Mokili ya sika esili kobelema!
MINGI ezali myango oyo esili kopesama mpo na kosilisa bampasi oyo mokili ezali na yango. Ezali mbala mingi kosenga mposa, boyokani mpe milende makasi epai na mabota nyonso. Liyoki ya mabota nyonso ezali boye ete, lokola mpasi eleki makasi, mposa ya kozala na kimya bamoko na bamosusu ekopusa mabota na kotalela lisusu makambo na bango na ntina mingi mpe na kosala elongo mpo na kosala mokili ya sika oyo ekoumela. Bakanisi ete mosolo mozali kobimisama mpo na bibundeli ekokitisama mpenza mpo basalela ba fonds mpo na kolongola makambo oyo mazali kobebeisa ezingelo. Mpo na yango, engebene zulunalo L’etat du monde 1990, “na esika ya kobomba myango na bango ya etumba, bikonzi bikomipesa mbala mosusu na makasi ya kobatela kimya oyo ezali na nse na Nations unies (lisangani ya mabota), makasi oyo esili mpenza kopalangana, oyo ekozala na nguya mpe na bokonzi mpo na kokɔtela mabota nyonso masangani na yango mpo na kobundisa banguna na bango.”
Kasi myango wana mikopesa nzela te mpo na kosala makambo oyo tolobelaki na bankasa ya yambo. Bobele mayele mpamba ya bomoto ekoki te na kobikisa bato na lisumu mpe na lokoso; ezali kolongola te ezalela oyo ya kokanisela bato mosusu mabe (préjugé) mpe koponana na mposo; ezali mpe kobimisa bolingo ya solo epai na bato te. Ekoki mpe te kolongola maladi mpe liwa mpo na libela, soko mpe kosilisa mpenza koboma te, ata mpe kosilisa kokabwana te mpe koyinana na mangomba, mpe ekokoka nkutu te na kosilisa makámá makoutaka na biloko na kozalisama. Epai mosusu, bazali kolendisa bolingo ya ekolo (nationalisme), oyo ezali mpenza ntina ya mikakatano. Na mawa nyonso, tosengeli koloba ete moto azwi mwango malamu te.
Nzokande, mwango moko mozali! Na solo mpenza, biloko nyonso bato bazali na yango mposa esila kolakama na Nzambe, “oyo akokósaka te.” (Tito 1:2) Ye ayebi mpenzampenza nini esengeli kosala, mpe azali na mayele, na nguya mpe na makoki nyonso masengeli mpo na kokokisa oyo ye asilaki kokana.—Emoniseli 7:12; 19:1.
Nzambe apesi elaka oyo ete: “Nsima na mwa ntango moke, moto na mabe akozala lisusu te; okotala esika na ye, akomonana te. Nde bato na bopolo bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.”—Nzembo 37:10, 11.
Lolenge nini maloba oyo makokokana? Tala eyano oyo Yisaya 11:9 epesi: “Bakoyokisana mpasi te, bakobebisama mpe te na ngomba mobimba na bulee na ngai, mpamba te mokili mokotonda na boyebi na Jéhovah lokola mbonge ekozipaka mai-na-monana.” Ya solo mpenza, mokili mobimba mokolakisama na “boyebi na Jéhovah,” mpo na bato oyo bakoboya komiyokanisa na yango, nzela ekopesamela bango te ete batikala na bomoi mpe babebisa kimya ya bamosusu. Efandelo na biso kitoko ekobebisama lisusu te.
Nzembo 46:8,9 elobi ete “Ye akosukisa bitumba kino nsuka na mokili.” (tala lisusu Mika 4:3, 4) Moko na mwango ya ntina mpo na kotyama ya kimya yango na mokili mobimba ezali bongo kosilisama ya matata na mabota. Boyokani ekozala mpo ete bobele bokonzi moko oyo ya Nzambe-nde ekoyangela mokili mobimba. Boyangeli yango, Bokonzi, “bokobebisama te.” (Danyele 2:44) Lisusu, ezali Yesu Klisto, ye oyo asili kosekwa mpe akokufa te nde azali Mokonzi oyo akoyangela na nzela ya boyengebene mpe na kosambisa-sembo.—Yisaya 9:6, 7; 32:1.
Kasi, boyangeli wana ya kimya ekobebisama nde na kozanga kokoka ya moto, na mpasi, na maladi, na monyoko mpe na liwa? Te, mpamba te makambo oyo makozala lisusu te. Mokapo ya Emoniseli 21:4 ezali kopesa biso endimiseli oyo ete: “akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.” Lisumu liuti na bankoko na biso likolimbisama na mbeka ya lisiko na Yesu, mpe bato bakozala na kokoka. (Baloma 6:23; Baefese 1:7) Lisusu, oyo eleki mpenza kitoko ezali oyo ete Mozalisi akoki kosala ete nguya ya biloko bizalisamaki esalelama na lolenge malamu mpe kopekisa ete esala mabe te na bato.—Nzembo 148:5-8; Yisaya 30:30.
Oyo ezali bobele makanisi mpamba mpe ndoto mpo na moto, Nzambe akokokisa yango. Kasi ntango nini? Bisakweli ya Biblia ezali komonisa ete mabongwani yango masengelaki kosalema na eleko oyo mabota ‘makongala’ mpe na eleko oyo moto ‘akobebisa mabelé’. (Emoniseli 11:18) Mikolo ya nsuka ya mokili oyo mimonisami na “ntango na mpasi” oyo ezali kobimisa makambo na mpasi tozali komona na eleko na biso. (2 Timoté 3:1-5, 13) Yesu asakolaki ete libota likomona makambo yango, likomona mpe lisusu kokokana ya bilaka na Nzambe.—Matai 24:3-14, 32-34.
Zwa ntango na kotalela bilaka oyo bikomami kati na Biblia, mpamba te bato mingi oyo basili koyeba yango, bazali na likanisi moko na Nzambe mpo na likambo oyo: ezali ntango na kotyama ya mokili ya sika!