Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 20
  • Likama ekómeli Dina

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likama ekómeli Dina
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Boyá baninga mabe!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • ‘Kimá pite’
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Bana ya Yakobo
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Luká libateli na kati ya basaleli ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 20

Lisolo 20

Likama ekómeli Dina

BOZALI komona bana basi oyo Dina ayei kotala? Akei kotala bana basi ya Kanana. Okanisi ete tata na ye Yakobo akosepela na likambo yango? Kanisá lisusu ndenge Abrahama ná Yisaka bazalaki kotalela basi ya Kanana.

Abrahama alingaki ete mwana na ye Yisaka abala mwasi ya mokili ya Kanana? Te. Yisaka ná Rebeka balingaki ete mwana na bango Yakobo abala mwasi ya mokili ya Kanana? Te. Boyebi mpo na nini balingaki te?

Mpo bato ya Kanana bazalaki kosambela banzambe ya lokuta. Yango wana, bakokaki kozala mibali malamu te mpe basi malamu te, mpe lisusu bakokaki kozala baninga malamu te. Na yango, Yakobo akokaki kosepela te ete Dina akóma moninga ya bana basi ya Kanana.

Nsukansuka, likama ekómeli Dina. Na elilingi oyo, ozali komona mobali wana, moto ya Kanana, oyo azali kotala Dina? Nkombo na ye Shekeme. Mokolo moko Dina akei kotala baninga na ye, Shekeme akangi ye na makasi mpe alali na ye. Yango ezalaki mabe, mpo kaka mwasi ná mobali oyo babalaná nde bazali na lotomo ya kosangisa nzoto. Kosambwisa oyo Shekeme asambwisaki Dina ebimisaki mikakatano mosusu.

Ntango bandeko ya Dina ya mibali bayoki likambo yango, bayokaki nkanda makasi mpenza. Mibale kati na bango, Simeone ná Levi, bakamati moto na moto mopanga na ye mpe bakɔteli mibali ya mboka wana na ntango oyo bayebi te. Bango ná bandeko na bango babomi Shekeme ná mibali mosusu. Likambo ya mabe wana oyo bana ya Yakobo basalaki esepelisaki ye te.

Mpo na nini likambo ya mabe boye esalemaki? Ezali mpo Dina akómaki moninga ya bato oyo bazali kotosa mibeko ya Nzambe te. Tókeba, tólanda ndakisa na ye te.

Ebandeli 34:1-31.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto