Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt lok. 16-lok. 17
  • Motuna 7: Bibila esakolaki nini mpo na mikolo na biso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Motuna 7: Bibila esakolaki nini mpo na mikolo na biso?
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Motuna 7: Bibila esakolaki nini mpo na mikolo na biso?

MOTUNA 7

Biblia esakolaki nini mpo na mikolo na biso?

Moto moko azali kokanisa ndenge esakweli ya Biblia ezali kokokisama mpo azali komona bitumba, nzala, mpe kobuka mibeko

“Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi . . . Makambo nyonso wana ekozala ebandeli ya bampasi.”

Matai 24:7, 8

“Basakoli mingi ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato mingi; mpe lokola kobuka mibeko ekokóma mingi, bolingo ya bato mingi ekokita.”

Matai 24:11, 12

“Ntango bokoyoka lokito ya bitumba mpe bansango ya bitumba, bóbanga te; makambo wana esengeli kosalema, kasi wana ekozala naino nsuka te.”

Marko 13:7

“Koningana makasi ya mabele ekosalema, mpe na bisika ndenge na ndenge, nzala mpe bamaladi mabe ekozala. Bato bakomona makambo ya nsɔmɔ mpe bilembo minene oyo euti na likoló.”

Luka 21:11

“Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato oyo bamikumisaka, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota, . . . bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe, bazali komonisa lokola bakangamaka na Nzambe, nzokande bazali kowangana nguya ya ezaleli yango.”

2 Timote 3:1-5

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto