BILELI
א [Alef]*
1 Talá ndenge sikoyo afandi kaka ye moko, engumba oyo etondaki na bato!+
Talá ndenge akómi lokola mwasi oyo mobali akufá, engumba oyo etondaki na bato kati na bikólo!+
Talá ndenge engumba oyo ezalaki mokonzi-mwasi kati na bitúká oyo eyangelami bakómi kosalisa yango mosala na makasi!+
ב [Bet]
2 Na butu azali kolela mingi+ mpe mai ya miso na ye etondi na matama na ye.
Azali na moto ya kobɔndisa ye te kati na bato nyonso oyo balingaka ye.+
Baninga na ye nyonso basaleli ye makambo na bokosi;+ bakómi banguna na ye.
ג [Gimel]
3 Yuda akei na mboka mopaya,+ azali konyokwama mpe azali na boombo makasi.+
Asengeli kofanda na kati ya bikólo;+ azwi esika ya kopema te.
Banyokoli na ye nyonso banyokolaki ye wana azalaki na mpasi.
ד [Dalet]
4 Banzela ya Siona ezali kolela, mpo moto ata moko te azali koya na fɛti.+
Baporte na ye nyonso ebukani;+ banganga-nzambe na ye bazali kolelalela.*
Bangɔndɔ* na ye bazali na mawa makasi, mpe Siona azali konyokwama mingi.
ה [He]
5 Banguna na ye bakómi sikoyo nkolo na ye;* banguna na ye bazali komitungisa te.+
Mpo Yehova ayokisi ye mawa mpo na ebele ya misala na ye ya kobuka mibeko.+
Monguna amemi bana na ye bakangami.+
ו [Waw]
6 Nkembo nyonso ya mwana mwasi ya Siona esili.+
Bankumu na ye bazali lokola banyama ebengami serfe oyo ezwi esika ya kolya matiti te,
Mpe bazali kotambola, balɛmbi, liboso ya moto oyo azali kolanda bango.
ז [Zayin]
7 Na mikolo ya mpasi na ye mpe ya kozanga ndako, Yerusaleme akanisi lisusu
Biloko na ye nyonso ya motuya oyo azalaki na yango kala.+
Ntango bato na ye bakweaki na lobɔkɔ ya monguna mpe azalaki na mosungi te,+
Banguna bamonaki ye mpe basɛkaki kokwea na ye.+
ח [Het]
8 Yerusaleme asali masumu minene.+
Yango wana akómi eloko moko ya koyokela mpii.
Baoyo nyonso bazalaki kokumisa ye sikoyo bazali kotyola ye, mpo bamoni bolumbu na ye.+
Ye moko mpe azali kolela na mawa*+ mpe abombi elongi na ye mpo na nsɔni.
ט [Tet]
9 Mbindo na ye ebebisi bilamba na ye.
Akanisi lisusu te mikolo na ye oyo ekoya.+
Kokwea na ye ekamwisaki; azali na mobɔndisi moko te.
Ee Yehova, talá mpasi na ngai, mpo monguna azali komikumisa.+
י [Yod]
10 Monguna apunzi biloko na ye nyonso ya motuya.+
Mpo amoni bikólo oyo ekɔti na esika na ye mosantu,+
Baoyo opesaki mitindo ete basengeli te kokɔta na lisangá na yo.
כ [Kaf]
11 Bato na ye nyonso bazali kolelalela;* bazali koluka limpa.+
Bapesi biloko na bango ya motuya mpo na kozwa eloko ya kolya, kaka mpo bázala na bomoi.
Talá, Ee Yehova, mpe moná, mpo nakómi lokola mwasi* oyo azangi ntina.
ל [Lamed]
12 Bino nyonso oyo bozali koleka na nzela yango ezali kosala bino eloko te?
Bótala mpe bómona!
Ezali nde na mpasi mosusu lokola mpasi oyo bamonisi ngai,
Oyo Yehova asaleli mpo na konyokola ngai na mokolo ya nkanda na ye ya kongala?+
מ [Mem]
13 Atindi mɔtɔ uta na likoló mpo na kozikisa mikuwa na ngai nyonso.+
Atandeli makolo na ngai monyama; azongisi ngai nsima na makasi.
Akómisi ngai mwasi oyo atikali mabɔkɔ mpamba.
Nazali kobɛla mokolo mobimba.
נ [Nun]
14 Masumu na ngai ekangami na nkingo na ngai lokola ekanganeli, akangi yango makasi na lobɔkɔ na ye moko.
Etyami na nkingo na ngai, mpe nguya na ngai esili.
Yehova apesi ngai na lobɔkɔ ya baoyo nakoki kotɛmɛla bango te.+
ס [Samek]
15 Yehova alongoli bato nyonso ya nguya oyo bazalaki epai na ngai.+
Abengisi limpinga ya basoda, mpo na kobukabuka bilenge na ngai ya mibali.+
Yehova anyatinyati ekamwelo ya vinyo ya ngɔndɔ, mwana mwasi ya Yuda.+
ע [Ayin]
16 Nazali kolela mpo na biloko wana.+ Miso na ngai etondi na mai ya miso.
Moto oyo akokaki kobɔndisa ngai to kolendisa ngai azali mosika na ngai.
Bana na ngai batikali mabɔkɔ mpamba, mpo monguna azali komikumisa.
פ [Pe]
17 Mwana mwasi ya Siona* asemboli mabɔkɔ na ye;+ kasi moto ya kobɔndisa ye azali te.
Yehova apesi mitindo na banguna nyonso ya Yakobo oyo bazali zingazinga na ye.+
Yerusaleme ekómi epai na bango eloko ya koyokela mpii.+
צ [Tsade]
18 Yehova azali sembo,+ mpo natombokeli nde mitindo* na ye.+
Bóyoka bino bato ya bikólo, mpe bómona mpasi na ngai.
Bilenge basi* mpe bilenge mibali na ngai bakei bakangami.+
ק [Kof]
19 Nabeleli baoyo bazalaki kolinga ngai makasi, kasi basaleli ngai makambo na bokosi.+
Na engumba banganga-nzambe na ngai mpe bankulutu na ngai bakufi,
Wana bazalaki koluka bilei mpo na kotikala na bomoi.+
ר [Resh]
20 Talá, Ee Yehova, mpo natungisami mingi.
Nabulungani na kati na ngai.*
Motema na ngai etungisami, mpo natombokaki mpenza.+
Na libándá, mopanga ebomi bana na ngai;+ na kati ya ndako, ezali lokola liwa.
ש [Shin]
21 Bato bayoki kolela na ngai; moto ya kobɔndisa ngai azali te.
Banguna na ngai nyonso bayoki mpasi na ngai.
Bazali na esengo, mpo yo moko nde obimisi yango.+
Kasi okosala ete mokolo oyo olakaki ekoka,+ ntango bango mpe bakokóma lokola ngai.+
ת [Taw]
22 Tiká mabe na bango nyonso eya liboso na yo, mpe nyokolá bango,+
Ndenge onyokoli ngai mpo na misala na ngai nyonso ya kobuka mibeko.
Mpo nazali mpenza na mawa, mpe motema na ngai ezali kobɛla.
א [Alef]
2 Ee talá ndenge Yehova azipi mwana mwasi ya Siona na mapata ya nkanda na ye!
Uta na likoló, abwaki kitoko ya Yisraele na mabele.+
Akanisi lisusu te ebonga ya makolo na ye+ na mokolo ya nkanda na ye.
ב [Bet]
2 Yehova abebisi bisika nyonso ya kofanda ya Yakobo, ayoki mawa te.
Na nkanda na ye makasi, abuki bisika oyo ebatelami makasi ya mwana mwasi ya Yuda.+
Akweisi yango na mabele, akómisi bokonzi+ ná bankumu na ye eloko mpamba.+
ג [Gimel]
3 Na kongala ya nkanda na ye, asilisi makasi nyonso* ya Yisraele.
Azongisi lobɔkɔ na ye ya mobali nsima ntango monguna azali kopusana,+
Mpe na kati ya Yakobo, azali kaka kozikisa lokola mɔtɔ oyo ezali kozikisa eloko nyonso zingazinga na yango.+
ד [Dalet]
4 Agumbi* litimbo na ye lokola monguna; lobɔkɔ na ye ya mobali etɛlɛmi na esika na yango lokola monguna;+
Azalaki kaka koboma baoyo nyonso bazalaki komonana kitoko.+
Mpe asopaki nkanda na ye makasi lokola mɔtɔ+ na kati ya hema ya mwana mwasi ya Siona.+
ה [He]
Amɛli bandako milai na ye nyonso; Abebisi bisika na ye oyo ebatelami makasi.
Mpe azali kotondisa mwana mwasi ya Yuda na mawa mpe na kolela.
ו [Waw]
6 Apanzi ndako na ye ya matiti+ lokola mwa ndako oyo ezali na elanga.
Abebisi fɛti na ye.+
Yehova asali ete bábosana fɛti ná sabata na Siona,
Mpe na kosilika na ye makasi, azali komemya mokonzi te mpe nganga-nzambe te.+
ז [Zayin]
Akabi na lobɔkɔ ya monguna bifelo ya bandako na ye milai oyo ebatelami makasi.+
Batomboli mongongo na bango na ndako ya Yehova,+ lokola na mokolo ya fɛti.
ח [Het]
8 Yehova azwi ekateli ya kobebisa efelo ya mwana mwasi ya Siona.+
Atandi nsinga ya komeka molai.+
Apekisi te lobɔkɔ na ye kobebisa.*
Mpe asali ete mwa ngomba oyo basalá mpo na libateli mpe efelo elela.
Yango nyonso elɛmbilɛmbi.
ט [Tet]
9 Baporte na ye ezindi na kati ya mabele.+
Abebisi mpe abuki bikangiseli na ye.
Mokonzi na ye mpe bankumu na ye bazali na kati ya bikólo.+
Mobeko* ezali te; ata basakoli na ye bazwi emonaneli moko te oyo euti epai ya Yehova.+
י [Yod]
10 Bankulutu ya mwana mwasi ya Siona bafandi na mabele na kimya.+
Batye putulu na motó na bango mpe balati ngɔtɔ.*+
Bangɔndɔ ya Yerusaleme bakitisi motó na bango na mabele.
כ [Kaf]
11 Miso na ngai elɛmbi na kolela.+
Nabulungani na kati na ngai.*
Libale na ngai esopani na mabele, mpo na kokwea ya mwana mwasi ya* bato ya ekólo na ngai,+
Mpo bana mpe bana oyo bazali komɛla mabɛlɛ balɛmbaki makasi na bisika minene ya bato nyonso ya engumba.+
ל [Lamed]
12 Bazali kaka kotuna bamama na bango: “Wapi mbuma mpe vinyo?”+
Wana balɛmbi makasi lokola moto oyo azoki na bisika minene ya bato nyonso ya engumba,
Wana bazali kokufa malɛmbɛmalɛmbɛ na mabɔkɔ ya bamama na bango.
מ [Mem]
13 Ndakisa nini nakoki kopesa yo,
Nakokokanisa yo na eloko nini, Ee mwana mwasi ya Yerusaleme?
Nakokokanisa yo na nini mpo nabɔndisa yo, Ee ngɔndɔ, mwana mwasi ya Siona?
Mpo kokwea na yo ezali monene lokola mbu.+ Nani akoki kobikisa yo?+
נ [Nun]
14 Bimonaneli oyo basakoli na yo bamonaki ezalaki makambo ya lokuta mpe ya mpamba,+
Mpe babimisaki libunga na yo polele te mpo okende mokangami te,+
Kasi bazalaki kaka komona mpo na yo bimonaneli ya lokuta mpe maloba ya kobungisa nzela.+
ס [Samek]
15 Baoyo nyonso bazali koleka na balabala babɛti mabɔkɔ mpo na kotyola yo.+
Babɛti piololo na kokamwa+ mpe bazali koningisela mwana mwasi ya Yerusaleme motó, mpe koloba ete:
“Oyo nde engumba oyo bazalaki kolobela ete: ‘Ezali nsuka ya kitoko, esengo mpo na mabele mobimba’?”+
פ [Pe]
16 Banguna na yo nyonso bafungoleli yo monɔkɔ na bango.
Babɛti piololo, bazali kolyalya mino mpe balobi: “Tomɛli ye.+
Oyo nde mokolo oyo tozalaki kozela!+ Ekómi mpe tomoni yango!”+
ע [Ayin]
Abuki mpe ayoki mawa te.+
Asali ete monguna asepela na likambo na yo; asali ete banguna na yo báleka yo na makasi.*
צ [Tsade]
18 Motema na bango ebeleli Yehova, Ee efelo ya mwana mwasi ya Siona.
Mai ya miso esopana lokola mokɛli butu moi.
Kopemisa nzoto na yo te, miso na yo etika kobimisa mpisoli te.
ק [Kof]
19 Tɛlɛmá! Gangá na butu, na ebandeli ya bileko ya kokɛngɛla.
Sopá motema na yo lokola mai liboso ya Yehova.
Tombolelá ye mabɔkɔ na yo mpo na lobiko ya bana na yo,
Oyo bazali kolɛmba makasi mpo na nzala na esika oyo babalabala nyonso ekutani.*+
ר [Resh]
20 Moná, Ee Yehova, mpe talá bato oyo onyokoli boye.
Basi basengeli nde kokoba kolya bana* na bango moko, bana oyo babotami na nzoto malamu mpenza?+
To banganga-nzambe mpe basakoli basengeli nde kobomama na esika mosantu ya Yehova?+
ש [Shin]
21 Mwana mobali mpe mobange balali na mabele na babalabala.+
Bangɔndɔ* na ngai mpe bilenge na ngai ya mibali babomami na mopanga.+
Obomi na mokolo ya nkanda na yo; obomi nde koboma, oyoki mawa te.+
ת [Taw]
22 Lokola na mokolo ya fɛti,+ obengisaki eloko oyo ebangisaka ngai uta na bisika nyonso.
Na mokolo ya nkanda makasi ya Yehova, moto moko te akimaki to abikaki;+
Bana oyo nabotaki* mpe oyo nabɔkɔlaki, monguna na ngai asilisi bango nyɛɛ.+
א [Alef]
3 Nazali mobali oyo amoni mpasi mpo na lingenda ya nkanda makasi na ye.
2 Abengani ngai mpe asali ete natambola na molili kasi na pole te.+
3 Ya solo, mokolo mobimba azali kaka kosembola lobɔkɔ na ye mpo na kopesa ngai etumbu.+
ב [Bet]
4 Akaukisi mosuni mpe loposo na ngai;
Abuki mikuwa na ngai.
5 Azingi ngai; atye pembenipembeni na ngai nzete ya pwazɔ+ mpe mpasi.
6 Afandisi ngai na makasi na bisika ya molili lokola bato oyo bakufá banda kala.
ג [Gimel]
8 Mpe ntango nazali kaka kobelela mpo na kosɛnga lisalisi, aboyi koyoka libondeli na ngai.*+
ד [Dalet]
10 Abombani mpo na kotyela ngai motambo lokola urse, lokola nkɔsi na esika ya kobombana.+
11 Alongoli ngai na nzela na makasi mpe apasoli ngai bitenibiteni;
Akómisi ngai moto oyo azangá ntina.+
12 Agumbi* litimbo na ye, mpe atɛlɛmisi ngai lokola eloko ya kobwakela likula.
ה [He]
13 Akɔtisi na bangɛi na ngai makula* ya libenga na ye.
14 Nakómi eloko ya kosɛka na miso ya bato nyonso ya bikólo, mokolo mobimba bayembaka mpe batyolaka ngai.
15 Atondisi ngai na biloko ya bololo mpe atondisi ngai na mbondo.+
ו [Waw]
17 Osali ete nazala na kimya te;* nabosani eloko oyo ezali malamu.
18 Bongo nalobi: “Nkembo na ngai esili, ná eloko oyo nazali kozela epai ya Yehova.”
ז [Zayin]
19 Kanisá mpasi na ngai mpe ndenge nazangi esika ya kofanda,+ ná mbondo mpe nzete ya pwazɔ.+
20 Ya solo mpenza, okokanisa mpe okogumbama likoló na ngai.+
21 Nakokanisa yango; yango wana nakozela na motema moko.+
ח [Het]
23 Ezalaka ya sika ntɔngɔ nyonso;+ bosembo na yo etondi mpenza kotonda.+
24 Nalobi:* “Yehova azali likabo na ngai;+ yango wana nakozela ye na motema moko.”+
ט [Tet]
25 Yehova azali malamu epai ya moto oyo azali kotyela ye elikya,+ epai ya moto oyo azali kokoba koluka ye.+
26 Ezali malamu ete moto azela na kimya*+ lobiko oyo euti epai ya Yehova.+
27 Ezali malamu moto akutana na mikakatano* ntango azali elenge.+
י [Yod]
28 Afanda kaka ye moko mpe atikala kimya ntango Nzambe atiki ete akutana na yango.*+
29 Atya monɔkɔ na ye na putulu;+ mbala mosusu elikya ekozala.+
30 Apesa litama na ye na moto oyo azali kobɛta ye; andima kotonda na nsɔni.
כ [Kaf]
31 Mpo Yehova akobwaka biso te mpo na libela.+
32 Mpo ata ayokisi mpasi, akoyoka mpe mawa na kolanda bolingo ya sembo oyo atondi na yango.+
33 Mpo na motema na ye azali na mposa te ya komonisa bana ya bato mpasi to konyokola bango.+
ל [Lamed]
34 Konyata na nse ya makolo bato nyonso ya bolɔkɔ oyo bazali na mabele,+
35 Kopimela moto bosembo na miso ya Oyo-Aleki-Likoló,+
36 Kobebisela moto likambo na ye ya kosamba
—Yehova andimaka makambo ya ndenge wana te.
מ [Mem]
37 Bongo, nani akoki koloba mpe kosala ete yango esalema soki Yehova apesi mitindo te?
38 Na monɔkɔ ya Oyo-Aleki-Likoló,
Makambo ya mabe ná makambo ya malamu ebimaka nzela moko te.
39 Mpo na nini moto* asengeli komilelalela mpo na makama oyo lisumu na ye ebimisi?+
נ [Nun]
40 Tiká tókanisa malamumalamu lolenge ya bomoi na biso,+ mpe tózongela Yehova.+
41 Tiká tómonana liboso ya Nzambe na likoló na motema ya sembo mpe tótombola mabɔkɔ na biso, tóloba ete:+
42 “Tobuki mibeko, totomboki+ mpe yo olimbisi biso te.+
ס [Samek]
44 Na lipata, okangi nzela ya kokóma epai na yo, mpo libondeli na biso eleka te.+
45 Okómisi biso biloko ya salite mpe biloko ya bosɔtɔ kati na bato ya bikólo.”
פ [Pe]
46 Banguna na biso nyonso bazali koloba mabe mpo na biso.+
47 Nsɔmɔ mpe mabulu,+ libebi mpe kokwea nde ezali kokómela biso.+
48 Liso na ngai ezali kaka kobimisa mikɛli ya mai mpo mwana mwasi ya bato na ngai akwei.+
ע [Ayin]
51 Miso na ngai ememeli ngai mawa mpo na bana basi nyonso ya engumba na ngai.+
צ [Tsade]
52 Kaka mpamba, banguna na ngai baluki ngai lokola ndɛkɛ.
53 Basukisi bomoi na ngai na kati ya libulu; bazali kaka kobwakela ngai mabanga.
54 Mai eleki likoló ya motó na ngai mpe nalobi ete: “Nasuki mpenza!”
ק [Kof]
55 Nabeleli nkombo na yo, Ee Yehova, uta na esika ya mozindo ya libulu.+
56 Yoká mongongo na ngai; kokanga litoi na yo te ntango nazali kosɛnga lisalisi mpo obɔndisa ngai.
57 Na mokolo oyo nazalaki kobenga yo, opusanaki penepene. Olobaki ete: “Kobanga te.”
ר [Resh]
58 Osambi likambo na ngai,* Ee Yehova, osikoli bomoi na ngai.+
59 Ee Yehova, omoni mabe oyo basaleli ngai; nabondeli yo, longisá ngai.+
60 Omoni mposa na bango nyonso ya kozongisa mabe, makanisi na bango nyonso mpo na kobundisa ngai.
ש [Sin] to [Shin]
61 Oyoki matumoli na bango, Ee Yehova, makanisi na bango nyonso mpo na kobundisa ngai,+
62 Mbɛbu ya baoyo bazali kotɛmɛla ngai mpe kolobaloba na bango ya nse nse mpo na ngai mokolo mobimba.
63 Talá bango; ezala bafandi to batɛlɛmi, bazali kotyola ngai na nzembo na bango.
ת [Taw]
64 Ee Yehova, okofuta bango na kolanda misala na bango.
65 Okokómisa mitema na bango makasi, bongo nde okolakela bango mabe.
66 Na nkanda na yo, ee Yehova, okolanda bango mpe okosilisa bango mpenza mpo bázala lisusu te na mabele.
א [Alef]
4 Talá ndenge wolo ya kongɛnga ebebi, wolo ya malamu!+
Ndenge mabanga mosantu+ epanzani na bansuka nyonso ya balabala!*+
ב [Bet]
2 Mpo na bana ya Siona oyo bazalaki na motuya, oyo bakokanaki na* wolo oyo epɛtolami,
Talá ndenge batalelami lokola bilokó minene ya mabele,
Mosala ya mabɔkɔ ya moyemi-mbɛki!
ג [Gimel]
3 Ata bambwa ya zamba emɛlisaka bana na yango mabɛlɛ.
Kasi, mwana mwasi ya bato na ngai akómi motema makasi,+ lokola bamaligbanga* na esobe.+
ד [Dalet]
4 Lolemo ya mwana oyo azali komɛla mabɛlɛ ekangami na monɔkɔ na yango mpo na mposa ya mai.
Bana basɛngi limpa,+ kasi moto moko te apesi bango yango.+
ה [He]
5 Baoyo bamesanaki kolya biloko ya kitoko balali na babalabala mpo na nzala.*+
Baoyo bazalaki kobɔkɔlama na bilamba ya motane makasi+ bakómi koyamba maboke ya putulu ya mɔtɔ.
ו [Waw]
6 Etumbu* ya mwana mwasi ya bato na ngai ezali monene koleka etumbu mpo na lisumu ya Sodoma,+
Oyo ekweisamaki kaka boye, na mbala moko, mpe moto moko te asalisaki yango.+
ז [Zayin]
7 Banaziri+ na ye bazalaki pɛto koleka nɛjɛ, bazalaki mpɛmbɛ koleka miliki.
Bazalaki loposo ngola-ngola koleka mabanga kitoko ya korai; bazalaki kongɛnga lokola libanga ya safire.
ח [Het]
8 Elongi na bango ekómi moindo koleka moindo yango moko;
Bato bayebi bango lisusu te na babalabala.
Loposo na bango ekauki likoló ya mikuwa na bango;+ ekómi lokola nzete ekauká.
ט [Tet]
9 Baoyo babomami na mopanga bazali malamu koleka baoyo babomami na nzala,+
Baoyo balɛmbi, baoyo batɔbɔlami mpo bilei ezali te na elanga.
י [Yod]
10 Mabɔkɔ ya basi oyo bazalaka na motema mawa elambi bana na bango moko.+
Bakómi bilei na bango ya mawa na ntango ya kokwea ya mwana mwasi ya bato na ngai.+
כ [Kaf]
Mpe azali kopelisa mɔtɔ na Siona, oyo ezali kozikisa miboko na yango.+
ל [Lamed]
12 Bakonzi ya mabele mpe bato nyonso oyo bafandi na mabele bandimaki te
Ete motɛmɛli ná monguna bakokɔta na baporte ya Yerusaleme.+
מ [Mem]
נ [Nun]
14 Bayengiyengi na babalabala lokola bato oyo bakufá miso.+
Bakómi mbindo na makila,+
Bongo moto moko te akoki kosimba bilamba na bango.
ס [Samek]
15 Babelelaki bango ete: “Bólongwa! Mbindo! Bólongwa! Bólongwa! Bósimba biso te!”
Mpo bazangi esika ya kofanda mpe bayengiyengi.
Bato balobi kati na bikólo ete: “Bakofanda na biso lisusu awa te.*+
פ [Pe]
Bato bakotosa banganga-nzambe te,+ bakomonisela bankulutu boboto te.”+
ע [Ayin]
17 Ata sikoyo, miso na biso elɛmbi kokɛngɛla soki moto moko akoya kosalisa biso.+
Totalatalaki mpo na koluka lisalisi epai ya ekólo oyo ekokaki kobikisa biso te.+
צ [Tsade]
18 Banguna baluki kokanga biso+ mpe tozangi likoki ya kotambola na babalabala.
Nsuka na biso ekómi pene; mikolo na biso ekoki, mpo nsuka na biso ekómi.
ק [Kof]
19 Bato oyo bazalaki kolanda biso bazalaki mbangu koleka bampongo ya likoló.+
Balandaki biso likoló ya bangomba; babatami mpo na kozela biso na esobe.
ר [Resh]
20 Bakangi na kati ya libulu na bango+ monene, moto oyo Yehova atye mafuta,+ oyo azalaki mpema ya zolo na biso,
Moto oyo tolobaki mpo na ye ete: “Na nse ya elili na ye nde tokobika kati na bikólo.”
ש [Sin]
21 Zalá na nsai mpe sepelá, Ee mwana mwasi ya Edome,+ yo oyo ozali kofanda na mokili ya Uze.
Kasi epai na yo mpe bakolekisa kɔpɔ,+ okolangwa mpe okolakisa bolumbu na yo.+
ת [Taw]
22 Ee mwana mwasi ya Siona, etumbu mpo na libunga na yo ekómi na nsuka na yango.
Akokende na yo na mboka mopaya lisusu te.+
Kasi akotya likebi na libunga na yo, Ee mwana mwasi ya Edome.
Akobimisa masumu na yo polele.+
5 Ee Yehova, kanisá makambo oyo ekómeli biso.
Talá mpe moná nsɔni na biso.+
2 Libula na biso epesami na mabɔkɔ ya bapaya, bandako na biso na mabɔkɔ ya bato ya mboka mosusu.+
3 Tokómi bitike, tozali lisusu na batata te; bamama na biso bazali lokola basi oyo mibali bakufá.+
4 Tosengeli kofuta mpo tómɛla mai na biso moko,+ mpe tosengeli kofuta mpo tózwa nkoni na biso moko.
5 Bato oyo bazali kolanda biso, bakómi pene ya kokanga biso;
Tolɛmbi, kasi batikeli biso ntango ya kopema te.+
6 Tosemboli lobɔkɔ na Ezipito+ mpe na Asiri,+ mpo tózwa mampa oyo ekoki mpo na kolya.
7 Bankɔkɔ na biso oyo basalaki masumu bazali lisusu te. Kasi biso tosengeli komema mabunga na bango.
8 Basaleli bazali sikoyo bankolo na biso; moto ya kolongola biso na lobɔkɔ na bango azali te.
9 Mpo na kokende koluka limpa totye bomoi* na biso na likama+ mpo na limpinga ya basoda ya esobe.*
10 Loposo na biso ekómi mɔtɔ lokola esika moko ya mɔtɔ makasi, mpo na mpasi ya nzala.+
11 Basambwisi basi* na Siona, bangɔndɔ na bingumba ya Yuda.+
12 Babaki bankumu na lobɔkɔ na bango,+ mpe batosi bankulutu ata moke te.+
13 Bilenge mibali basimbi enikelo ya mabɔkɔ, bana mibali babɛti libaku na nse ya kilo ya nkoni.
14 Bankulutu bazali lisusu te na porte ya engumba;+ bilenge mibali bazali lisusu te kobɛta miziki na bango.+
15 Esengo esili na motema na biso; kobina na biso ebongwani mawa.+
16 Motole* elongwe na motó na biso mpe ekwei. Mawa na biso, mpo tosali lisumu!
17 Mpo na yango, motema na biso ezali na maladi,+
Mpe mpo na makambo yango, miso na biso ekómi na molili,+
18 Mpo na ngomba ya Siona oyo etikali mpamba;+ bagambala ezali sikoyo kotambola kuna.
19 Nde yo, Ee Yehova, ofandi na kiti ya bokonzi mpo na seko.
Kiti na yo ya bokonzi ezali mpo na libota na libota.+
20 Mpo na nini obosani biso libela, osundoli biso mpo na ntango molai?+
21 Zongisá biso epai na yo, Ee Yehova, mpe tokozonga noki.+
Zongisá mikolo na biso sika ndenge ezalaki liboso.+
22 Kasi obwaki biso mpenza.
Ozali kaka kosilikela biso makasi mpenza.+
Mokapo 1 tii na 4 ezali nzembo ya mawa. Balɛtrɛ ya ebandeli ya bavɛrsɛ yango ekomami na kolanda alfabe ya Ebre.
To, “kokimela.”
To, “bilenge basi.”
Lil., “motó na ye.”
To, “kokimela. “
To, “kokimela.”
Mwasi oyo azali komonisa Yerusaleme.
Lil., “Siona.”
Lil., “monɔkɔ.”
Lil., “bangɔndɔ.”
Lil., “misɔpɔ na ngai ezali na yikiyiki.”
Lil., “akati liseke nyonso.”
Lil., “Anyati.”
Lil., “komɛla.”
To, “Mateya.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “Misɔpɔ na ngai ezali na yikiyiki.”
Maloba ya ntɔki mpo na kolobela moto, mbala mosusu komonisa mawa to komitya na esika ya moto.
Lil., “atomboli liseke ya banguna na yo.”
Lil., “na ebandeli ya babalabala nyonso.”
To, “mbuma.”
To, “Bilenge basi.”
To, “oyo nabotaki na nzoto malamu mpenza.”
To, “akangeli libondeli na ngai nzela.”
Lil., “Anyati.”
Lil., “bana.”
To, “molimo na ngai ezala na kimya te.”
To, “Molimo na ngai elobi.”
To, “azela na motema moko.”
Lil., “amema ekanganeli.”
To, “ntango Nzambe atye ekanganeli likoló na ye.”
Lil., “moto ya bomoi.”
To, “likambo ya kosamba ya molimo na ngai.”
Lil., “na motó ya banzela nyonso.”
To, “oyo bazalaki na motuya lokola.”
To, “ba-otrishe.”
Lil., “batikali mpamba na babalabala mpo na nzala.”
Lil., “Libunga.”
To, “bayengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “Bakofanda bapaya lisusu te.”
Lil., “Elongi ya Yehova.”
To, “molimo.”
Lil., “mpo na mopanga ya esobe.”
To, “basangisi na basi nzoto na makasi.”
To, “Ekɔti ya bokonzi.”