Botɔndi mpo na Réveillez-vous!
BATO mingi bakotangaka Réveillez-vous! mpe bazali kotɔndo biso mpo na maye manso bazali koyekola kati na yango likoló na mitó na makambo ndenge na ndenge. Na sud ya France, mobali moko mpe mwasi na ye baoyo bazali ba Témoins de Jéhovah, bazwaki mokanda oyo molandi; eutaki epai ya moto moko oyo bango batikelaki ye zulunalo oyo:
“Nayebi na malamu nyonso ete Nzambe azali na makambo mingi ya kosala, kasi ezali te bobele kokokisa masɛngi na biso ya mikemike. Atako ngai mpenza nazali na masɛngi ya motindo yango te, nzokande nandimi ete ndenge bokómelaki ngai na ndako, na ngonga oyo nazalaki kobima, ezalaki mpamba te. Nazwaki bongo likoki ya kokamata ‘nokinoki’ Réveillez-vous! ya 8 août 1990. Soki nazangaki yango mbɛlɛ ezalaki mabe mpenza!
“Lisoló ‘La domination humaine—L’heure du bilan’ (Boyangeli ya bato—Ekokisi nini) esimbaki likebi na ngai mpenza mpo ete ekomami na mayele mpe na bososoli malamu. Nandimi nyonso oyo ekomami na lisoló yango . . . Mpe nasɛngi na bino ete bobómbela ngai banimero ya Réveillez-vous! elandi oyo wana. Nalingi te kozanga masoló mosusu oyo balaki ete makobima na kati.”
Ba Témoins de Jéhovah bazali lisangá ya mokili mobimba oyo ezali na bato koleka milió minei, banso bazali bayekoli ya Biblia mpe bazali kopesa ntango na bango mpo na kosalisa bazalani na bango ete bayeba malamu mokili oyo ezingi bango, bayeba Liloba na Nzambe mpe bayeba motindo nini ezali kokokisama. Soki olingi kotuna makambo mosusu to kosɛnga ete moto aya koyekola na yo Biblia na ndako na yo, kozanga kofuta, komá mokanda na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634 Limete, Kinshasa, to na adresse mosusu ebongi na yo, kati na oyo epesami na lokasa 5. (Kobanda na nimero ya janvier 1993, Réveillez-vous! ekómi kobima na monoko ya Lingala na nkombo Lamuká! Ekobanda kobima nsima ya sanza misato.)