Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/4 lok. 30
  • Politike: ezali nde mokumba epesami na evanzile?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Politike: ezali nde mokumba epesami na evanzile?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/4 lok. 30

Politike: ezali nde mokumba epesami na evanzile?

MPO na Joachim Meisner, episkopo monene ya cologne mpe azalaki kala moto monene na Lingomba ya Allemagne de l’Est, “ezali lisumu koloba ete politike ezali mbindo, oyo na nzela na yango bato bazali komibebisa maboko.” Ntango batunaki ye na 1989, alobaki ete: “Politike ezali likambo ya solo endimami kati na bomoi, na yango, ezali kati na mokumba oyo Evanzile epesi biso. Esengeli na biso kolonga ntembe yango. Kozalaka na mayoki malamu, tosengeli komikotisa kati na makambo nyonso ya politike, na mangomba ya basali (syndicat) mpe masangá ya basali kino na ba partis politiques, mpo na kosala kati na masangá yango mpe ba partis yango moboko ya nguya mpo na boklisto epai kuna bato oyo bakozala na mokumba minene ya kokokisa kati na politike ya alemanye mpe ya Mpoto bakobima.”

Maloba oyo, mazwami na Frankfurter Allgemeine Zeitung, moko na bazulunalo minene ya ba Allemands, emonisi ete bakonzi mingi ya mangomba na Mpoto, ezala bakatolike to baprotestá, bazali kondima likanisi ya epikospo monene ya cologne.

“Bobele mikolo motoba nsima ya koponama na ye [na Octobre 1978], [Pape] asakolaki ete ye, moto ya Europe de l’Est, akosepela te kotika ete makambo malanda kozala se ndenge wana awa na Mpoto. . . . Bamosusu batalelaki maloba yango lokola lisolo liuti na Biblia, nzokande ezalaki mpenza propagande ya politike.”​—Novembre 1989.

“Na bisika mosusu [ya Tchécoslovaquie], Lingomba ezwaki bosepeli na bato mpo na mosala na yango ya pionnier kati na botomboki. Yango wana na Litomerice, engumba ya Bohême ya Ngele, mboka oyo episkopo akofandaka, ezali baseminariste nde, na novembre oyo euti koleka, bakambaki botomboki ya kozanga kosala mobulu.”​—Mars 1990.

“Libondeli ya poso na poso mpo na kimya kati na ndako​—nzambe [ya misioni] Saint-Nicolas, oyo esalemaki uta mibu zomi kati na bokeseni monene, ekomaki na mbala moko na mbula oyo elembo ya botomboki, ya mobulu na kimya na R.D.A. [République démocratique allemande]. . . . Ebele na basango mpe basambeli ya bandako-nzambe mingi bazali kosangana mbala na mbala na botomboki oyo ezali kosalema nsima na misa.”​—Décembre 1989.

Ntango ya lisolo oyo touti koyebisa, episkopo monene Meisner amonisaki mpe ete: “Tokoki kozela te ete bato na politike oyo bazali baklisto bautela biso na likoló. . . . Nazali kolemba te mpo na kolendisa bilenge baklisto . . . na kosangana na makambo ya politike [to na] . . . koloba epai na mikóló na bango: Bosengeli kolekisa vote moko te kozanga ete bomikotisa na kati.”

Ezali na boye nde basangani 19 ya parlemá est-allemand oyo baponamaki na Mars 1990 bazalaki bato na Lingomba. Mangomba mamonisaki malamu mpenza kati na boyangeli. Mpo na ntina na moko na bato misato ya Lingomba oyo bazalaki kati na yango, Rainer Eppelmann, ministre ya Défense mpe moluki na kimya oyo ayebani, zulunalo Nassauer Tageblatt ekomaki ete: “Bato mingi bazali kotalela ye lokola moko na mikonzi ya botomboki mpo na kimya.’’

Ba Témoins de Jéhovah ya Europe de l’Est, baoyo bakomi lelo bonkoto mingi, bazali kosepela na bonsomi monene oyo bazali na yango sikawa mpo na kosalela Nzambe. Kasi bazali kosalela yango te mpo na komikotisa kati na mobulu ya makambo na bato ya politike. Na boyokani na mokumba ya Evanzile oyo eyebisami na Matai 24:14, bazali kolanda ndakisa na Yesu, oyo azalaki koboya komikotisa na politike, kosakolaka ntango nyonso mpe na molende nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe, elikya bobele moko ya bato. Bakonzi na mangomba ya boklisto na lokuta, ezala na Europe de l’Est to epai mosusu, mbele bakozala mayele soki basali motindo wana.​—Yoane 6:15; 17:16; 18:36; Yakobo 4:4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto