LOYEMBO YA SALOMO
1 Loyembo ya Salomo oyo eleki nzembo nyonso na kitoko:+
3 Malasi ya mafuta na yo ezali kitoko.+
Nkombo na yo ezali lokola mafuta ya malasi kitoko oyo esopani.+
Yango wana bilenge basi balingaka yo.
4 Zwá ngai tókende;* tópota mbangu.
Mokonzi amemi ngai na bashambrɛ na ye ya kati!
Tóyoka esengo mpe tósepela elongo.
Tólobela* ndenge na yo ya kolakisa lolango oyo eleki vinyo na elɛngi.
Balingaka* yo na ntina.
5 Nazali moindo, kasi nazali kitoko, Ee bana basi ya Yerusaleme,
Nazali lokola bahema ya Kedare,+ lokola bilamba ya hema+ ya Salomo.
6 Bótika kotalatala ngai kaka mpo nazali moindo,
Mpo moi nde eyindisá ngai.
Bandeko na ngai ya mibali basilikelaki ngai;
Batyaki ngai nabatela bilanga ya vinyo,
Kasi nabatelaki te elanga na ngai moko ya vinyo.
7 Yo moto oyo nalingaka mingi,*
Yebisá ngai esika oyo oleisaka etonga na yo,+
Esika olalisaka yango na midi.
Mpo na nini nazala lokola mwasi oyo amizipi litambala,*
Na kati ya bitonga ya baninga na yo?”
8 “Soki oyebi te, Ee yo mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko,
Landá matambe ya etonga
Mpe leisá bana-ntaba na yo pene na bahema ya babateli ya mpate.”
9 “Bolingo na ngai, nakokanisi yo na mpunda* ya mwasi oyo ezali na kati ya makalo ya Farao.+
13 Bolingo na ngai azali mpo na ngai lokola mwa saki ya malasi ya mire+
Oyo elekisaka butu mobimba na katikati ya mabɛlɛ na ngai.
14 Bolingo na ngai azali epai na ngai lokola liboke ya bafololo ya hena+
Na kati ya bilanga ya vinyo ya Ene-gedi.”+
15 “Talá! Bolingo na ngai, ozali kitoko.
Talá! Ozali kitoko. Miso na yo ezali lokola miso ya bibenga.”+
16 “Bolingo na ngai, ozali kitoko, mpe bonzenga.+
Nkasa nde mbeto na biso.
17 Mabaya oyo esimbi nsamba ya ndako na biso* ezali basɛdrɛ,
Mabaya ya nsamba na biso ezali banzete ya jenevriye.
2 “Lokola fololo lísi na kati ya banzubɛ
Bolingo na ngai azali mpe bongo na kati ya bana basi.”
3 “Lokola nzete ya pɔme na kati ya banzete ya zamba,
Bolingo na ngai azali mpe bongo na kati ya bana mibali.
Nazalaka na mposa makasi ya kofanda na nse ya elili na ye,
Mpe mbuma na ye ezalaka elɛngi na lolemo na ngai.
4 Amemaki ngai na ndako ya fɛti,*
Mpe bato nyonso bakokaki komona bolingo oyo azalaki na yango mpo na ngai.
5 Bópesa ngai bagato ya mbuma ya vinyo+ mpo nazwa lisusu makasi;
Bósunga ngai na bapɔme,
Mpo nabɛli maladi ya bolingo.
7 Ee bana basi ya Yerusaleme,
Na nkombo ya bamboloko+ mpe ya banyama babengi bishe ya esobe, nalapisi bino ndai ete:
Bómeka te kolamwisa to kotumola bolingo kati na ngai tii ntango yango moko ekolamuka.+
8 Nayoki mongongo ya bolingo na ngai!
Talá! Ye wana azali koya,
Azali komata bangomba, azali kopumbwa na bangomba mike.
9 Bolingo na ngai azali lokola mboloko, lokola mwana ya nyama ebengami serfe.+
Ye wana atɛlɛmi na nsima ya efelo na biso,
Azali kotalatala na bafɛnɛtrɛ,*
Azali kobwaka liso na kiyungulu ya bafɛnɛtrɛ.
10 Bolingo na ngai alobi na ngai boye:
‘Tɛlɛmá, moto oyo nalingaka mingi,
Ozali mpenza kitoko, yaká tókende.
11 Talá! Eleko ya malili makasi* eleki.
Bambula makasi esili mpe ekei.
Ntango ekoki mpo na kokata bitape ya nzete ya vinyo,+
13 Bafigi ya ebandeli eteli na nzete;+
Banzete ya vinyo eboti bafololo mpe epanzi nsolo na yango ya kitoko.
Bolingo na ngai, tɛlɛmá mpe yaká.
Ozali mpenza kitoko, yaká tókende.
14 Ee ebenga na ngai, na kati ya madusu ya libanga,+
Na kati ya mwa mabulu ya ngomba ya libanga,
Nazali na mposa ya komona yo mpe koyoka mongongo na yo,+
Mpo mongongo na yo ezali kitoko mpe nzoto na yo ezali bonzenga.’”+
15 “Bókangela biso bagambala,
Bagambala ya mike oyo ezali kobebisa bilanga ya vinyo,
Mpo bilanga na biso ya vinyo etondi na bafololo.”
16 “Bolingo na ngai azali ya ngai mpe ngai nazali ya ye.+
Azali kobatela bampate+ na kati ya bafololo lísi.+
17 Liboso ete mopɛpɛ ya moi epɛpa mokemoke mpe bilili elimwa,
Zongá nokinoki, Ee bolingo na ngai;
Lokola mboloko+ to mwana ya nyama ebengami serfe+ likoló ya bangomba oyo ekaboli biso.*
Nalukaki ye, kasi namonaki ye te.+
2 Nakotɛlɛma mpe nakotambolatambola na engumba;
Na babalabala mpe na bisika minene ya bato nyonso,
Nakoluka moto oyo nalingaka.
Nalukaki ye, kasi namonaki ye te.
3 Basinzili oyo bazalaki kotambola mpo na kokɛngɛla engumba bakutanaki na ngai+ mpe natunaki bango:
‘Bomoni moto oyo nalingaka?’
4 Ntango kaka nalekaki bango
Namonaki moto oyo nalingaka.
Nakangamaki na ye, mpe nalingaki te kotika ye akende
Tii ntango namemaki ye na ndako ya mama na ngai,+
Na shambrɛ ya kati ya mwasi oyo abotaki ngai.
5 Ee bana basi ya Yerusaleme,
Na nkombo ya bamboloko mpe ya banyama babengi bishe ya esobe, nalapisi bino ndai ete:
Bómeka te kolamwisa to kotumola bolingo kati na ngai tii ntango yango moko ekolamuka.”+
6 “Nini wana euti na esobe mpe ezali komata lokola makonzí ya milinga,
Oyo batye malasi ya mire mpe ya olibana,
Mpe mitindo nyonso ya pudrɛ ya nsolo kitoko ya moto ya mombongo?”+
7 “Talá! Ezali tipoyi* ya Salomo.
Mibali ya nguya ntuku motoba bazingi yango,
Oyo bazwami na kati ya mibali ya nguya ya Yisraele,+
8 Bango nyonso bazali na mopanga,
Balakisá bango ndenge ya kobunda,
Moto na moto na mopanga na ye na loketo
Mpo na komibatela na makama ya butu.”
10 Asalá makonzí na yango na palata,
Biloko oyo esimbi yango ezali ya wolo.
Kiti na yango ezali ya lɛnɛ ya mwa motane-bulé;
Bana basi ya Yerusaleme babongisá kati ya tipoyi yango
Na bolingo mpenza.”
11 “Ee bana basi ya Siona, bóbima,
Bótala Mokonzi Salomo
Alati motole* ya libala oyo mama na ye+ atongelaki ye
Na mokolo ya libala na ye,
Na mokolo oyo motema na ye ezalaki na esengo.”
4 “Talá! Bolingo na ngai, ozali kitoko.
Talá! Ozali kitoko.
Miso na yo ezali lokola miso ya bibenga, ezipami na nse ya litambala na yo.
Nsuki na yo ezali lokola etonga ya bantaba
Oyo ezali kokita na bangomba ya Gileade.+
2 Mino na yo ezali lokola etonga ya bampate oyo euti kokatama nsuki sika
Oyo ebimi na mai nsima ya kosukolama,
Yango nyonso ezali na bana ya mapasa,
Mpe moko te ebungisi mwana na yango.
3 Mbɛbu na yo ezali lokola nsinga ya elamba ya motane makasi,
Mpe maloba na yo ezali kitoko.
Matama* na yo oyo ezipami na nse ya litambala na yo
Ezali lokola eteni ya mbuma ya grenade.
4 Nkingo na yo+ ezali lokola linɔ́ngi ya Davidi,+
Oyo batongá na mabanga oyo ebongisami na milɔngɔ
Oyo likoló na yango batyá* banguba nkóto,
Banguba nyonso ya sɛrklɛ ya bilombe mibali.+
5 Mabɛlɛ na yo mibale ezali lokola bana mibale ya nyama babengi bishe,
Mapasa ya mboloko,+
Oyo ezali kolya na kati ya bafololo lísi.”
6 “Liboso ete mopɛpɛ ya moi epɛpa mokemoke mpe bilili elimwa,
Nakokende na ngai na ngomba ya mire
Mpe na ngomba moke ya olibana.”+
Kitá uta na nsɔngɛ ya ngomba ya Amana,*
Uta na nsɔngɛ ya ngomba ya Senire, uta na nsɔngɛ ya ngomba ya Hermone,+
Uta na bisika oyo bankɔsi efandaka, uta na bangomba ya bankɔi.
9 Ndeko na ngai ya mwasi, mwasi oyo nakobala, obɛtisi ngai motema,+
Otali ngai kaka mbala moko mpe obɛtisi ngai motema,
Na mwa biju oyo esimbami na shɛnɛti* ya nkingo na yo.
10 Ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai oyo nakobala, ndenge na yo ya kolakisa lolango ezali kitoko mpenza!+
Ndenge na yo ya kolakisa lolango eleki vinyo na elɛngi,+
Mpe malasi na yo ezali na nsolo kitoko mpenza koleka ya biloko nyonso oyo epesaka nsolo kitoko!+
11 Mwasi na ngai oyo nakobala, mbɛbu na yo ezali lokola ndako ya nzoi oyo ezali kotangisa mafuta na yango.+
Mafuta ya nzoi mpe miliki ezali na nse ya lolemo na yo,+
Mpe nsolo kitoko ya bilamba na yo ezali lokola nsolo kitoko ya Liban.
12 Ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai oyo nakobala, azali lokola elanga oyo ezali na kati ya lopango oyo ekangamá,
Elanga oyo ezali na kati ya lopango oyo ekangamá, liziba oyo bakangi mpe batye elembo.
13 Bitape* na yo ezali lokola paradiso* ya banzete ya grenade
Oyo ezali na bambuma ya kitoko koleka, banzete ya hena mpe milona ya narde,
14 Narde+ mpe fololo safra, nkokó ya nsolo mpimbo+ mpe kinamono,+
Ná mitindo nyonso ya banzete ya olibana, mire mpe aloe,+
Ná malasi nyonso ya kitoko koleka;+
15 Ozali liziba ya mai na kati ya elanga, libulu ya mai ya pɛto,
Mpe mikɛli ya mai oyo ezali kouta na Liban.+
16 Lamuká, Ee mopɛpɛ ya nɔrdi,
Kɔtá, Ee mopɛpɛ ya sudi.
Pɛpá na elanga na ngai.
Malasi na yango ya kitoko epanzana.”
“Bolingo na ngai akɔta na elanga na ye
Mpe alya bambuma na yango oyo eleki kitoko.”
Nazwi mire na ngai na banzete na yango, mpe biloko na ngai ya nsolo kitoko.+
Nalei mafuta na ngai ya nzoi ná ndako na yango;
Namɛli vinyo na ngai mpe miliki na ngai.”+
“Baninga, bólya!
Bómɛla mpe bómilangwisa na ndenge na bino ya komonisa lolango!”+
2 “Nalali, kasi motema na ngai elali te.+
Nazali koyoka ndenge bolingo na ngai azali kobɛta kɔkɔkɔ!”
“Fungolelá ngai, Ee ndeko na ngai ya mwasi, bolingo na ngai,
Ebenga na ngai, moninga na ngai oyo azangi mbeba!
Mpo motó na ngai epɔli na mamwɛ,*
Nsuki na ngai oyo elíngamalíngamá etondi na matangá ya mai ya butu.”+
3 “‘Nalongoli robɛ na ngai.
Nalata yango lisusu?
Nasukoli makolo na ngai.
Nakómisa yango lisusu mbindo?’
4 Bolingo na ngai alongoli lobɔkɔ na ye na lidusu ya porte,
Mpe nayokaki mposa makasi ya komona ye.
5 Natɛlɛmaki mpo na kofungolela bolingo na ngai porte;
Mabɔkɔ na ngai ezalaki kotangisa mire,
Mpe misapi na ngai ezalaki kotangisa mafuta ya mire,
Likoló ya esimbeli ya porte.
6 Nafungolelaki bolingo na ngai porte,
Kasi bolingo na ngai abalukaki mpe akendaki na ye.
Nalɛmbaki nzoto* ntango akendaki.*
Nalukaki ye, kasi namonaki ye te.+
Nabengaki ye, kasi ayanolaki ngai te.
7 Basinzili oyo bazalaki kotambola mpo na kokɛngɛla engumba bakutanaki na ngai.
Babɛtaki ngai mpe bazokisaki ngai.
Basinzili ya bifelo balongolaki ngai litambala.*
8 Ee bana basi ya Yerusaleme, nalapisi bino ndai:
Soki bomoni bolingo na ngai,
Bóyebisa ye ete nabɛli maladi ya bolingo.”
9 “Bolingo na yo aleki mibali mosusu na nini,
Yo mwasi oyo oleki basi nyonso na kitoko?
Bolingo na yo aleki mibali mosusu na nini,
Mpo olapisa biso ndai ya boye?”
10 “Bolingo na ngai azali kongɛnga mpe loposo na ye ezali kitoko;*
Na kati ya mibali nkóto zomi, ye nde aleki.
11 Motó na ye ezali lokola wolo, wolo oyo eleki kitoko.
Nsuki na ye oyo elíngamálíngamá ezali lokola mandalala ya nzete ya mbila* oyo ezali koningana,
Nsuki na ye moindo lokola yanganga.*
12 Miso na ye ezali lokola bibenga pene na mikɛli ya mai,
Oyo ezali kosukola na kati ya miliki,
Efandi pene ya liziba oyo etondi na mai.*
13 Matama na ye ezali lokola mokala oyo baloni matiti ya nsolo kitoko,+
Mabondo oyo etondi na matiti ya nsolo kitoko.
Mbɛbu na ye ezali bafololo lísi, oyo ezali kotangisa mafuta ya mire.+
14 Misapi ya mabɔkɔ na ye ezali basilɛndrɛ ya wolo, oyo balatisi krizolite.
Libumu na ye ezali mpɛmbɛ ya nzoku oyo bangɛngisi mpe bazipi na mabanga ya safire.
15 Makolo na ye ezali makonzí ya libanga ya marbre oyo etɛlɛmi likoló ya bitɛlɛmiselo ya wolo oyo eleki kitoko.
Azali komonana lokola Liban, kitoko lokola basɛdrɛ.+
Ye nde bolingo na ngai, ye nde moto nalingá, Ee bana basi ya Yerusaleme.”
6 “Ee mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko,
Bolingo na yo akei wapi?
Bolingo na yo akei nzela nini?
Yaká tóluka ye.”
2 “Bolingo na ngai akiti na elanga na ye,
Na mikala ya milona oyo ebimisaka nsolo kitoko,
Mpo na kobatela bampate na kati ya bilanga
Mpe kobuka bafololo lísi.+
Azali kobatela bampate na kati ya bafololo lísi.”+
4 “Bolingo na ngai,+ ozali kitoko lokola Tirza,*+
Bonzenga lokola Yerusaleme,+
Ozali mpenza kitoko lokola mampinga ya basoda oyo bayangani zingazinga ya bɛndɛlɛ na bango.+
Nsuki na yo ezali lokola etonga ya bantaba
Oyo ezali kokita na bangomba ya Gileade.+
6 Mino na yo ezali lokola etonga ya bampate
Oyo ebimi na mai nsima ya kosukolama,
Yango nyonso ezali na bana ya mapasa,
Mpe moko te ebungisi mwana na yango.
9 Kasi kaka moko nde azali ebenga na ngai,+ oyo azangi mbeba.
Mwana kaka moko ya mama na ye.
Azali mwana oyo mama oyo abotaki ye alingaka mingi.*
Bana basi bamoni ye, mpe balobi ete azali mwasi ya esengo;
Basi ya mokonzi ná basi mosusu bakumisi ye.
10 ‘Mwasi yango nani oyo azali kongɛnga* boye lokola kotana ya ntɔngɔ,
Oyo azali kitoko lokola sanza oyo ebimi mobimba,
Oyo azali pɛto lokola moi oyo ezali kongala,
Oyo azali mpenza kitoko lokola mampinga ya basoda oyo bayangani zingazinga ya bɛndɛlɛ na bango?’”+
11 “Nakitaki na elanga ya banzete oyo ebotaka mbuma+
Mpo na kotala banzete oyo ebimi sika na lobwaku,*
Mpo na kotala soki nzete ya vinyo ebimisi nkasa,
Soki banzete ya grenade ebimisi fololo.
12 Liboso kutu nayeba yango,
Mposa* na ngai ememaki ngai
Tii na makalo ya bato ya lokumu* ya mboka na ngai.”
13 “Zongá, zongá, Ee Moshulame!
Zongá, zongá,
Mpo tótala yo!”
“Mpo na nini bozali kotalatala Moshulame?”+
“Azali lokola mabina ya bituluku mibale!”*
7 “Makolo na yo ezali kitoko mingi na kati ya basandale na yo,
Ee mwana mwasi ya lokumu!
Ndenge oyo bibɛlɔ na yo egumbamá ezali lokola babiju,
Mosala ya moto oyo ayebi mosala ya mabɔkɔ.
2 Motɔlu na yo ezali lokola kibakuli ya sɛrklɛ.
Vinyo oyo esangisami ezangaka te na kati.
Libumu na yo ezali mopiko ya blé,
Oyo ezingami na bafololo lísi.
4 Nkingo na yo+ ezali lokola linɔ́ngi oyo etongami na mpɛmbɛ ya nzoku.+
Zolo na yo ezali lokola linɔ́ngi ya Liban,
Oyo etali na ngámbo ya Damasi.
5 Motó na yo ezali kitoko lokola ngomba Karamele,+
Mpe nsuki na yo oyo elíngamalíngamá+ ezali lokola lɛnɛ ya mwa motane-bulé.+
Nsuki na yo oyo esopanásopaná ebendi* mokonzi.
6 Ozali mpenza kitoko mpe ozali kosepelisa,
Ee mwana mwasi oyo nalingá koleka biloko nyonso oyo esepelisaka!
8 Nalobaki: ‘Nakomata na nzete ya mbila
Mpo nasimba bituka ya mbuma na yango.’
Mabɛlɛ na yo ezala lokola bituka ya mbuma ya vinyo,
Zolo na yo ebimisa mopɛpɛ kitoko lokola nsolo ya bapɔme,
“Eleka swaa na mongongo ya bolingo na ngai,
Ekita malɛmbɛmalɛmbɛ na mbɛbu ya bato oyo balali mpɔngi.
12 Tólamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe tókende na bilanga ya vinyo
Tótala soki vinyo ebimisi nkasa,
Soki fololo efungwami,+
Soki banzete ya grenade ebimisi fololo.+
Kuna, nakolakisa yo ndenge oyo nalingaka yo.+
13 Bamandragɔre+ ezali kopanza nsolo na yango ya kitoko;
Bambuma kitoko ya ndenge nyonso ezali na baporte na biso.+
Ezala ya sika to ya kala,
Nabombeli yo yango, Ee bolingo na ngai.
8 “Soki ozalaki ata lokola ndeko na ngai ya mobali,
Oyo amɛlaki mabɛlɛ ya mama na ngai!
Nalingaki kopwɛpwa yo+ soki nakutanaka na yo libándá,
Mpe moto moko te alingaki kotyola ngai.
Nalingaki kopesa yo vinyo oyo esangisami na matiti ya nsolo kitoko mpo omɛla,
Mai ya mbuma ya grenade oyo bauti kobimisa sika.
3 Lobɔkɔ na ye ya mwasi elingaki kozala na nse ya motó na ngai,
Mpe lobɔkɔ na ye ya mobali elingaki kozinga ngai.+
4 Ee bana basi ya Yerusaleme, nalapisi bino ndai:
Bómeka te kolamwisa to kotumola bolingo kati na ngai tii ntango yango moko ekolamuka.”+
5 “Nani wana azali kobima na esobe,
Ayekameli bolingo na ye?”
“Nalamwisaki yo na nse ya nzete ya pɔme.
Kuna mama na yo azalaki na mpasi ya kobota yo.
Kuna nde moto oyo abotaki yo ayokaki mpasi ya kobota.
6 Tyá ngai lokola kashɛ na motema na yo,
Lokola kashɛ na lobɔkɔ na yo,
Mpo bolingo ezali makasi lokola liwa,+
Epelaka makasi lokola mɔtɔ, kopela ya mɔtɔ ya Yah.*+
Soki moto apesi bozwi nyonso ya ndako na ye mpo na bolingo,
Bakotyola yango* mpenza.”
Tokosala nini mpo na ndeko na biso ya mwasi
Mokolo oyo bakotuna ye libala?”
9 “Soki azali efelo,
Tokotonga likoló na ye mwa efelo ya likoló oyo bakatakatá madusu ya palata,
Kasi soki azali porte,
Tokokanga ye na libaya ya sɛdrɛ.”
10 “Nazali efelo,
Mpe mabɛlɛ na ngai ezali lokola manɔ́ngi.
Yango wana, na miso na ye nakómi
Lokola mwasi oyo azali na kimya.
11 Salomo azalaki na elanga moko ya vinyo+ na Baala-hamone.
Apesaki elanga yango ya vinyo epai ya babateli.
Mokomoko azalaki koya na bashekele ya palata nkóto moko mpo na mbuma na yango.
12 Bashekele ya palata nkóto moko ezali ya yo, Ee Salomo,
Mpe nkama mibale mpo na baoyo babatelaka mbuma na yango.”
Kasi nazali na elanga na ngai ya vinyo, oyo ezali kaka mpo na ngai moko.
Tiká ngai mpe nayoka yango.”+
14 “Salá noki, bolingo na ngai,
Mpe zalá na mbangu lokola mboloko+
To lokola mwana ya nyama ebengami serfe
Likoló ya bangomba ya matiti ya nsolo kitoko.”
Lil., “Bendá ngai nsima na yo.”
To, “Tókumisa.”
Elingi koloba, bilenge basi.
To, “molimo na ngai elingá.”
To, “litambala ya komizipa na ntango ya kolela ebembe.”
To, “mpunda na ngai.”
To mbala mosusu, “na kati ya nsuki oyo bakangi na mabɔkɔ.”
To, “ya sɛrklɛ.”
To, “zolongano.”
Lil., “Malasi na ngai ya narde.”
To, “ndako na biso ya kitoko.”
Lil., “ndako ya vinyo.”
To, “maninisa.”
To, “Eleko ya mbula.”
Lolenge moko ya ebenga ya zamba oyo ezalaka moke.
To mbala mosusu, “bangomba oyo ekabwanákabwaná na mabwaku.”
To, “molimo na ngai elingaka.”
Kiti oyo bamemaka na yango moto ya lokumu.
Kiti oyo bamemaka na yango moto ya lokumu.
To, “motole ya fololo; ekɔti ya bokonzi ya fololo.”
To, “Mpakatoi.”
To, “bakakisá.”
To, “Anti-Liban.”
Nsinga ya nkingo mpo na monzɛlɛ.
To mbala mosusu, “Loposo.”
To, “elanga.”
Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.
To, “Molimo na ngai ebimaki.”
To mbala mosusu, “Molimo na ngai ebimaki ntango alobaki.”
To, “elamba na ngai ya komizipa.”
Lil., “mwa motane.”
To mbala mosusu, “bituka ya mbila ya date.”
To, “korbo.”
To mbala mosusu, “na bandelo ya liziba ya mai.”
Lil., “Edáda.”
To, “Engumba ya kitoko mingi.”
To, “Mpakatoi.”
Lil., “Azali mwana ya pɛto ya moto oyo abotaki ye.”
Lil., “kokitisa miso na nse.”
To, “wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “Molimo.”
To, “bato na ngai oyo balingá kosalisa.”
To, “mabina ya Mahanaime.”
To, “ekangi.”
Nzete ya date ezali lolenge ya nzete ya mbila oyo ebotaka mingimingi na Palestine.
Lil., “edáda.”
To, “Kokangama kaka na moto.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
“Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.
To mbala mosusu, “ye.”