Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 278-284
  • Boyekoli nimero 2—Ntango mpe Makomami Mosantu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boyekoli nimero 2—Ntango mpe Makomami Mosantu
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Masolo mosusu
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Badati
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 278-284

Boyekoli ya Makomami mapemami mpe ya mambí manso makangani na yango

Boyekoli nimero 2—Ntango mpe Makomami Mosantu

Bomonisi kokabolama ya ntango oyo esalelami kati na Biblia, kolobelama ya manáka oyo masalelami na bato banso, badati ya sikisiki mpo na Biblia, mpe makambo ya ntina oyo matali “elekelo ya ntango.”

1, 2. Salomo akomaki nini na ntina na ntango, mpe lokola ntango ekolekaka noki, tosengeli kosala na yango nini?

MOTO ayebi malamumalamu ete ntango ezali koleka. Na bobɛti nyonso ya likɔnga ya montre, azali kosala litambe ya sika kati na nzela epai kuna ntango ezali kokende. Ya solo, soki akosalela ntango na ye na lolenge malamu, akomimonisa ete azali na mayele. Mokonzi Salomo akomaki ete: “Ntango ezali mpo na eloko na eloko mpe saa mpo na likambo na likambo na nsé na moi; ntango na kobotama mpe ntango na kokufa, ntango na kokóna mpe ntango na kobuka yango ekónamaki; ntango na koboma mpe ntango na kobikisa, ntango na kobukabuka mpe ntango na kotonga; ntango na kolela mpe ntango na kosɛka.” (Mos. 3:1-4) Ntango ezali koleka noki mpenza! Mibu 70 ya bomoi mobimba ezali moke mingi mpo na moto ete akóma na boyebi ya makambo mingi mpe kosepela na biloko nyonso mosusu ya malamu oyo Yehova asili kopesa ye awa na mabelé. “Asalaki nyonso na kitoko na ntango na yango; atii mpe lobiko [“bileko bizangi nsuka,” NW] kati na mitema na bango, nde moto te ayebi kososola mosala mosalaki Nzambe longwa na ebandeli kino nsuka.”​—Mos. 3:11; Nz. 90:10.

2 Bobele Yehova ye moko nde azali kobika seko na seko. Mpo na bikelamu na ye, amonaki malamu ete akɔtisa bango kati na elekelo ya ntango. Baanzelu na likoló, bakisá mpe motomboki Satana, bayebi malamumalamu ete ntango ezali koleka. (Dan. 10:13; Emon. 12:12) Na oyo etali bato, ekomami ete: “Ntango mpe makambo makanami te mazali kokwela bango nyonso.” (Mos. 9:11, NW) Esengo na moto oyo azali kokanisa Nzambe ntango nyonso mpe azali kosepela kolya “bilei na elaka na yango,” engebene ebongiseli ya Nzambe!—Mat. 24:45.

3. Ntango mpe etando ekokani na likambo nini?

3 Ntango ezongaka nsima te. Atako ntango ezali kosalelama bipai nyonso na mokili, nzokande moto ata moko te akoki kolimbola soki yango ezali nini. Lokola eutelo mpe nsuka ya etando ya likoló eyebani te, bobele bongo ntango mpe ekoki koyebana te. Moto moko te akoki kolimbola epai elekelo ya ntango ebandi to epai yango ezali kokende. Bobele Yehova, oyo azali na boyebi ezangi nsuka, nde akoki kososola makambo yango; elobami mpo na ye ete azali Nzambe “lobiko na lobiko.”​—Nz. 90:2.

4. Tokoki koloba nini na oyo etali kotambola ya ntango?

4 Nzokande, ezali na makambo mosusu ya ntango oyo makoki kososolama. Mwayene ya botamboli na yango ekoki komekama. Lisusu, ntango ezongaka nsima te. Lokola mituka oyo mizali kotambola na nzela oyo epekisami kozonga nsima, bobele bongo ntango ekendaka sé epai moko—liboso, sé liboso. Atako lombangu kati na botamboli na yango ya kokende liboso ezali boni, ntango ekoki ata moke te kozongisama nsima. Ntango ya sikawa oyo tozali kobika na yango ezali mokuse. Nzokande, ntango yango ya sikawa etambolaka, ezali kokóma ntango-eleki. Likoki ya kopekisa yango ezali te.

5. Mpo na nini tokoki koloba ete ntango-eleki esilá kobebisama mpamba to kozwamela litomba?

5 Ntango-eleki. Ntango-eleki esili kokende, etikali sé lisoló, mpe ekoki kozonga lisusu te. Koluka kozongisa yango nsima ezali likambo oyo likoki kosalema te mpe likokani na koluka kozongisa mai ya bweta oyo ezali kosopana uta na ngomba to koluka kozongisa likulá na litimbo nsima na kotinda yango. Mabungá na biso masili kotika elembo na yango kati na elekelo ya ntango, bobele Yehova nde akoki kolongola elembo wana. (Yis. 43:25) Bobele bongo, misala malamu oyo moto asalaki na ntango-eleki mizali kotika libula oyo “ekozonga epai na ye” elongo na mapamboli uta na Yehova. (Mas. 12:14, NW; 13:22) Ntango-eleki esilá kobebisama mpamba, soki bongo te esilá kozwamela litomba. Likoki ya kozala na bokonzi likoló na yango ezali lisusu te. Mpo na bato mabe, esili kokomama ete: “Mpo ete bakolimwa mbangu lokola matiti; bakokauka lokola matiti mobesu.”​—Nz. 37:2.

6. Lolenge nini ntango-ekoya ekeseni na ntango-eleki, mpe mpo na nini tosengeli kotya likebi likoló na ntango-ekoya?

6 Ntango-ekoya. Ntango-ekoya ekeseni. Yango ezali sé kozela biso. Na lisalisi ya Liloba ya Nzambe, tokoki koyeba mikakatano oyo mizali liboso na biso mpe komibongisa mpo na kolónga yango. Tokoki komibombela “biloko na motuya kuna na Likoló.” (Mat. 6:20) Elekelo ya ntango ekoki te kobebisa biloko yango ya motuya. Yango ekotikala elongo na biso mpe ekoumela kino ntango mapamboli ya seko makoya. Tosengeli kosalela ntango na biso na lolenge lobongi, mpamba te yango etaleli mikolo na biso oyo mizali koya.​—Ef. 5:15, 16.

7. Biloko nini bikolakisaka ntango Yehova asilá kopesa na moto?

7 Biloko bikolakisaka ntango. Bamontre ya mike mpe ya minene ya mikolo na biso ezali biloko oyo bikolakisaka ntango. Yango ezali bisaleli mpo na bomeki ntango. Bobele bongo Yehova, Mozalisi, asilá kosala biloko minene oyo bikolakisaka ntango—kobaluka ya mabelé zingazinga ya ntéi na yango, kobaluka ya sanza zingazinga ya mabelé, mpe lisusu moi—na ntina ete uta na esika oyo moto azwami awa na mabelé, akoka koyeba ntango na bosikisiki nyonso. “Nzambe alobaki ete, Tiká pole [“mingɛngɛli,” NW] izala na etando na likoló, ikabola moi mpe butu. Tiká ete izala mpo na bilembo mpe na bilanga, mpo na mikolo mpe na mbula.” (Gen. 1:14) Na bongo, lokola ezali liboke ya biloko ndenge na ndenge oyo bizalisamaki na mokano bobele moko, biloko minene wana ya likoló bizali kokende mpe kozonga kati na nzela na yango ya sikisiki, kolakisáká, seko na seko mpe kozanga libungá, botamboli ya ntango oyo ekendaka sé epai moko.

8. Na bandimbola nini ekeseni liloba “mokolo” esalelami kati na Biblia?

8 Mokolo. Kati na Biblia, liloba “mokolo” lisalelami na bandimbola mingi ekeseni; bobele bongo, na mikolo na biso yango ezali kosalelama na bandimbola ndenge na ndenge. Wana mabelé mazali kosala zolongano mobimba zingazinga ya ntéi (axe) na yango, likambo wana limonisi ete na mokolo mobimba ngonga 24 ileki. Na ndimbola yango, mokolo mosalemi na moi mpe na butu, ngonga na yango nyonso ezali 24. (Yoa. 20:19) Nzokande, pole ya moi yango moko, oyo ezali na mwayene ya ngonga 12, ebéngamaka mpe mokolo. “Nzambe abyangaki pole moi, mpe molili abyangaki butu.” (Gen. 1:5) Yango ememi biso na liloba “butu,” eleko oyo ezali na mwayene ya ngonga 12 ya molili. (Ex. 10:13) Ndimbola mosusu ezali oyo kati na yango liloba “mokolo (to mikolo)” esalelamaka mpo na kolobela eleko oyo moto moko, oyo ayebani malamu, azalaki na bomoi. Na ndakisa, Yisaya azwaki emonaneli na ye “na mikolo na Uziya mpe Yotama mpe Ahaza mpe Hizikiya” (Yis. 1:1); lisusu mikolo ya Noa mpe mikolo ya Lota milobelami lokola mikolo ya esakweli. (Luka 17:26-30) Ndakisa mosusu ya kosalelama ya liloba “mokolo” na lolenge lokeseni mpe ya elilingi ezali oyo elobelami na Petelo ete “epai na [Yehova], mokolo moko ezali lokola bilanga [“mbula,” NW] nkóto.” (2 Pet. 3:8) Kati na lisoló ya Genese, mokolo moko ya bozalisi ezali eleko ya ntango molai mpenza—bankóto ya bambula. (Gen. 2:2, 3; Ex. 20:11) Ezali makambo ya zingazinga, oyo mazali na Biblia, nde mamonisaka ete, na esika oyo, liloba “mokolo” esalelami na ndimbola oyo to na oyo mosusu.

9. (a) Lolenge nini kokabolama ya mokolo na bangonga 24 oyo mokomoko na yango ezali na miniti 60 ebandaki? (b) Biloko nini bikolakisaka ntango bilobelami kati na Makomami ya Liebele?

9 Ngonga. Kokabolama ya mokolo na ngonga 24 ebandaki kosalelama na mokili ya Ezipito. Na mikolo na biso, kokabolama ya ngonga na miniti 60 eutaki na mateya ya matematiki ya Babilone, oyo ebongiseli na yango etongamaki likoló na motuya ntuku motoba (60). Kokabola mokolo na bangonga elobelami te kati na Makomami ya Liebele.a Na esika ya kokabola mokolo na motuya moko ya sikisiki ya bangonga, Makomami ya Liebele masalelaka nde maloba lokola oyo: “ntɔ́ngɔ́,” “midi,” “nzánga,” mpe “mpokwa,” lokola biloko bikolakisaka ntango. (Gen. 24:11; 43:16; Det. 28:29; 1 Mik. 18:26) Butu ekabolamaki na biteni misato oyo bibéngamaki “bileko ya butu” (Nz. 63:6, NW), oyo mibale na yango etángami na bosikisiki nyonso kati na Biblia: “katikati ya butu” (Bas. 7:19) mpe “ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́.”​—Ex. 14:24; 1 Sam. 11:11.

10. Lolenge nini Bayuda bazalaki kotánga bangonga na mikolo na Yesu, mpe lolenge nini boyebi ya likambo yango ezali kosalisa biso na koyeba ntango oyo Yesu akufaki?

10 Nzokande, kati na Makomami ya Greke ya boklisto, liloba “ngonga” lizali kosalelama mingi mpenza. (Yoa. 12:23, NW; Mat. 20:2-6) Bangonga ezalaki kotángama kobanda na kobima ya moi, to na zingazinga ya ngonga ya 6 na ntɔ́ngɔ́. Biblia elobeli “ngonga ya misato,” oyo ekokani soko na ngonga ya 9 na ntɔ́ngɔ́. “Ngonga na motoba” elobelami ete ezali ntango oyo molili mozipaki Yelusaleme, wana Yesu akakisamaki na nzeté. Yango ekokani na midi to na ngonga ya 12 ya mikolo na biso. Elobami ete, likoló na nzeté, Yesu akataki motema “[pene na] ngonga na libwa,” to na zingazinga ya ngonga ya 3 na nsima ya nzánga ya mikolo na biso.​—Mko. 15:25; Luka 23:44; Mat. 27:45, 46.b

11. Uta ntango nini liloba “pɔ́sɔ” libandaki kosalelama lokola eloko ya kolakisa ntango?

11 Pɔ́sɔ. Moto abandá uta kala mpenza kotánga mikolo na ye longwa na moko kino nsambo. Na kosaláká bongo, alandaki ndakisa ya Mozalisi na ye, oyo asukisaki mikolo na ye motoba ya bozalisi na eleko ya nsambo oyo ebéngami mpe mokolo. Noa atángaki mikolo na kobandáká na moko kino nsambo. Na Liebele, “pɔ́sɔ” elimboli mpenza eleko to liboke lisangisi makambo nsambo.​—Gen. 2:2, 3; 8:10, 12; 29:27.

12. Sanza-lune ezali nini, mpe na nini yango ekeseni na basanza ya mikolo na biso?

12 Basanza-lune. Biblia ezali kolobela “basanza-lune.” (Ex. 2:2, NW; Det. 21:13, NW; Det. 33:14; Ezl. 6:15, NW) Basanza ya mikolo na biso ezali basanza-lune te, mpo ete yango etyami te engebene sanza oyo ekongɛngaka na butu. Yango ezali bobele biteni 12 kati na yango mbula ekabolami. Sanza-lune ezali sanza oyo etyami na kotalela sanza (lune) ya sika oyo ebimi na butu. Sanza oyo ebimaka na butu ezali na lolenge minei ya komilakisa, mpe yango esali eleko mobimba ya sanza oyo ezali na mwayene ya mikolo 29, bangonga 12, na miniti 44. Mpo na koyebisa ete tokómi na mokolo boye ya sanza-lune moko, esengeli bobele kotala lolenge sanza ezali komonana na butu.

13. Lolenge nini Mpela eyebisamaki na bosikisiki mpo na oyo etali ntango na yango?

13 Na esika ya kosalela mpenza basanza-lune, emonani ete Noa abongisaki makambo na ye engebene basanza oyo moko na moko na yango ezalaki na mikolo 30. Na lisalisi ya lisoló oyo Noa akomaki kati na masuwa, tozali kososola ete mai ya Mpela makóbaki kozindisa mabelé na boumeli ya sanza mitano, to “mikolo monkámá na ntuku mitano.” Ezalaki nsima ya sanza 12 bakisá mikolo 10 nde mabelé makaukaki, kopesáká nzela na baoyo bazalaki na masuwa ete bábima. Na bongo, makambo minene wana oyo mamonisi bileko yango ya kala makomamaki mpenza na bosikisiki.​—Gen. 7:11, 24; 8:3, 4, 14-19.

14. (a) Lolenge nini Yehova asalaki ebongiseli ya bileko? (b) Ebongiseli ya bileko ekolanda kozala kino ntango nini?

14 Bileko. Wana azalaki kobongisa mabelé ete ezala esika ya kofanda, Yehova atyaki bileko, oyo ezali ebongiseli ya mayele mpe etondi na bolingo. (Gen. 1:14) Bileko biuti na likambo oyo ete mabelé etɛngamá to elalá mwa moke, kosaláká mbata (angle) ya 23,5° kati na ebongiseli ya mobembo na yango zingazinga ya moi. Likambo yango lisalaka ete, libosoliboso, Emisfɛrɛ ya Súdi elala moke epai na moi mpe, sanza motoba na nsima, Emisfɛrɛ ya Nɔ́rdi elala mpe epai na moi, na boye ete bileko bilandana na molɔngɔ́. Mbongwana wana ya bileko ezali kosala ete makambo mázala ndenge na ndenge mpe makeseni; yango ezali komonisa ntango ya kolóna mpe ntango ya kobuka mbuma. Liloba ya Nzambe lindimisi biso ete ebongiseli wana ya mbongwana mpe ya bokeseni kati na bileko na boumeli ya mbula mobimba esengeli kotikala seko na seko. “Wana ekoumela mokili, ntango na kokóna mpe ntango na kobuka, ntango na mpiɔ mpe ntango na moi, ntango na mbula mpe ntango na elanga, na mokolo mpe na butu ikozanga te.”​—Gen. 8:22.

15, 16. (a) Lolenge nini eleko ya mbula kati na Mokili ya Ndaka ekoki kokabolama? (b) Lobelá bileko ya mbula mpe boyokani oyo ezali kati na yango mpe mosala ya bilanga.

15 Na Mokili ya Ndaka, mobu mobimba mokabolamaki na bileko mibale: ntango ya mbula mpe ntango ya elanga. Pene na katikati ya Apríli kino katikati ya Ɔkɔtɔ́bɛ, mbula inɔkaka mingi te. Ntango ya mbula ekoki kokabolama na bileko oyo: eleko ya mbula ya ebandeli, to “Ɔtɔmne,” (Ɔkɔtɔ́bɛ-Novɛ́mbɛ); mbula makasi ya eleko ya mpiɔ mpe ntango ya malili makasi koleka (Desɛ́mbɛ-Febwáli); mpe eleko ya mbula ya nsuka, to “prɛntá” (Mársi-Apríli). (Det. 11:14; Yoe. 2:23) Kokabolama wana ezali mpenza ya sikisiki te, mpamba te bileko bikutanaka na ntina na mbongwana ya klimá kati na biteni bikeseni ya mokili yango. Eleko ya mbula ya ebandeli elɛmbisaka mabelé oyo makómi makasi, na yango eleko ya Ɔkɔtɔ́bɛ-Novɛ́mbɛ ezali ntango ya “kotimola” mpe ntango ya “kolóna.” (Ex. 34:21; Lev. 26:5) Na boumeli ya mbula makasi ya eleko ya mpiɔ (hiver), oyo ebandaka na Desɛ́mbɛ kino Febwáli, mbula-mpɛmbɛ ikweaka mingi, mpe na Yanuáli kino Febwáli, ntango ekómaka na malili makasi koleka ya ngalása, na bisika oyo bitombwaná mingi koleka. Biblia ezali kolobela Benaya, moko na bato makasi ya Davidi, ete abomaki nkosi “na ntango na mbula-mpɛmbɛ.”​—2 Sam. 23:20.

16 Basanza ya Mársi mpe Apríli (oyo ekoki kokokana na sanza ya Nisana mpe sanza ya Ziwi ya Bayuda) ezali basanza ya eleko ya ‘mbula ya prɛntá.’ (Zek. 10:1) Yango ezali mbula ya nsuka, oyo ezali na ntina mingi mpo na kobotisa milóna oyo milónamaki na Ɔtɔmne, mpe yango ekosala ete mbuma oyo ikobukama izala mingi. (Hos. 6:3; Yak. 5:7) Yango ezali mpe eleko ya ebandeli ya bobuki mbuma, mpe Nzambe apesaki Yisalaele mobeko ete, na mokolo nyonso ya 16 na sanza ya Nisana, bápesa likabo ya mbuma ya liboso oyo izwami na bobuki mbuma na bango. (Lev. 23:10; Luta 1:22) Ezali ntango moko ya bonzenga mpe ya bosepeli. “Felele izali komonana na mabelé, ntango na koyemba na ndɛkɛ eyei; mongongo na ebenga eyokani na mokili na biso. Nzeté na mosuke ezali kobimisa mbuma na yango, mpe nkamba na miwiti izali na felele, ibimisi nsolo malamu.”​—Loy. 2:12, 13.

17. (a) Lolenge nini milóna mibikisamaka na boumeli ya eleko ya elanga? (b) Talelá etánda “Mbula epai na Bayisalaele” mpe kabolá mbula yango engebene bileko oyo bilobelami na baparagrafe 15-17. (c) Ntango nini bobuki mbuma ya ebandeli ezalaki kosalema, ntango nini kobukama ya mbuma mpenza ezalaki kosalema, ntango nini mbuma nyonso izalaki koyanganisama, mpe bilambo nini bizalaki kotambola elongo na makambo yango?

17 Pene na katikati ya Apríli, elanga ebandi, kasi pene na boumeli ya eleko yango mobimba, mingimingi na bisobe oyo bizali pembenipembeni ya mai monene mpe na mipanzi ya ngomba oyo izali na wɛ́sti, mamwe ekweaka na boíké mpenza mpo na kobikisa milóna ya eleko ya molungé. (Det. 33:28) Na boumeli ya sanza ya Máí, mbuma ibukami, mpe ezalaki na nsuka ya sanza yango nde Elambo na Bapɔ́sɔ (Pantekote) ezalaki kosalema. (Lev. 23:15-21) Na nsima, ntango molungé ebandi koya mpe mabelé ebandi kokauka, bibolo ya vinyo biteli mpe bibukami; na nsima na yango, ngala ya mbuma mosusu ya eleko ya molungé eyei, na ndakisa olive, mbuma babéngi dattes, mpe miwiti. (2 Sam. 16:1) Na nsuka ya ntango ya elanga mpe na kobanda ya ntango ya mbula ya ebandeli, mbuma nyonso ya mokili yango isili kobukama, mpe na nsima (pene na ebandeli ya Ɔkɔtɔ́bɛ), ntango ya kosala Elambo ya Mingombo ekoki.​—Ex. 23:16; Lev. 23:39-43.

18. (a) Mpo na nini ndimbola ya liloba “mbula” na Liebele ebongi mpenza? (b) Mbula ya solosolo ya moi elimboli nini mpo na mabelé?

18 Mbula. Boyekoli na biso ya ntango kati na Biblia ememi biso sikawa na liloba “mbula.” Longwa na ebandeli ya lisoló ya moto, mbula elobelami. (Gen. 1:14) Liloba ya Liebele sha·nahʹ, oyo libongolami na “mbula,” liuti na liloba oyo elimboli “kozongela; kosala lisusu” mpe yango ezali kopesa likanisi ya ntango oyo ezali kozonga mbala na mbala. Yango ebongaki mpenza, mpamba te na boumeli ya mbula moko na moko kokende mpe kozonga ya bileko ezalaki kosalama mbala na mbala. Mbula ya mabelé ezali na bokangani na ntango oyo mabelé elekisaka mpo na kokokisa zolongano to mobembo mobimba zingazinga ya moi. Mbula ya moi ezali mpenzampenza eleko oyo ekaboli kokatisa ya moi na ntéi ya etando na biso uta na emisfɛrɛ ya súdi kino na emisfɛrɛ ya nɔ́rdi, na boumeli ya prɛntá, mpe kokatisa na yango na prɛntá oyo ekolanda. Mbula ya moi ezali na mwayene ya mikolo 365 na ngonga 5, miniti 48 na basegonde 46, to mikolo soko 365 na 1/4 ya mokolo. Yango ebéngami mbula ya solosolo ya moi.

19. (a) Lolenge nini bambula ya kala ya Biblia ezalaki kotángama? (b) “Mbula mosantu” nini Yehova apeselaki yango mobeko na nsima?

19 Bambula ya Biblia. Engebene etángeli ya kala ya Biblia, mbula ezalaki kobanda na Ɔtɔmne mpe kosuka na Ɔtɔmne mosusu. Yango ebongaki mingi mpenza na bomoi ya mosala ya bilanga, oyo mbula ezalaki kobanda na botimoli mpe bolóni, pene na ebandeli ya sanza ya Ɔkɔtɔ́bɛ ya mikolo na biso, mpe ezalaki kosuka na koyanganisama ya mbuma ibukami. Noa atángaki mbula na kobandáká na Ɔtɔmne. Ayebisaki lisoló ya Mpela ete yango ebandaki “na sanza na mibale,” oyo ekokani na eteni ya nsuka ya sanza ya Ɔkɔtɔ́bɛ mpe na eteni ya ebandeli ya sanza ya Novɛ́mbɛ. (Gen. 7:11, NW, maloba na nsé ya lokasa) Kino lelo oyo, bikólo mingi awa na mabelé bizali naino kobanda kotánga mbula na bango ya sika na Ɔtɔmne. Na ntango ya Exode to Bobimi longwa na Ezipito, na mobu 1513 L.T.B., Yehova apesaki mobeko ete sanza ya Abibu (Nisana) esengeli kozala ‘sanza ya liboso’ mpo na Bayuda, na ntina ete bázala sikawa na mbula mosantu, oyo ebandi na prɛntá kino na prɛntá mosusu. (Ex. 12:2) Nzokande, Bayuda na mikolo na biso bazali kosalela mbula ya mikolo 365, oyo ebandi na Ɔtɔmne, mpe oyo sanza na yango ya liboso ebéngami Tisri.

20. Lolenge nini mbula ya sanza esembolamaki mpo na kokokana na mbula ya moi, mpe bambula ya sanza-moi ezali nini?

20 Mbula ya sanza-moi. Kino na eleko ya Yesu, mabota mingi bazalaki kotánga ntango na lisalisi ya bambula oyo ezalaki kotángama na nzela ya sanza, kosaleláká myango ndenge na ndenge mpo na kosembola mbula ete ekokana na mbula oyo ezalaki kotángama na nzela ya moi, na lolenge ya sikisiki to sikisiki te. Mbula ya sanza oyo esalelami na bisika nyonso mpe oyo ezali na basanza 12, ezali na mikolo 354, mpe sanza na yango mokomoko ezali na mikolo 29 to 30, engebene lolenge ya komonana ya sanza ya sika oyo ekobimaka na butu. Na yango, mbula ya sanza ezangi mikolo soko 11 bakisá 1/4 ya mokolo mpo na kokokana na mbula ya moi oyo ezali na mikolo 365 mpe 1/4 ya mokolo. Bayuda balandaki kosalela mbula ya sanza. Lolenge oyo babongisaki mbula na bango ete ekokana na mbula ya moi, elongo na bileko na yango, elimbolami te kati na Biblia, kasi esengeli kozala ete bazalaki kobakisa basanza mosusu na kati, na ntango mposa ezalaki komonana. Ebongiseli ya kokɔtisa to kobakisa basanza mosusu eyaki kotyama ngwi na nsima, na ekeke ya mitano L.T.B, kati na oyo eyebani lelo na nkombo ete cycle métonique. Yango epesaki nzela ete sanza ya kokɔtisama ekoka kobakisama mbala nsambo na boumeli ya eleko mokomoko ya bambula 19, mpe kati na manáka ya Bayuda, yango ebakisamaki na nsima ya sanza ya zomi na mibale, Adala, mpe ezalaki kobéngama Ve-adala, to “Adala ya mibale.” Lokola manáka ya mbula ya sanza ekokani na manáka ya mbula ya moi, boye bambula, oyo esalemi na sanza 12 to 13, eyebani ete ezali bambula ya sanza-moi.

21. (a) Manáka ya Jules ezali nini? (b) Mpo na nini manáka ya Grégoire ezali na bosikisiki koleka?

21 Manáka ya Jules mpe manáka ya Grégoire. Manáka ezali ebongiseli ya kotya ebandeli, bolai mpe kokabolama ya mbula, kolandisáká biteni na yango na molɔngɔ́. Manáka ya Jules esalamaki na Yuli Kaisala na mobu 46 L.T.B., na ntina ete Baloma bázwa ebongiseli ya kotánga ntango na lisalisi ya mbula ya moi, na esika ya kosalela mbula ya sanza. Kati na manáka ya Jules, mbula moko ezali na mikolo 365; kasi na mbula nyonso ya minei, mokolo moko mobakisamaka, boye mbula yango ezalaka na mikolo 366 (année bissextile). Nzokande, eyaki komonana na nsima ete mbula moko ya manáka ya Jules elekaki mbula ya solosolo ya moi na mwa bolai ya miniti 11. Na ekeke ya zomi na motoba T.B., bokeseni ya mikolo zomi mobimba eyaki komonana. Na yango, na mobu 1582, pápa Grégoire XIII asembolaki manáka yango mwa moke, kobandisáká oyo ebéngami lelo ete manáka ya Grégoire. Na nzela ya mokanda ya pápa, mikolo zomi milongolamaki kobanda na mobu 1582, na boye ete mokolo ya nsima ya 4 Ɔkɔtɔ́bɛ mokómaki 15 Ɔkɔtɔ́bɛ. Manáka ya Grégoire mayebisi ete bikeke oyo bikoki te kokabolama na 400 bisengeli te kotalelama ete bizali bambula oyo babéngi années bissextiles. Na ndakisa, na kokesana na mobu 2000, mobu 1900 mobéngamaki année bissextile te mpo ete motángo 1 900 mokoki te kokabolama na 400. Manáka ya Grégoire ezali sikawa manáka oyo mazali kosalelama na bisika mingi awa na mokili.

22, 23. Bolai ya mbula ya esakweli ezali ya ntango boni?

22 “Mbula” ya esakweli. Kati na esakweli ya Biblia, liloba “mbula” lisalelamaka mbala mingi na ndimbola oyo ekeseni; yango ezali na sanza 12, oyo mokomoko na yango ezali na mikolo 30, boye mbula mobimba ezali na mikolo 360. Talá oyo molimboli moko ayebisaki wana azalaki kolobela Ezekiele 4:5, 6: “Tosengeli kozala na makanisi ete Ezekiele ayebaki mbula oyo ezali na mikolo 360. Yango ezali mbula ya solosolo ya moi te mpe ezali mbula ya sanza te. Ezali mbula ‘ezwami na katikati,’ oyo sanza mokomoko na yango ezali na mikolo 30.”c

23 Mbula ya esakweli ebéngamaka lisusu “ntango,” mpe boyekoli ya Emoniseli 11:2, 3 mpe 12:6, 14 emonisi lolenge “ntango” moko etángami ete ezali na mikolo 360. Kati na esakweli, mbula ekoki mpe komonisama na liloba “mokolo,” kasi yango esalemaka mingi mpenza te.​—Ezek. 4:5, 6.

24. Ndenge nini mabota mingi ya ntango ya kala mazalaki kobanda mitángo na bango?

24 Mobu zero mozali te. Bato ya kala, sangisá Bagreke oyo bayekolaki mingi, Baloma mpe Bayuda, bayebaki motángo zero te. Mpo na bango, makambo nyonso mazalaki kobanda kotángama na moko. Ntango oyekolaki mituya ya Baloma (I, II, III, IV, V, X, mpe bongo na bongo) na eteyelo, balakisaki yo lolenge ya kokoma zero? Te, mpo ete Baloma bazalaki na yango te. Lokola Baloma basalelaki motuya zero te, na ntina yango Ntango na Biso ebandaki, na mobu zero te, kasi na mobu 1 T.B. Likambo yango libimisaki mpe ebongiseli ya mitángo ya bomonisi molɔngɔ́ (nombres ordinaux); na ndakisa: ya liboso (ya 1), ya mibale (ya 2), ya misato (ya 3), ya zomi (ya 10) mpe ya monkámá (ya 100). Na mateya ya Matematiki ya ntango na biso, moto azali kotalela makambo nyonso ete mabandi na eloko te, elingi koloba na libungutulu to zero. Zero ebimisamaki mbala mosusu na ba Hindous.

25. Likeseni nini ezali kati na mitángo ya bomonisi molɔngɔ́ mpe mitángo ya mibimba?

25 Na yango, na esika nyonso oyo mitángo ya bomonisi molɔngɔ́ esalelami, tosengeli kolongola moko mpo na kozwa motuya ya kokoka. Na ndakisa, ntango tozali kolobela dati moko kati na ekeke ya 20 T.B., yango elingi nde koloba ete bikeke 20 ya mibimba bisili koleka? Te, yango elimboli bikeke 19 ya mibimba, bakisá mwa bambula. Mpo na kolobela mituya ya kokoka, Biblia mpe matematiki ya mikolo na biso esalelaka mitángo ya mibimba (nombres cardinaux), lokola 1, 2, 3, 10 mpe 100. Yango ebéngami mpe “mituya mikoká.”

26. Ndenge nini okoki koyeba (a) bambula oyo elekaki kobanda na 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 607 L.T.B., kino 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 1914 T.B.? (b) dati ya nsuka ya mbula 2 520 kobanda na 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 607 L.T.B.?

26 Na bongo, lokola Ntango na Biso ebandaki na mobu zero te kasi na mobu 1 T.B., mpe lokola manáka ya mibu oyo mizalaki liboso na Ntango na Biso ekitaki te kino mobu zero kasi kino mobu 1 L.T.B., boye motuya oyo mosalelami mpo na komonisa mbula kati na dati nyonso mozali mpenza motuya to motángo ya bomonisi molɔngɔ́. Yango wana, 1990 elakisi mpenza mbula 1989 ya mibimba uta ebandeli ya Ntango na Biso, mpe dati ya 1 Yulí 1990, elakisi mbula 1 989 ná ndambo, uta ebandeli ya Ntango na Biso. Etángeli yango ebongi mpe kosalelama mpo na badati ya Liboso ya Ntango na Biso (L.T.B.). Na yango, mpo na koyeba motuya ya bambula oyo elekaki kati na dati ya 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 607 L.T.B., mpe dati ya 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 1914 T.B., bakisá bambula 606 (na basanza misato ya mbula oyo euti koleka) na bambula 1 913 (na basanza libwa ya ebandeli ya mbula oyo elandi), mpe okozwa motuya ya 2 519 (bakisá basanza 12), to bambula 2 520. To soki olingi koyeba dati oyo bambula 2 520 ekosuka kobanda na mokolo ya 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 607 L.T.B, omikundola ete 607 ezali motángo ya bomonisi molɔngɔ́—yango ekokani mpenza na mbula 606 ya mibimba—mpe lokola tozali te kotánga, uta na 31 Desɛ́mbɛ 607 L.T.B., kasi uta na 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 607 L.T.B., na yango tosengeli kobakisa, likoló na 606, basanza misato ya nsuka ya mobu 607 L.T.B. Longolá sikawa 606 1/4 na mbula 2 520. Motuya oyo etikali ezali bongo 1 913 3/4. Yango elingi koloba ete mbula 2 520 kobanda na 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 607 L.T.B., ememi biso na mbula 1 913 3/4 kati na Ntango na Biso—mbula 1 913 ya mibimba ememi biso na ebandeli ya mobu 1914 T.B., mpe biteni misato kati na minei (3/4) ya mbula moko, oyo ebakisami likoló na yango, ememi biso na 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 1914 T.B.d

27. Badati ya sikisiki ezali nini, mpe mpo na nini yango ezali na ntina mingi?

27 Badati ya sikisiki. Kronoloji (kolandana ya ntango) ya Biblia oyo ebongi kotyelama motema etongami likoló na mwa badati ya sikisiki. Dati ya sikisiki ezali dati oyo, kati na lisoló ya kala, ezali na moboko malamu mpo na kondimama mpe oyo ekokani mpenza na likambo moko ya sikisiki oyo liyebisami na Biblia. Na bongo, yango ekoki kosalelama lokola dati ya ebandeli oyo uta na yango tokoki koyeba, na bosikisiki mpenza, ntango oyo likambo mokomoko ya Biblia lisalemaki kati na manáka. Soki dati wana ya sikisiki etyami, boye mitángo mikoki kosalema uta na dati yango mpo na koyeba badati ya liboso to badati ya nsima, na lisalisi ya masoló ya sikisiki oyo mazwami kati na Biblia yango moko, na ndakisa boumeli ya bomoi ya bato to boumeli ya boyangeli ya bakonzi, oyo elobelami. Na bongo, kobandáká na dati moko ya sikisiki, tokoki kosalela kronoloji ya Biblia yango moko, kronoloji oyo ebongi kotyelama motema, mpo na komonisa badati ya makambo ndenge na ndenge oyo mazali kati na Biblia.

28. Wapi dati ya sikisiki oyo etyami mpo na Makomami ya Liebele?

28 Dati ya sikisiki mpo na Makomami ya Liebele. Likambo ya ntina mpenza oyo liyebisami kati na Biblia mpe kati na lisoló ya kala ya mokili ezali bongo kokweisama ya engumba Babilone na Bamede mpe na Baperse, na litambwisi ya Siruse. Biblia eyebisi likambo yango kati na Danyele 5:30. Biutelo ndenge na ndenge ya makambo ya kala (bakisá mpe makomi ya Diodore, Africanus, Eusèbe, Ptolémée, mpe makomi likoló na mabanga ya Babilone) endimisi ete mobu 539 L.T.B. ezali mbula oyo Babilone ekweisamaki na Siruse. Libanga ya Nabonide lizali kopesa sanza mpe mokolo oyo engumba yango ekweisamaki (mbula epesami te). Bato ya mokili oyo bayekolaka kolandana ya ntango batyaki bongo dati ya kokwea ya Babilone na 11 Ɔkɔtɔ́bɛ 539 L.T.B., engebene manáka ya Jules; na manáka ya Grégoire, yango etyami na dati ya 5 Ɔkɔtɔ́bɛ.e

29. Ntango nini Siruse abimisaki mobeko, mpe yango epesaki nzela na likambo nini?

29 Nsima na kokwea ya Babilone, na boumeli ya mbula na ye ya liboso lokola moyangeli ya Babilone oyo ezwamaki, Siruse abimisaki mobeko na ye moyebani malamu, mobeko oyo mopesaki nzela na Bayuda ete bázonga na Yelusaleme. Na kotalela lisoló ya Biblia, emonani ete mobeko yango mobimisamaki pene na nsuka ya mobu 538 L.T.B. to pene na prɛntá ya mobu 537 L.T.B. Yango epesaki Bayuda libaku libongi mpo na kozonga kofanda na mokili na bango mpe kokóma na Yelusaleme mpo na kozongisa losambo ya pɛto ya Yehova, na “sanza na nsambo,” oyo ebéngami Tisri, to pene na 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 537 L.T.B.​—Ezl. 1:1-4; 3:1-6.f

30. Lolenge nini eyebani ete mobu 29 T.B. ezali dati ya sikisiki mpo na Makomami ya Greke ya boklisto?

30 Dati ya sikisiki mpo na Makomami ya Greke ya boklisto. Dati ya sikisiki mpo na Makomami ya Greke ya boklisto etyami na dati oyo Kaisala Tibeli akitanaki Amperɛrɛ Augusite. Augusite akufaki na dati ya 17 Augústo ya mobu 14 T.B. (Manáka ya Grégoire); sénat ya Loma etyaki Tibeli amperɛrɛ na dati ya 15 Sɛtɛ́mbɛ 14 T.B. Eyebisami kati na Luka 3:1, 3 ete Yoane Mobatisi abandaki mosala na ye na mbula ya zomi na mitano ya boyangeli ya Tibeli. Soki bambula yango etangámaki kobanda liwa ya Augusite, boye mbula ya zomi na mitano ebandaki na Augústo ya mobu 28 T.B. kino Augústo ya mobu 29 T.B. Soki yango etángamaki uta na dati oyo sénat etyaki Tibeli amperɛrɛ, boye mbula yango ebandaki na Sɛtɛ́mbɛ ya mobu 28 T.B. kino na Sɛtɛ́mbɛ ya mobu 29 T.B. Mwa moke nsima na yango, Yesu, oyo Yoane azalaki nkulutu na ye ya sanza soko motoba, ayaki kozwa batisimo, ntango azalaki “na mbula soko ntuku misato.” (Luka 3:2, 21-23; 1:34-38) Yango eyokani na esakweli oyo ezali na Danyele 9:25 ete “bapɔ́sɔ” 69 (bapɔ́sɔ ya esakweli oyo mokomoko na yango ezali na mbula 7, kosaláká bongo mbula 483) esengelaki koleka longwa na “kobima na liloba na kotɛmisa mpe na kotonga lisusu Yelusaleme” mpe bifelo na yango kino na komonana ya Masiya. (Dan. 9:24, NW, maloba na nsé ya lokasa) “Liloba” yango lipesamelaki ndingisa na Alatazelezese (Lobɔkɔ-molai) na mobu 455 L.T.B. mpe yango ekokisamaki na Nehemia kati na Yelusaleme, na eteni ya nsuka ya mbula wana. Mbula 483 na nsima, na eteni ya nsuka ya mobu 29 T.B., ntango Yoane abatisaki ye, Yesu apakolamaki na elimo santu ya Nzambe, kokómáká bongo Masiya, to Mopakolami. Likambo oyo ete Yesu abatisamaki mpe abandaki mosala na ye na eteni ya nsuka ya mobu wana liyokani mpe na esakweli oyo elobi ete asengelaki kobomama nsima na “ndambo na pɔ́sɔ” ya bambula (to nsima na mibu misato na ndambo). (Dan. 9:27) Lokola akufaki na prɛntá, yango emonisi ete mosala na ye ya mbula misato na ndambo mobandaki na Ɔtɔmne ya mobu 29 T.B.g Na libaku mpenza, bilembeteli wana mibale bindimisi lisusu ete Yesu abotamaki na Ɔtɔmne ya mobu 2 L.T.B., mpamba te Luka 3:23 emonisi ete Yesu azalaki soko na mbula 30 ntango abandaki mosala na ye.h

31. (a) Mpo na nini mwayene ya boleki ya ntango emonani ete ekeseni? (b) Na yango, bilenge bazali na libaku malamu nini?

31 Lolenge ntango ezali koleka nokinoki. Ezali na lisese moko ya kala ete “nzungu oyo miso mazali kotala ekotɔkaka noki te.” Ezali solo ete wana tozali kotala ntango, wana tozali komibanzabanza mpo na yango, wana tozali kozela likambo moko ete lisalema, tokomona ete ntango ezali koleka malɛmbɛmalɛmbɛ. Nzokande, soki tomipesi na mosala, soki tozali kosepela mpe komibanzabanza na mosala oyo tozali kosala, boye yango ekomonana solo ete “ntango ezali kokende mbangu.” Lisusu, epai na mikóló, ntango emonanaka ete ezali kokende nokinoki, koleka lolenge yango emonanaka epai na bana mike. Mpo na nini bongo? Mbula moko oyo ebakisami na bomoi ya mwana oyo azali na mbula moko ya kobotama elimboli bokoli ya 100 % na eksperiansi ya bomoi na ye. Mbula moko oyo ebakisami na bomoi ya moto oyo azali na mbula 50 ya kobotama elimboli bobele kobakisama ya 2 % mpamba. Epai ya mwana moke, mbula moko emonani ete ezali ntango moko molai, molai mpenza. Soki moto oyo akómi mokóló azali ntango nyonso na mosala mpe na kolɔngɔ́nɔ́ malamu, akomona ete bambula ezali koleka nokinoki mpenza. Yango ekomema ye na kososola na bozindo mpenza maloba oyo ya Salomo: “Likambo na sika ezali na nsé na moi te.” Epai mosusu, bilenge bazali naino na bambula oyo emonani na miso na bango ete ezali kotambola malɛmbɛ, mbula oyo ezali kopesa bango kobongisama. Na esika ya “kolanda mopɛpɛ,” elongo na mokili oyo motondi na mposa ya biloko mingi ya mosuni, bakoki nde kosalela bambula yango na litomba nyonso kati na boluki ya biloko ya motuya biuti na bomoi ya bobángi Nzambe. Maloba oyo Salomo alobaki na nsima mabongi mpenza: “Kanisá Motongi na yo na mikolo na bolenge na yo, naino mikolo mabe iyei te, naino bilanga ikómi te wana okoloba ete, Nazali na esengo na yango te.”​—Mos. 1:9, 14; 12:1.

32. Lolenge nini bato bakokoka kososola malamumalamu lolenge oyo Nzambe atalelaka ntango?

32 Ntango—Wana bato bakozala na bomoi libela na libela. Nzokande, mikolo ya esengo mizali koya oyo mikozala ata na mpasi moke te. Balingi na boyengebene, oyo ‘ntango na bango ezali na mabɔkɔ ya Yehova,’ bakoki, na esengo nyonso, kozela bomoi ya seko kati na mabelé oyo makoyangelama na Bokonzi ya Nzambe. (Nz. 31:14-16; Mat. 25:34, 46) Na nsé na Bokonzi yango, liwa ekozala lisusu te. (Emon. 21:4) Kozanga mosala, bokɔnɔ, mitungisi mpe bisalásala ekolimwa. Mosala ekozanga te; yango ekozala ya litomba mpenza mpe ya kosepelisa, oyo ekosɛnga ete moto abimisa makoki na ye ya ekelamu ya kokoka mpe oyo ekopesa bosepeli monene na kokokisama na yango. Bambula ekomonana ete ezali koleka na lombangu mpenza, mpe bɔɔngɔ́ oyo ezali koyeba kososola, oyo ezali na nguya makasi ya kobatela makambo, ekotonda ntango nyonso na makanisi ya makambo ya esengo. Wana ebele ya bambula ekoleka, ntembe ezali te ete bato oyo bakofanda awa na mabelé bakososola malamumalamu lolenge oyo Nzambe atalelaka ntango: ‘Zambi mbula nkóto na miso ya Yehova ezali lokola mokolo ya lobi wana esili yango koleka.’—Nz. 90:4, NW.

33. Na oyo etali ntango, Yehova alaki mapamboli nini?

33 Na kotaleláká sikawa elekelo ya ntango engebene emoneli na biso ya bomoto mpe na kobosanáká te elaka ya Nzambe ya kosala mokili ya sika ya boyengebene, tozali mpenza na esengo ya kolikya na mapamboli ya mokolo yango: “Mpamba te kuna Yehova alaki ete mapamboli makozala, ɛɛ bomoi ezangi nsuka”!—Nz. 133:3, NW.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kati na King James Version, liloba “ngonga” lizali kokutama kati na Danyele 3:6, 15; 4:19, 33; 5:5, uta na lokótá Aramɛyɛ; nzokande, búku Concordance, Hebrew and Chaldee Dictionary, ya Strong, emonisi ete liloba yango lilimboli “mwa ntango.” Kati na Biblia Haut-Fleuve, yango ebongolami na liloba “ntango.”

b Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo yango kati na New World Translation of the Holy Scriptures.

c Biblical Calendars, 1961, ebimisami na J. Van Goudoever, lokasa 75.

d Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 458.

e Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 453-454, 458; Vol. 2, lokasa 459.

f Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 568.

g Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 899-902.

h Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 56-58.

[Etanda na lokasa 281]

MBULA EPAI NA BAYISALAELE

Nkombo ya sanza Nisana (Abibu)

Ekokani na Mársi-Apríli

Mbula mosantu Sanza ya liboso

Mbula ya lelo Sanza ya nsambo

Mikapo Ex. 13:4; Neh. 2:1

Bilambo Nisana 14 Elekeli

Nisana 15-21 Elambo ya mampa ezangi mfulu

Nisana 16 Makabo ya mbuma ya liboso

Nkombo ya sanza Iyala (Ziwi)

Ekokani na Apríli - Máí

Mbula mosantu Sanza ya mibale

Mbula ya lelo Sanza ya mwambe

Mikapo 1 Mik. 6:1

Nkombo ya sanza Siwana

Ekokani na Máí - Yúni

Mbula mosantu Sanza ya misato

Mbula ya lelo Sanza ya libwa

Mikapo Est. 8:9

Bilambo Siwana 6 Elambo ya Bapɔ́sɔ (Pantekote)

Nkombo ya sanza Tamuzu

Ekokani na Yúni - Yulí

Mbula mosantu Sanza ya minei

Mbula ya lelo Sanza ya zomi

Mikapo Yil. 52:6, NW

Nkombo ya sanza Abi

Ekokani na Yulí - Augústo

Mbula mosantu Sanza ya mitano

Mbula ya lelo Sanza ya zomi na moko

Mikapo Ezl. 7:8, NW

Nkombo ya sanza Elulu

Ekokani na Augústo - Sɛtɛ́mbɛ

Mbula mosantu Sanza ya motoba

Mbula ya lelo Sanza ya zomi na mibale

Mikapo Neh. 6:15

Nkombo ya sanza Tisri (Etanimi)

Ekokani na Sɛtɛ́mbɛ - Ɔkɔtɔ́bɛ

Mbula mosantu Sanza ya nsambo

Mbula ya lelo Sanza ya liboso

Mikapo 1 Mik. 8:2

Bilambo Tisri 1 Mokolo ya koyulama ya kelelo

Tisri 10 Mokolo ya Mbɔndi

Tisri 15-21 Elambo na Mingombo

Tisri 22 Liyangani monene

Nkombo ya sanza Hesevana (Bulu)

Ekokani na Ɔkɔtɔ́bɛ - Novɛ́mbɛ

Mbula mosantu Sanza ya mwambe

Mbula ya lelo Sanza ya mibale

Mikapo 1 Mik. 6:38

Nkombo ya sanza Kisilewe

Ekokani na Novɛ́mbɛ - Desɛ́mbɛ

Mbula mosantu Sanza ya libwa

Mbula ya lelo Sanza ya misato

Mikapo Neh. 1:1

Nkombo ya sanza Tebete

Ekokani na Desɛ́mbɛ - Yanuáli

Mbula mosantu Sanza ya zomi

Mbula ya lelo Sanza ya minei

Mikapo Est. 2:16

Nkombo ya sanza Sebata

Ekokani na Yanuáli - Febwáli

Mbula mosantu Sanza ya zomi na moko

Mbula ya lelo Sanza ya mitano

Mikapo Zek. 1:7

Nkombo ya sanza Adala

Ekokani na Febwáli - Mársi

Mbula mosantu Sanza ya zomi na mibale

Mbula ya lelo Sanza ya motoba

Mikapo Est. 3:7

Nkombo ya sanza Ve-adala

Ekokani na (sanza oyo bakɔtisá)

Mbula mosantu Sanza ya zomi na misato

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto