Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Janvier lok. 29
  • Baklisto mpe masano ya mbongo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baklisto mpe masano ya mbongo
  • Lamuká!—1993
  • Masolo mosusu
  • Biblia epekisi masano ya mbongo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masano ya mbongo
    Lamuká!—2015
  • Bilenge​—Basani mosusu ya sika!
    Lamuká!—1995
  • Masano ya mbongo ezali lisumu?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Lamuká!—1993
g93 Janvier lok. 29

Baklisto mpe masano ya mbongo

MOKLISTO akoki kobɛta masano ya mbongo mpo na kozwa mbongo kozanga kosala mosala? Te, mpamba te Liloba na Nzambe lizali kolendisa ye ete asala mpo na kokokisa bamposa na ye mpe ya libota na ye: “‘Soki moto aboyi kosala mosala, alya te!’ . . . Basala mosala kati na kimya [mpe] balya limpa oyo bango moko bakozwa.”​—2 Batesaloniki 3:10, 12, MN.

Moto moko ayekoli ezalela ya bomoi ya bato alobelaki loterie lokola ‘mwango oyo na nzela na yango mwa bato moke mpenza bazali kokóma bazwi na mosolo ya ebele ya babólá.’ Yango ezali mpenza komonana na masano nyonso ya mbongo. Moklisto akolinga kokóma mozwi na biloko ya bato oyo bazali babólá? Moklisto asengeli ‘kolinga mozalani na ye lokola ye moko.’ (Malako 12:31) Nzokande masano ya mbongo ekobimisaka moimi na esika ya bolingo, kozanga komibanzabanza mpo na basusu na esika ya kozala na motema mawa.

Mbala mingi masano ya mbongo makoutaka na bilulela​—lokoso—​elimo oyo eyokani te na boklisto ya solo lokola Baloma 7:7 ekundoli yango, epai ntomá Paulo akomaki ete: “Kozala na elulela te.” Liloba elulela elimboli “kooka mposa na lokoso.” Wana ezali ndimbola malamu mpenza mpo na mposa eleki ndelo oyo mobɛti azalaka na yango mpo na kozwa mbongo epai na mozalani na ye, boye te? Mposa wana eyokani te na likanisi ya moklisto, oyo ezali bongo kokabolana mpe kopesa.

Biblia elobi ete: “Mposa ya mosolo ezali ebandeli ya mabe nyonso mabe, mpe wana bakómaki na mposa yango, bamoko basili kopɛngwa [mosika] na kondima mpe basili komitɔbɔla bango mpenza na mpasi mingi na bipai nyonso.” (1 Timoté 6:10, MN) Wana ezali mpenza ezalela babɛti minene bazali kati na yango, baoyo bazali baombo ya momeseno oyo mozali kotɔbɔla bango na mpasi mingi mpe ntango nyonso.

Yesu alobaki ete bato bayebani na “mbuma na bango.” (Matai 7:20) Longola likambo oyo ezali kotya mobɛti monene mpe libota na ye kati na ezalela ya mpasi, masano esangani ntango nyonso na kozanga sembo mpe na mabe. Mokanda Nouvelle Encyclopédie britannique eyebisi ete: “Lokumu mabe ya masano ekoutaka mingimingi na kozanga sembo ya baoyo bazali kobongisa yango.” Mabe oyo makanami makopesaka ntango nyonso litomba na kompanyi oyo ebongisi masano ya mbongo, ata endimami na Leta to te. Moklisto akolinga kopesa lisungi na ye na kompanyi wana, ata na nzela ya bato mosusu?

Lokola tolobelaki yango na lisoló ya mibale na molongó ya masoló oyo, masano esɛngaka mbala mingi biyambayamba mpo na bolukiluki ya mituya, ya mikolo mpe bileko ya makila malamu. Uta bikeke mingi, babɛti na masano ya mbongo bakokumisaka nzambe-mwasi Makila malamu wana ezali bango na lokoso ya kozwa ngolu na ye. Baloma bazalaki kobénga ye ete Fortuna, mpe tempelo 26 etongamaki na Loma mpo na lokumu na ye.

Mosakoli Yisaya alobelaki nzambe mosusu oyo akokani na ye, gadh, oyo Bayisraele bapɛngwi bazalaki kosambela, wana alobaki ete: “Bino bozali baoyo bakotikaka Jéhovah, . . . baoyo bakotɛmisaka mesa mpo na nzambe ya Makila malamu [gadh, na Liebele].” (Yisaya 65:11, MN) Na mokolo ya nsuka ya mbula, ezalaki na momeseno ya kotɛmisa mesa moko etondi na mitindo na biloko nyonso mpo na nzambe ya Makila malamu. Kosaláká bongo, bazalaki na elikya ya kozwa biloko mingi na mbula ekoya.

Nzambe andimaki te baoyo bazalaki kosala bozoba ya kotya motema epai na gadh, nzambe ya Makila malamu, mpo ete asilisa mikakatano na bango. Wana elimbolaki kotika Jéhovah, Nzambe ya solo. Na esika ya kofukama liboso na nzambe-mwasi Makila malamu mpe kokokisa bamposa na ye, moklisto akotya nde motema epai na Jéhovah, Nzambe ya solo, Ye oyo alaki biso bozwi ya motuya monene, Ye oyo akotika biso soko moke te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto