana ya Amaria mwana ya Shefatia mwana ya Mahalalele moko ya bana ya Pereze,+ 5 mpe Maaseya mwana ya Baruke mwana ya Koloze mwana ya Hazaya mwana ya Adaya mwana ya Yoyaribe mwana ya Zekaria ya libota ya Bashela. 6 Bato nyonso ya libota ya Pereze oyo bazalaki kofanda na Yerusaleme bazalaki 468, bango nyonso mibali ya mpiko.
7 Na libota ya Benyamina: Salu+ mwana ya Meshulame, mwana ya Yoede, mwana ya Pedaya, mwana ya Kolaya, mwana ya Maaseya, mwana ya Itiele, mwana ya Yeshaya, 8 mpe nsima na ye, Gabai ná Salai: bato 928; 9 mpe Yoele mwana ya Zikri azalaki mokɛngɛli na bango na engumba, mpe Yuda mwana ya Hasenua azalaki mosungi na ye.
10 Na kati ya banganga-nzambe ezalaki na Yedaya mwana ya Yoyaribe, Yakine,+ 11 Seraya mwana ya Hilikiya mwana ya Meshulame mwana ya Zadoke mwana ya Merayote mwana ya Ahitube,+ mokambi moko ya ndako* ya Nzambe ya solo, 12 mpe bandeko na bango oyo bazalaki kosala mosala na ndako ya Nzambe: bato 822. Ezalaki mpe na Adaya mwana ya Yerohame, mwana ya Pelalia, mwana ya Amezi, mwana ya Zekaria, mwana ya Pashure,+ mwana ya Malakiya, 13 mpe bandeko na ye, bankumu ya mabota ya batata: bato 242, ná Amashisai mwana ya Azarele, mwana ya Ahazai, mwana ya Meshilemote, mwana ya Imere, 14 mpe bandeko na bango oyo bazalaki mibali ya nguya mpe ya mpiko: bato 128. Mokɛngɛli na bango ezalaki Zabediele, moto ya libota moko ya lokumu.
15 Mpe na kati ya Balevi ezalaki na Shemaya+ mwana ya Hashube, mwana ya Azirikame, mwana ya Hashabia, mwana ya Buni, 16 mpe Shebetai+ ná Yozabade,+ bankumu ya Balevi, oyo bazalaki kokamba misala ya libándá ya ndako ya Nzambe ya solo. 17 Ezalaki mpe na Matania,+ mwana ya Mika mwana ya Zabedi mwana ya Asafe,+ mokambi ya nzembo, oyo azalaki kokamba nzembo ya masanzoli na ntango ya libondeli,+ ndeko na ye Bakabukia azalaki mosungi na ye, mpe Abada mwana ya Shamua, mwana ya Galale, mwana ya Yedutune.+ 18 Balevi nyonso na engumba mosantu bazalaki 284.
19 Bakɛngɛli ya baporte: Akube, Talamone+ ná bandeko na bango oyo bazalaki kokɛngɛla na baporte, bango nyonso bato 172.
20 Bato mosusu ya Yisraele, banganga-nzambe mpe Balevi, bazalaki na bingumba mosusu nyonso ya Yuda, moto na moto na mabele ya libula ya bankɔkɔ na ye.* 21 Basaleli ya tempelo*+ bazalaki kofanda na Ofɛlɛ.+ Ziha ná Gishipa bazalaki kokamba basaleli ya tempelo.*
22 Mokɛngɛli ya Balevi na Yerusaleme ezalaki Uzi mwana ya Bani, mwana ya Hashabia, mwana ya Matania,+ mwana ya Mika na bana ya Asafe, bayembi; azalaki kokamba mosala ya ndako ya Nzambe ya solo. 23 Mokonzi apesaki etinda moko mpo na bayembi+ mpe basalelaki bango ebongiseli moko na kotalela bosɛnga na bango ya mokolo na mokolo. 24 Petahia mwana ya Meshezabele ya libota ya Zera mwana ya Yuda azalaki mopesi-toli ya mokonzi* mpo na likambo nyonso oyo etali bato.
