Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lr mok. 48 nk. 250-256
  • Mokili ya sika mpe ya kimya ya Nzambe—Okoki kofanda kuna

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokili ya sika mpe ya kimya ya Nzambe—Okoki kofanda kuna
  • Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Masolo mosusu
  • Osengeli kosala nini mpo ozwa bomoi ya seko?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika
    Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika
  • Mokili ya sika ekómi pene!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
  • Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
Makambo mosusu
Yekolá epai ya Moteyi Monene
lr mok. 48 nk. 250-256

MOKAPO 48

Mokili ya sika mpe ya kimya ya Nzambe​—Okoki kofanda kuna

NZAMBE atyaki Adama ná Eva na elanga ya Edene. Atako bango bazangaki botosi mpe bakufaki, Nzambe apesi likoki na bana na bango, bakisa mpe biso lelo oyo, ya kozala na bomoi libela na libela kati na Paladiso. Biblia epesi elaka oyo: “Bayengebene [bakozwa] mokili, mpe bakofanda wana libela.”​—Nzembo 37:29.

Biblia elobeli “likoló ya sika” mpe “mabelé ya sika.” (Yisaya 65:17; 2 Petelo 3:13) “Likoló” ya lelo ezali baguvɛrnema ya ntango na biso, kasi “likoló ya sika” ezali nde Yesu Klisto mpe baoyo bakoyangela elongo na ye na likoló. Ekozala mpenza esengo ntango likoló yango ya sika, elingi koloba guvɛrnema ya Nzambe, oyo ezali ya boyengebene mpe ya kimya, ekoyangela mabelé mobimba!

Bongo “mabelé ya sika” ezali nini?— Mabelé ya sika ezali bato ya malamu oyo balingaka Yehova. Osengeli koyeba ete ntango Biblia elobelaka “mabelé,” mbala mosusu elobelaka nde bato oyo bafandi awa na mabelé, kasi mabelé yango moko te. (Genese 11:1; Nzembo 66:4; 96:1) Na bongo, bato oyo bakozala mabelé ya sika bakofanda na mabelé.

Na ntango yango, mokili ya lelo to bato mabe bakozala lisusu te. Kobosana te ete Mpela oyo esalemaki na ntango ya Noa ekɔmbɔlaki mokili to bato mabe. Mpe, ndenge toyekolaki, mokili mabe ya lelo ekobomama na Armagedona. Tiká tótala sikoyo ndenge bomoi ekozala nsima ya Armagedona, na mokili ya sika ya Nzambe.

Olingi kozala na bomoi libela na libela na kati ya Paladiso, na mokili ya sika mpe ya kimya ya Nzambe?— Monganga moko te akoki kosalisa biso mpo tózala na bomoi libela na libela. Ezali na nkisi moko te oyo ekosalisa biso tókufaka te. Nzela kaka moko oyo tokoki kozala na bomoi libela na libela ezali bongo ya kopusana penepene na Nzambe. Mpe Moteyi Monene ayebisi biso ndenge tokoki kosala yango.

Tózwa Biblia na biso mpe tófungola na Yoane mokapo 17, vɛrsɛ 3. Na mokapo yango tozali kokuta maloba oyo ya Moteyi Monene: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.”

Na bongo, Yesu alobaki ete tosengeli kosala nini mpo na kozala na bomoi libela na libela?— Libosoliboso, tosengeli koyekola koyeba Tata na biso ya likoló, Yehova, mpe lisusu Mwana na ye, oyo apesaki bomoi na ye mpo na biso. Yango elakisi ete tosengeli koyekola Biblia. Buku oyo, Yekolá epai ya Moteyi Monene, ezali kosalisa biso mpo na kosala bongo.

Kasi ndenge nini koyekola makambo ya Yehova ekosalisa biso na kozala na bomoi libela na libela?— Kaka ndenge tozalaka na mposa ya kolya mokolo na mokolo, ndenge moko mpe tosengeli koyekolaka makambo ya Yehova mokolo na mokolo. Biblia elobi ete: ‘Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na maloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.’​—Matai 4:4.

Tosengeli mpe koyekola koyeba Yesu Klisto mpamba te Nzambe atindaki Mwana na ye mpo alongola masumu na biso. Biblia elobi ete: “Ezali na lobiko te na kati ya moto mosusu.” Mpe elobi lisusu ete: “Moto oyo azali komonisa kondima na kati ya Mwana azali na bomoi ya seko.” (Misala 4:12; Yoane 3:36) Kasi, ‘komonisa kondima’ na kati ya Yesu elakisi nini?— Elakisi ete tozali mpenza kondimela Yesu mpe tozali koyeba ete, soki ye te, tokoki kozala na bomoi libela na libela te. Tondimaka makambo wana?— Soki tondimaka yango, tokolanda koyekola epai ya Moteyi Monene mokolo na mokolo, mpe tokosala makambo oyo azali koloba.

Lolenge moko ya malamu ya koyekola epai ya Moteyi Monene ezali ya kotánga buku oyo mbala na mbala mpe kotala malamu bililingi nyonso oyo ezali na kati mpe kokanisa likoló na yango. Meká koyanola na mituna oyo etali bililingi yango. Lisusu, tángá buku oyo elongo na mama to na tata na yo. Soki bazali te, tángá yango elongo na mokóló mosusu mpe elongo na bana mosusu. Ekozala malamu mpenza soki okoki kosalisa bato mosusu báyekola epai ya Moteyi Monene makambo oyo basengeli kosala mpo na kozala na bomoi libela na libela na mokili ya sika ya Nzambe, ezali bongo te?—

Biblia eyebisi biso ete: “Mokili ezali koleka.” Kasi, nsima ya koloba bongo, emonisi ete tokoki kozala na bomoi libela na libela na mokili ya sika ya Nzambe. Elobi ete: “Moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoane 2:17) Na bongo, ndenge nini tokoki kofanda libela na libela na mokili ya sika ya Nzambe?— Soki tozali koyekola koyeba Yehova mpe Mwana na ye ya bolingo, Yesu. Kasi tosengeli mpe kosalela makambo oyo tozali koyekola. Tiká ete makambo oyo ozali koyekola na buku oyo esalisa yo na kosala bongo.

Mikóló ná bana bazali na kimya elongo na banyama na Paladiso

Yisaya 11:6-9 mpe Yisaya 65:25, elobi ete banyama bafandi na kimya. Talá elilingi oyo. Omoni mwana ya mpate, mwana ya ntaba, nkoi, mwana ya ngɔmbɛ, nkosi ya monene, mpe bana bazali esika moko na bango. Okoki kotánga nkombo ya banyama mosusu na elilingi oyo oyo bavɛrsɛ wana elobeli?— Talá mwana oyo ya mobali azali kosakana na nyoka! Na mokili ya sika, moto akobanga te. (Hosea 2:18) Okanisi nini?—

Bato ya mposo ekeseni bazali na kimya mpe bazali kobanga eloko te na mokili ya sika

Sikoyo, talá, bato oyo nyonso bazali na kimya. Bango nyonso bazali kolingana, kaka ndenge Yesu alobaki ete bayekoli na ye basengeli kolingana. (Yoane 13:34, 35) Bazali kokómisa mindoki biloko ya mosala ya bilanga. Biblia elobi ete bato bakozala na kimya mpe bakobanga ata eloko te na mokili ya sika ya Nzambe. Tokoki kotánga yango na mikapo lokola Nzembo 72:7; Yisaya 2:4; 32:16-18; mpe Ezekiele 34:25.

Bato na Paladiso batongi ndako, babongisi mabele mpe bazali kolya biloko oyo mabele ezali kobimisa

Talá bato oyo bazali na lokasa oyo. Bazali kobongisa mabelé, bazali kokómisa yango esika moko ya kitoko. Talá ndako kitoko oyo bazali kotonga mpe mbuma mpe ndunda kitoko oyo ezali awa. Mabelé ekómi paladiso lokola elanga ya Edene. Tokoki kotánga makambo yango ya kitoko na Nzembo 67:6; 72:16; Yisaya 25:6; 65:21-24; mpe Ezekiele 36:35.

Bato bazali nzoto kolɔngɔnɔ mpe bazali na esengo na Paladiso

Ndenge ozali komona awa, moto nyonso azali nzoto kolɔngɔnɔ mpe na esengo. Bato bakoki kopumbwapumbwa lokola mboloko. Moto moko azali kotɛnguma te, akufá miso te, to azali na maladi te. Mpe talá bato wana oyo basekwi! Biblia elobeli makambo wana na Yisaya 25:8; 33:24; 35:5, 6; Misala 24:15; mpe Emoniseli 21:3, 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto