Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt lok. 12-lok. 13
  • Motuna 5: Nsango nini ezali na Biblia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Motuna 5: Nsango nini ezali na Biblia?
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Motuna 5: Nsango nini ezali na Biblia?

MOTUNA 5

Nsango nini ezali na Biblia?

“Nakotya bonguna kati na yo ná mwasi mpe kati na bana na yo ná mwana na ye. Ye akopanza motó na yo mpe yo okozokisa ye na litindi.”

Ebandeli 3:15

“Na nzela ya libota na yo, bikólo nyonso ya mabele ekomizwela lipamboli mpo oyoki mongongo na ngai.”

Ebandeli 22:18

“Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema mpe na mabele, lokola na likoló.”

Matai 6:10

“Mosika te, Nzambe oyo apesaka kimya akopanza Satana na nse ya makolo na bino.”

Baroma 16:20

“Ntango Nzambe akotya biloko nyonso na nse na ye, bongo Mwana ye moko mpe akomonisa ete azali na nse ya Nzambe oyo atye biloko nyonso na nse na ye. Na ndenge yango, Nzambe akozala Mokonzi kaka moko ya biloko nyonso.”

1 Bakorinti 15:28

“Nzokande bilaka yango, bayebisaki yango Abrahama mpe mwana na ye . . . , elingi koloba Kristo. Lisusu, soki bozali bato ya Kristo, bozali mpenza bana ya Abrahama.”

Bagalatia 3:16, 29

“Bokonzi ya mokili ekómi Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Kristo na ye, mpe akoyangela libela na libela.”

Emoniseli 11:15

Bongo dragɔ yango ya monene ebwakamaki na nse, nyoka ya ebandeli, oyo babengi Zabolo mpe Satana, oyo azali kokosa mokili mobimba; abwakami na mabele, mpe baanzelu na ye babwakami na nse elongo na ye.”

Emoniseli 12:9

“Asimbaki dragɔ, nyoka yango ya ebandeli, oyo azali Zabolo mpe Satana, mpe akangaki ye monyɔlɔlɔ mbula 1000.”

Emoniseli 20:2

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto