Obendabendaka bebe nzoto?
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA ESPAGNE
ANITA, elenge mwasi moko na Nigeria, azali kosukola bebe na ye mpe kobendabenda ye nzoto na bokɛngi mpenza. Ye ná bebe na ye batondi mpenza na esengo. Anita alobi boye: “Bamama nyonso na Nigeria basalaka bana na bango bongo. Mama azalaki mpe kosala ngai ná baleki na ngai bongo. Kobendabenda bebe nzoto ezali lolenge malamu mpenza ya konyolisa ye nzoto mpo amiyoka malamu. Ntango nazali kobendabenda bebe na ngai nzoto, nayembelaka ye mpe nayebisaka ye makambo, ye asakanaka mpe asɛkisaka ngai. Esepelisaka ye mpenza!”
Na bikólo mingi, bazali na momeseno yango, mpe ebandi kokɔta mpenza na bikólo mosusu ya Mpoto mpe ya Amerika. Ebongiseli ya Espagne oyo etalelaka likambo ya kobendabenda bana nzoto emonisi ete momeseno yango esalisaka bana bámiyoka malamu mpe epesaka bango esengo; esalisaka mpe baboti ná bana bákóma koyokana malamu mpenza, kasi esɛngaka mpe bokɛngi. Esɛngaka kofinafina ye malɛmbɛmalɛmbɛ na matambe, na makolo, na mokɔngɔ, na ntolo, na libumu, na mabɔkɔ mpe na elongi.
Bolamu nini bebe azwaka soki bazali kobendabenda ye nzoto? Likambo eleki ntina ezali ete yango esalisaka bebe ayeba ete balingaka ye. Bebe azalaka kaka te na mposa ya bilei, kasi azalaka mpe na mposa ya bolingo ya baboti na ye. Lokola mposo ya nzoto ebandaka koyoka kaka ntango mwana auti kobotama, soki mama to tata azali kobendabenda mwana nzoto, yango ekosalisa ye ayoka bolingo yango. Na ndenge yango, mama akoki koyebisa bebe makambo mingi. Momeseno yango ekoki kokolisa bolingo na kati ya baboti ná bana na bango banda kaka ntango babotami.
Longola komonisa bolingo, kobendabenda bebe nzoto ekoki kosalisa ye ayeba kominanola, alalaka mingi mpe malamu mpe motó ebɛtaka ye mpambampamba te. Ekoki mpe konyolisa ye nzoto, kosala ete makila etambolaka malamu na nzoto, bilei enikamaka malamu na libumu mpe apemaka malamu. Bato mosusu balobaka ete esalaka mpe ete mwana azala makila makasi. Lisusu, lokola kosala bongo elamusaka biyokeli na ye, na ndakisa lomposo, miso mpe matoi, ekolisaka mpe bɔɔngɔ mpe likoki ya koyeba mpe kokanga makambo.
Na balopitalo mosusu, balukaki mpe koyeba litomba ya kobendabendaka bebe nzoto. Na ndakisa, emonanaki ete bamatshombe oyo bazalaki kobendabenda bango nzoto babimaki na lopitalo ata mikolo nsambo liboso ya baoyo bazalaki kobendabenda bango nzoto te, mpe bakómaki na kilo mingi (ata 47%) koleka bango.
Emonani mpenza ete kaka mikóló te nde bazwaka litomba na kobendabenda nzoto! Kutu, babebe bazwelaka yango matomba mingi lisusu koleka. Esalisaka bango báyoka bolingo ya baboti na bango ntango bazali kofinafina bango mpe bazali kosɛkisa bango.