25 Na oyo etali bamboka ná bilanga na yango, bato mosusu ya libota ya Yuda bazalaki kofanda na Kiriate-arba+ mpe na basité oyo esimbami na yango,* na Dibone mpe na basité oyo esimbami na yango, na Yekabezeele+ ná bamboka na yango ya zingazinga, 26 na Yeshua, na Molada,+ na Bete-pelete,+ 27 na Hazare-shuale,+ na Beere-sheba mpe na basité oyo esimbami na yango,* 28 na Ziklage,+ na Mekona ná basité oyo esimbami na yango,* 29 na Ene-rimone,+ na Zora,+ mpe na Yaramute, 30 na Zanoa,+ na Adulame ná bamboka na yango ya zingazinga, na Lakishi+ mpe pembenipembeni* na yango, mpe na Azeka+ mpe na basité oyo esimbami na yango.* Bafandaki* banda na Beere-sheba tii na Lobwaku ya Hinome.+
31 Mpe bato ya libota ya Benyamina bazalaki na Geba,+ Mikemashe, Aiya, Betele+ mpe na basité oyo esimbami na yango,* 32 na Anatote,+ na Nobe,+ na Anania, 33 na Hazore, na Rama,+ na Gitaime, 34 na Hadide, na Zeboime, na Nebalate, 35 na Lode mpe Ono,+ lobwaku ya bato ya misala ya mabɔkɔ. 36 Mpe bituluku mosusu ya Balevi ya Yuda efandaki na teritware ya Benyamina.
12 Talá bankombo ya banganga-nzambe mpe Balevi oyo bazongaki elongo na Zerubabele+ mwana* ya Shealatiele+ ná Yeshua:+ Seraya, Yirimia, Ezera, 2 Amaria, Maluke, Hatushe, 3 Shekania, Rehume, Meremote, 4 Ido, Ginetoi, Abiya, 5 Miyamine, Maadia, Biliga, 6 Shemaya, Yoyaribe, Yedaya, 7 Salu, Amoke, Hilikiya, ná Yedaya. Bango nde bazalaki bankumu ya banganga-nzambe mpe ya bandeko na bango, na eleko ya Yeshua.
8 Balevi ezalaki Yeshua, Binui, Kadimiele,+ Sherebia, Yuda, mpe Matania. Matania+ azalaki kokamba nzembo ya kopesa matɔndi elongo na bandeko na ye. 9 Bakabukia ná Uni bazalaki bandeko na bango, oyo batalanaki na bango mpo na mosala ya kokɛngɛla.* 10 Yeshua abotaki Yoyakime, Yoyakime abotaki Eliashibe,+ mpe Eliashibe abotaki Yoyada.+ 11 Yoyada abotaki Yonatane, mpe Yonatane abotaki Yadua.
12 Talá bankombo ya banganga-nzambe, bankumu ya batata ya mabota na eleko ya Yoyakime: mpo na libota ya Seraya,+ Meraya; mpo na libota ya Yirimia, Hanania; 13 mpo na libota ya Ezera,+ Meshulame; mpo na libota ya Amaria, Yehohanane; 14 mpo na libota ya Maluki, Yonatane; mpo na libota ya Shebania, Yozefe; 15 mpo na libota ya Harime,+ Adena; mpo na libota ya Merayote, Helekai; 16 mpo na libota ya Ido, Zekaria; mpo na libota ya Ginetone, Meshulame; 17 mpo na libota ya Abiya,+ Zikri; mpo na libota ya Miniamine, . . . ;* mpo na libota ya Moadia, Pilitai; 18 mpo na libota ya Biliga,+ Shamua; mpo na libota ya Shemaya, Yehonatane; 19 mpo na libota ya Yoyaribe, Matenai; mpo na libota ya Yedaya,+ Uzi; 20 mpo na libota ya Salai, Kalai; mpo na libota ya Amoke, Ebere; 21 mpo na libota ya Hilikiya, Hashabia; mpo na libota ya Yedaya, Netanele.
22 Bankumu ya batata ya mabota ya Balevi mpe ya banganga-nzambe bakomamaki nkombo na eleko ya Eliashibe, ya Yoyada, ya Yohanane mpe ya Yadua,+ tii na ntango ya bokonzi ya Dariuse moto ya Perse.
23 Balevi oyo bazalaki bankumu ya mabota ya batata bakomamaki nkombo na buku ya masolo ya kala ya ntango wana, tii na eleko ya Yohanane mwana ya Eliashibe. 24 Bankumu ya Balevi ezalaki Hashabia, Sherebia, mpe Yeshua+ mwana ya Kadimiele.+ Bandeko na bango batɛlɛmaki, batalani na bango, mpo na kopesa masanzoli mpe matɔndi epai ya Nzambe na kolanda malako ya Davidi+ moto ya Nzambe ya solo. Etuluku moko ya bakɛngɛli etɛlɛmaki pene na etuluku mosusu ya bakɛngɛli. 25 Matania,+ Bakabukia, Obadia, Meshulame, Talamone, mpe Akube+ bazalaki bakɛngɛli ya baporte;+ bazalaki kokɛngɛla bandako ya kobomba biloko oyo ezalaki pene na baporte ya tempelo. 26 Basalaki mosala na bango na eleko ya Yoyakime mwana ya Yeshua,+ mwana ya Yozadake, mpe na eleko ya guvɛrnɛrɛ Nehemia mpe ya nganga-nzambe Ezera,+ mosali-bakopi.*
27 Na ntango ya bofungoli bifelo ya Yerusaleme balukaki Balevi, na bisika nyonso oyo bazalaki kofanda mpe bamemaki bango na Yerusaleme mpo na kosala molulu ya bofungoli na esengo, na nzembo ya kopesa matɔndi,+ na basɛmbalɛ, na bibɛtɛlo ya bansinga mpe na banzɛnzɛ. 28 Mpe bana ya bayembi* bayanganaki, bautaki na etúká,* na zingazinga ya Yerusaleme, na bamboka ya bato ya Netofa,+ 29 na Bete-gilgale+ mpe pembenipembeni ya Geba+ mpe ya Azemavete,+ mpo bayembi batongaki bamboka na bango zingazinga ya Yerusaleme. 30 Mpe banganga-nzambe ná Balevi bamipɛtolaki mpe bapɛtolaki bato,+ baporte,+ ná efelo.+
31 Bongo namatisaki bankumu ya Yuda likoló ya efelo. Lisusu, natyaki bituluku minene mibale ya bayembi mpo na koyemba nzembo ya kopesa matɔndi. Etuluku mokomoko ezalaki na milɔngɔ ya bato nsima na yango. Etuluku moko etambolaki na lobɔkɔ ya mobali likoló ya efelo, ekei na Porte ya Mabondo ya Putulu ya Mɔtɔ.+ 32 Hoshaya ná ndambo ya bankumu ya Yuda batambolaki nsima na bango, 33 elongo na Azaria, Ezera, Meshulame, 34 Yuda, Benyamina, Shemaya ná Yirimia. 35 Bazalaki elongo na bana mosusu ya banganga-nzambe oyo bazalaki na bakelelo:+ Zekaria mwana ya Yonatane, mwana ya Shemaya, mwana ya Matania, mwana ya Mikaya, mwana ya Zakure, mwana ya Asafe,+ 36 mpe bandeko na ye Shemaya, Azarele, Milalai, Gilalai, Maai, Netanele, Yuda, mpe Hanani, ná bibɛtɛlo ya miziki ya Davidi,+ moto ya Nzambe ya solo. Mpe Ezera+ mosali-bakopi* azalaki kotambola liboso na bango. 37 Na Porte ya Liziba+ bakendaki alima liboso na bango, mpe bamataki na Eskalye+ ya Sité ya Davidi,+ baleki na nzela ya komata na efelo likoló ya Ndako ya Davidi mpe tii na Porte ya Mai,+ na ɛsti.
38 Etuluku mosusu ya bayembi-nzembo ya kopesa matɔndi etambolaki na ngámbo mosusu.* Nazalaki nsima na bango, elongo na ndambo mosusu ya bato. Totambolaki na efelo, likoló ya Linɔ́ngi ya Bitumbelo ya mampa,+ tii na Efelo Monene,+ 39 mpe likoló ya Porte ya Efraime,+ tii na Porte ya Engumba ya Kala,+ toleki na Porte ya Mbisi+ na Linɔ́ngi ya Hananele,+ na Linɔ́ngi ya Mea, tii na Porte ya Bampate;+ totɛlɛmaki na Porte ya Bakɛngɛli.
40 Nsukansuka bituluku mibale ya bayembi-nzembo ya kopesa matɔndi etɛlɛmaki liboso ya ndako ya Nzambe ya solo. Ngai mpe natɛlɛmaki ná ndambo ya bayangeli-basungi oyo bazalaki elongo na ngai, 41 mpe banganga-nzambe Eliakime, Maaseya, Miniamine, Mikaya, Eliyonai, Zekaria, mpe Hanania, ná bakelelo, 42 mpe Maaseya, Shemaya, Eleazare, Uzi, Yehohanane, Malakiya, Elame ná Ezere. Mpe bayembi bayembaki na mongongo makasi na litambwisi ya Yiziraya.
43 Na mokolo yango bapesaki bambeka ebele mpe basepelaki,+ mpo Nzambe ya solo asalaki ete bázala na esengo mingi mpenza. Basi ná bana mpe bazalaki kosepela,+ mpe kosepela ya Yerusaleme eyokanaki tii mosika.+
44 Na mokolo yango, mibali batyamaki mpo bákɛngɛlaka bandako ya kobomba+ makabo,+ bambuma ya liboso,+ mpe moko ya bandambo zomi.*+ Kuna, basengelaki koyamba biloko oyo euti na bilanga ya bingumba, biloko oyo Mobeko esɛngaki+ mpo na banganga-nzambe mpe Balevi.+ Kutu, bato ya Yuda bazalaki kosepela mpo banganga-nzambe mpe Balevi bazalaki kosala mosala na bango. 45 Babandaki kokokisa mikumba na bango na mosala ya Nzambe na bango mpe kosala milulu ya komipɛtola, ndenge bayembi mpe bakɛngɛli ya baporte basalaki, na kolanda malako ya Davidi mpe ya mwana na ye Salomo. 46 Mpo kala, na eleko ya Davidi mpe ya Asafe, ezalaki na bakambi ya bayembi mpe ya nzembo ya masanzoli mpe ya kopesa Nzambe matɔndi.+ 47 Na eleko ya Zerubabele+ mpe na eleko ya Nehemia, Bayisraele nyonso bazalaki kopesa bayembi+ mpe bakɛngɛli ya baporte+ biloko, na kolanda bosɛnga na bango ya mokolo na mokolo. Bazalaki mpe kotya pembeni makabo mpo na Balevi,+ mpe Balevi bazalaki kotya pembeni makabo mpo na bakitani ya Arona.
13 Na ntango wana, batángelaki bato buku ya Moize,+ mpe bamonaki ekomamá na kati ete Moamone to Momoabe+ akoki ata moke te kokɔta na lisangá ya Nzambe ya solo.+ 2 Kutu, ntango Baamone ná Bamoabe bakutanaki na Bayisraele bapesaki bango mampa te, mai mpe te. Kasi bafutaki Balaama mpo alakela bango mabe.+ Nzokande, Nzambe na biso abongolaki elakeli mabe yango lipamboli.+ 3 Ntango kaka bayokaki Mobeko, babandaki kokabola Yisraele ná bato nyonso oyo bazalaki bapaya.*+
4 Nzokande, liboso na yango, nganga-nzambe oyo azalaki na mokumba ya kobatela bisika ya kobomba biloko* na ndako* ya Nzambe na biso+ ezalaki Eliashibe,+ ndeko ya Tobia.+ 5 Eliashibe apesaki Tobia esika moko monene ya kobomba biloko,* esika bazalaki liboso kotya likabo ya mbuma, olibana, bisaleli, mpe moko ya bandambo zomi* ya mbuma, ya vinyo ya sika mpe ya mafuta,+ oyo Balevi,+ bayembi ná bakɛngɛli ya baporte bazalaki na lotomo ya kozwa, mpe likabo mpo na banganga-nzambe.+
6 Na ntango wana nyonso, nazalaki na Yerusaleme te, mpo nakendaki epai ya Mokonzi Artazerezese+ ya Babilone na mbula ya 32 ya boyangeli na ye.+ Mwa moke na nsima, nasɛngaki mokonzi nzela nakende mpo na mwa ntango. 7 Bongo nakómaki na Yerusaleme mpe nayaki komona likambo ya mabe mpenza oyo Eliashibe+ asalaki: apesaki Tobia+ esika moko ya kobomba biloko na lopango ya ndako ya Nzambe ya solo. 8 Nasepelaki ata moke te, mpe nabwakaki biloko nyonso ya ndako ya Tobia libándá ya eteni ya ndako yango. 9 Na nsima napesaki mitindo bápɛtola bisika ya kobomba biloko; bongo nazongisaki na kati bisaleli ya ndako ya Nzambe ya solo,+ ná likabo ya mbuma mpe olibana.+
10 Nayokaki mpe ete Balevi+ bazalaki kozwa te biloko oyo basengelaki kozwa.+ Yango wana Balevi ná bayembi oyo bazalaki kosala mosala bakendaki kosala, moto na moto na elanga na ye.+ 11 Bongo napamelaki bayangeli-basungi+ mpe nalobaki: “Mpo na nini ndako ya Nzambe ya solo esundolami boye?”+ Na nsima, nayanganisaki baoyo bakendaki mpe nalobaki na bango bázonga na bisika na bango ya mosala. 12 Mpe bato nyonso ya Yuda bayaki na moko ya bandambo zomi+ ya mbuma, ya vinyo ya sika mpe ya mafuta na bisika ya kobomba biloko.+ 13 Na nsima, natyaki nganga-nzambe Shelemia, Zadoke mosali-bakopi* mpe Pedaya oyo azalaki Molevi na mokumba ya kobatela bisika ya kobomba biloko. Hanane mwana ya Zakure mwana ya Matania azalaki mosungi na bango. Kutu eyebanaki ete mibali yango bazali bato ya kotyela motema. Bango nde bazwaki mokumba ya kokabolela bandeko na bango biloko.
14 Bongo nabondelaki: “Ee Nzambe na ngai,+ kanisá ngai mpo na likambo yango, mpe kobosana te misala ya bolingo ya sembo oyo nasali mpo na ndako ya Nzambe na ngai mpe mpo na misala oyo esalemaka kuna.”*+
15 Na eleko yango, namonaki na Yuda bato bazali konyatanyata mbuma na bikamwelo ya vinyo na mokolo ya Sabata.+ Basusu bazalaki kokangisa ebele ya mbuma esika moko mpe kotya yango likoló ya bampunda, bazalaki kokɔtisa vinyo, mbuma ya vinyo mpe mbuma ya figi mpe lolenge nyonso ya mikumba ya kilo, na Yerusaleme na mokolo ya Sabata.+ Bongo nakebisaki bango ete bátɛka biloko te na mokolo yango.* 16 Mpe bato ya Tire oyo bazalaki kofanda na engumba yango bazalaki koya na mbisi mpe lolenge nyonso ya biloko ya kotɛka, mpe bazalaki kotɛkɛla yango bato ya Yuda na Yerusaleme na mokolo ya Sabata.+ 17 Bongo napamelaki bato ya lokumu ya Yuda mpe nalobaki na bango: “Bozali koyeba mabe oyo bozali kosala? Bozali kotosa mokolo ya Sabata te! 18 Ezali te mpo bankɔkɔ na bino basalaki ndenge wana, yango wana Nzambe na biso ayeisaki mpasi oyo nyonso likoló na biso, mpe likoló ya engumba oyo? Lokola bozali kotosa Sabata te,+ nkanda ya Nzambe oyo ezali kopelela Yisraele ekokóma lisusu makasi.”
19 Na mpokwa, ntango kaka molili ebandaki kokɔta na Yerusaleme, liboso ete Sabata ebanda, napesaki mitindo ete bákanga bizipeli ya baporte. Nalobaki mpe ete báfungola yango te tii nsima ya Sabata. Mpe natyaki basaleli na ngai mosusu na baporte mpo moto moko te akɔtisa mikumba ya kilo na engumba na mokolo ya Sabata. 20 Bongo bato ya mombongo mpe bato oyo batɛkaka biloko ya ndenge nyonso balalaki butu mobimba na libándá ya Yerusaleme, mbala moko to mbala mibale. 21 Na yango nakebisaki bango mpe nalobaki na bango: “Mpo na nini bozali kolala butu mobimba liboso ya efelo? Soki bosali yango lisusu, nakobengana bino na makasi.” Banda wana, bayaki lisusu na Sabata te.
22 Mpe nayebisaki Balevi ete bámipɛtolaka mbala na mbala mpe báyaka kokɛngɛla na baporte mpo mokolo ya Sabata ezala kaka mosantu.+ Na likambo oyo mpe: “Kanisá ngai, Ee Nzambe na ngai, yokelá ngai mawa na kolanda bolingo ya sembo oyo otondi na yango.”+
23 Kaka na eleko yango, namonaki mpe Bayuda oyo babalaki* basi+ Baashedode,+ Baamone ná Bamoabe.+ 24 Ndambo ya bana na bango bazalaki koloba monɔkɔ ya Ashedode mpe ndambo bazalaki koloba minɔkɔ ya bato ya bikólo ndenge na ndenge, kasi ata moko te kati na bango ayebaki koloba monɔkɔ ya Bayuda. 25 Na yango napamelaki mibali yango mpe nalakelaki bango mabe; nabɛtaki basusu+ mpe napikolaki bango nsuki, mpe nalapisaki bango ndai na nkombo ya Nzambe ete: “Bosengeli te kopesa bana na bino ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe bosengeli kondima ata mwana na bango moko te ya mwasi mpo na bana na bino ya mibali to mpo na bino moko.+ 26 Ezalaki te mpo na basi bapaya nde Salomo mokonzi ya Yisraele akweaki na lisumu? Na kati ya bikólo mingi ezalaki na mokonzi moko te lokola ye;+ mpe Nzambe na ye alingaki ye,+ yango wana akómisaki ye mokonzi na Yisraele mobimba. Nzokande ata ye, basi bapaya bakweisaki ye na lisumu.+ 27 Ezali likambo ya nsɔmɔ te ndenge bosali mabe monene boye mpe bozangi bosembo epai ya Nzambe na biso na ndenge bobali basi bapaya?”+
28 Moko ya bana ya Yoyada+ mwana ya Eliashibe+ nganga-nzambe monene akómaki bokilo ya Sanebalate+ Mohorone. Bongo nabenganaki ye mosika na ngai.
29 Bongo nabondelaki: “Ee Nzambe na ngai, kanisá bango, mpo batyoli* bonganga-nzambe mpe kondimana ya bonganga-nzambe+ mpe ya Balevi.”+
30 Mpe napɛtolaki bango na mbindo nyonso oyo ezalaki kouta epai ya bapaya mpe napesaki banganga-nzambe ná Balevi mikumba, mpo moto na moto asala mosala na ye.+ 31 Nazwaki mpe bibongiseli mpo na komema nkoni+ na bantango oyo etyami mpe mpo na mbuma ya liboso oyo eteli.
Bongo nabondelaki: “Ee Nzambe na ngai, kanisá ngai mpe salelá ngai bolamu.”+
Elimboli, “Yah abɔndisaka.”
Talá Ap. B15.
Elingi koloba, na mbula ya 20 ya boyangeli ya Artazerezese I mokonzi ya Perse.
To, “Susa.”
To, “ndako ya mokonzi.”
To, “etúká oyo eyangelami.”
Lil., “ndako ya tata na ngai.”
To, “likebisi.”
Talá Ap. B15.
To, “mwasi ya mokonzi.”
To, “na ngambo mosusu ya Efrate.”
To, “Tempelo.”
Lil., “mosaleli.”
Lil., “Nzambe na ngai atyaki na motema na.”
To, “wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “bakembisaki mabɔkɔ na bango.”
To, “basalaki molulu ya kobandisa misala.”
Lil., “bamemaki nkingo na bango te na.”
Lil., “bazalaki bato ya kiti ya bokonzi.”
To, “na ngámbo mosusu ya Efrate.”
To, “mosali mafuta ya nsolo kitoko.”
To, “eteni oyo bamekaki bolai na yango.”
Soki 445 m. Talá Ap. B14.
To mbala mosusu, “etúká ya pembeni.”
To, “Banetinime.” Lil., “bato oyo bapesami.”
To, “Banetinime.” Lil., “bato oyo bapesami.”
To, “asepelaki te.”
To, “Bamemi-mikumba ya kilo.”
Lil., “mbala zomi.”
Lil., “batɛlɛmaki nsima ya.”
To, “ebundeli ya kobwakela.”
To, “bazalaki kolanda ngai.”
Lil., “mosuni na biso ezali ndenge moko na mosuni ya bandeko na biso.”
To, “benefisi ya lokoso.”
To, “1 %,” elingi koloba, benefisi ya sanza na sanza.
Lil., “naningisaki ntolo na ngai,” elingi koloba, eteni ya elamba oyo ezalaka na ntolo, oyo na ntango ya kala bazalaki kosalela lokola libenga.
To, “Ezala bongo.”
Shekele moko = 11,4 g. Talá Ap. B14.
To, “na mbongo na ngai.”
To, “salelá ngai bolamu.”
Lil., “euti na motema na yo.”
Lil., “lendisá mabɔkɔ na ngai.”
Talá Ap. B15.
Lil., “bakweaki mingi na miso na bango moko.”
Lil., “atyaki kati na motema na ngai.”
To, “etúká oyo eyangelami.”
Lil., “ndako.”
To, “Banetinime.” Lil., “bato oyo bapesami.”
To, “Banetinime.” Lil., “bato oyo bapesami.”
To, “batalelamaki lokola bato ya mbindo mpe balongolamaki na mosala ya bonganga-nzambe.”
To, “Tireshata,” nkombo oyo Baperse bazalaki kobenga guvɛrnɛrɛ ya etúká.
Ezali mwana ya mpunda moke ya mobali ná mpunda ya mwasi.
To, “Tireshata,” nkombo oyo Baperse bazalaki kobenga guvɛrnɛrɛ ya etúká.
Mbala mingi ekokanaki na darike ya wolo, mbongo ya ebende ya Baperse oyo ezalaki na kilo ya 8,4 g. Ezali te drakimɛ oyo Makomami ya Grɛki elobeli. Talá Ap. B14.
Na Makomami ya Ebre mina moko = 570 g. Talá Ap. B14.
To, “Banetinime.” Lil., “bato oyo bapesami.”
To, “mokomeli.”
To, “mokomeli.”
To, “Ezala bongo.”
To, “Tireshata,” nkombo oyo Baperse bazalaki kobenga guvɛrnɛrɛ ya etúká.
To, “mokomeli.”
Lil., “biloko ya mafutamafuta.”
Lil., “mpo esengo ya Yehova ezali esika makasi ya libateli na bino.”
To, “mokomeli.”
To, “bandako mpo na mwa ntango.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “seko na seko.”
To, “likoló, mosika kuna na likoló.”
To, “mbu.”
Lil., “momboto.”
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “mibeko ya kotyela motema.”
Lil., “otombolaki lobɔkɔ na yo.”
Lil., “bakómisaki nkingo na bango makasi.”
Lil., “bakómisaki nkingo na bango makasi.”
To, “Nzambe ya misala ya kolimbisa.”
To, “oyokelaka bato mawa.”
To, “motema boboto.”
To, “ya ebende oyo enyangwisami.”
Lil., “babwakaki Mobeko na yo nsima ya mokɔngɔ na bango.”
To, “konyata.”
Lil., “bakómisaki nkingo na bango makasi.”
To, “oyo ayokelaka bato mawa.”
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “makebisi.”
Lil., “nzoto na biso.”
To, “Tireshata,” nkombo oyo Baperse bazalaki kobenga guvɛrnɛrɛ ya etúká.
To, “Banetinime.” Lil.,“bato oyo bapesami.”
To mbala mosusu, “bazalaki na mbula ya.”
Shekele moko = 11,4 g. Talá Ap. B14.
To, “tempelo.”
Elingi koloba, mampa ya kolakisa.
To, “bisika ya kolya.”
To, “dime.”
To, “bisika ya kolya.”
To, “bisika ya kolya.”
Lil., “bapambolaki.”
To, “etúká oyo eyangelami.”
To, “Banetinime.” Lil., “bato oyo bapesami.”
To, “tempelo.”
To, “na libula na ye moko.”
To, “Banetinime.” Lil., “bato oyo bapesami.”
To, “Banetinime.” Lil., “bato oyo bapesami.”
Lil., “azalaki na lobɔkɔ ya mokonzi.”
To, “ezali zingazinga.”
To, “ezali zingazinga.”
To, “ezali zingazinga.”
Lil., “bilanga.”
To, “esimbami na yango.”
To, “batyaki kaa na bango.”
To, “ezali zingazinga.”
Na mokapo oyo, liloba “mwana” ekoki mpe kolimbola “mokitani,” to “mofandi” ya esika moko boye.
To mbala mosusu, “esika na bango ya mosala.”
Emonani ete awa, nkombo moko ezangi na makomi ya Ebre.
To, “mokomeli.”
To, “bayembi oyo bayekolaki koyemba.”
Elingi koloba, etúká oyo ezali zingazinga ya Yordani.
To, “mokomeli.”
To, “liboso.”
To, “badime.”
To, “oyo moboti moko azalaki Moyisraele te.”
To, “bisika ya kolya.”
To, “tempelo.”
To, “esika ya kolya.”
To, “dime.”
To, “mokomeli.”
To, “mosala ya kokɛngɛla.”
To mbala mosusu, “nakebisaki bango na mokolo yango ete bátɛka biloko te.”
To, “batyaki na bandako na bango.”
To, “bakómisi mbindo.”