Loyembo 98
Tóbundela kondima
(Yuda 3)
1. Yesu asakolaki ’te,
Mabe makoyikana.
Bato mingi bakolɛmba,
Bolingo ekokita.
Nde biso tókosepela,
Tozali na kondima;
Oyo tozwi na lisangá
Ya Nzambe na Liloba.
2. Tokolanda Zábolo te.
Tólendisa kondima.
Na boyekoli, malɔmbo;
Tika ’te tósakola.
Soki nde tobundisami,
Tóbondela Yehova.
Na lisungi ya bandeko
Nde tokolendendela.
3. Tókangama na mosala,
Tóbatela kondima.
Mpe tópesa litatoli
Na mpiko kino nsuka.
Nzamb’akolongola mabe
Na mokolo monene.
Biso tokozwa lobiko
Na Bokonzi ya Nzambe.