“Buku moko kitoko mpo na koteya”
Wana maloba oyo Motatoli ya Yehova moko oyo azali mosakoli ya ntango nyonso na ekólo Panama akomaki mpo na buku Biblia eteyaka mpenza nini? Buku yango ya nkasa 224 ezali na bililingi kitoko mpe ezali lelo oyo kosalelama mingi mpo na koyekola Biblia. Mosakoli yango akomaki boye: “Buku yango ezali kolobela makambo na mokuse, na molɔngɔ mpe na ndenge oyo ebongi. Lolenge ya sika oyo buku yango esaleli maloba oyo ezali kotinda na mikanda mosusu ya kotánga mpe apɛndisi, ezali mbala moko kopesa motángi mposa ya koluka koyeba lisusu makambo mingi oyo Biblia eteyaka.”
Na etúká ya Missouri, na États-Unis, Motatoli ya Yehova mosusu akomaki boye: “Nazali kosepela mingi ndenge buku yango ekomami na lolenge ya pɛtɛɛ. Natángá naino buku mosusu te oyo masolo na yango elandani mpenza na molɔngɔ koleka buku oyo.” Ntango kaka buku yango ebimaki, Motatoli wana amemelaki yango mwasi moko. Mwasi yango azalaki liboso koyekola Biblia, kasi na nsima alɛmbaki.
Motatoli yango alobaki boye: “Mwasi yango asilisaki naino te kotánga mokapo ya liboso, abengaki ngai na telefone mpo na koyebisa ngai ete asepelaki mpenza na buku yango.” Alobaki ete amoni lokola nde buku yango ekomami kaka mpo na ye mpe alingi kozongela boyekoli na ye ya Biblia. Motatoli yango amonaki mpenza ete moyekoli ya Biblia wana akómaki na esengo ntango basilisaki koyekola mikapo zomi ya liboso.
Atako mbula mibale ekoki naino te banda buku Biblia eteyaka ebimisami, buku yango koleka milio 50 esili kobimisama na minɔkɔ koleka 150. Okoki kosɛnga buku yango soki otondisi eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adrɛsi oyo etyami awa to oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.
□ Nalingi kozwa buku oyo bolakisi awa.
□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.