Bomoi nsima ya liwa: Biblia eteyaka mpenza nini?
Eteyaka te makambo oyo bayebisaka bato mingi ete yango eteyaka. Na ndakisa, eteyaka te ete . . .
◼ Bato nyonso ya malamu bakendeke na lola.
◼ Esengeli kosambela bankɔkɔ oyo bakufá.
◼ Bakufi bakoki kosalisa bato ya bomoi to kosala bango mabe.
◼ Moto azalaka na molimo oyo ekufaka te—liteya oyo mangomba mingi eteyaka mpe esimbi mateya mosusu oyo eyokani na Biblia te, na ndakisa konyokwama na lifelo ya mɔtɔ mpe kozonga na bomoi mbala na mbala.
Nzokande, makambo oyo Biblia eteyaka esepelisaka mpenza, ndenge elimbolami polele mpe na ndenge ya pɛtɛɛ na buku oyo tolakisi awa. Okoki kosɛnga buku yango soki otondisi eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adrɛsi oyo etyami awa to oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.
□ Nalingi kozwa mwa buku oyo bolakisi awa.
□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga nafuta mbongo.