Mituna na batangi
◼ Na Baloma 7:19, “malamu” nini oyo ntoma Paulo akokaki kosala yango te?
Paulo alobelaki bozangi na ye ya makoki mpo na kosala makambo nyonso malamu oyo matangami kati na Mibeko na Moïse. Mpo na kozanga kokoka mpe na ntina na ezalela na biso ya bato na masumu, Paulo akokaki te kotósa yango, ata biso mpe lokola. Kasi, ezali na ntina moko te ete tozanga elikya. Mbeka na Klisto esili kopesa nzela na bato ete bazwa lilimbisi mpe ngolu na Nzambe.
Tozali kotanga na Baloma 7:19, ete: “Malamu oyo elingi ngai kosala, nakosalaka yango te. Kasi mabe oyo elingi ngai te, nakosalaka bobele yango.’’ Ba versets ya zingazinga emonisi ete “malamu” oyo Paulo alobelaki ezalaki oyo elobelamaki na Mibeko. Alobaki na verset 7ete: ’’Bongo toloba nini? Ete Mibeko ezali lisumu? Soko moke te! Soko Mibeko te, mbɛlɛ nasosoli masumu te, soko Mibeko elobaki te ete: ‘Luta te,’ mbɛlɛ nasosoli ntina na elulela te.’’ Ee, emonanaki polele mpenza ete bato nyonso bazalaki basumuki na nzela na Mibeko, mpo ete moto moko te akokaki kotósa yango nyonso.
Na nsima Paulo alobaki ete, “kalakala, naino Mibeko mizalaki te, ngai nazalaki na bomoi.” Alingaki kolobela eleko nini? Ntango oyo abimaki naino te kati na libota na Abrahame, liboso ete Jehovah apesa Mibeko epai na Yisraele. (Baloma 7:9, MN, tala Baebele 7:9, 10.) Ya solo, Abrahame azalaki moto na kozanga kokoka, kasi lokola Mibeko mipesamaki naino te, ezalaki te na mitinda nyonso wana—oyo mbɛlɛ atósaki yango te—mpo na kokundola ye ete azalaki moto na masumu. Tosengeli kosukisa ete na ntango Mibeko ebimaki mpe emonisi ete tozali bato na kozanga kokoka, boye yango ebimisaki litomba mabe? Te. Ntoma alandi ete. “Mibeko mizali bulee. mpe malako mazali bulee, sembo mpe malamu’’—Baloma 7:12.
Totala ete Paulo alobaki na ntina na Mibeko ete ezalaki “bulee” mpe ‘malamu.‘ Kati na versets elandi, alimbolaki ete ’’eloko oyo malamu, “elingi koloba Mibeko, emonisaki ete ye azalaki moto na masumu, mpo na lisumu yango, alakamaki na kufa. Mpe ayei kokoma ete ”Malamu elingi ngai kosala, nakosalaka yango te. Kasi mabe oyo elingi ngai te, nakosalaka bobele yango. Na bongo, soko nakosala yango elingi ngai te, ezali ngai moto nakosalaka bongo te, kasi masumu mazali kofanda kati na ngai.”—Baloma 7:13-20.
Kati na ba versets ya zingazinga, Paulo alobelaki bongo malamu nyonso te to bobele misala malamu te. (Tala Misala 9:36. Baloma 13:3.) Alobelaki mpenzampenza mpo na kosala (to koboya kosala) makambo na boyokani elongo na Mibeko na Nzambe, oyo ezali malamu. Na kala, azalaki mosambeli na molende mingi na lingomba ya Bayuda mpe, na kotalela bato mosusu, ye azalaki na efundeli te.” Nzokande, atako andimisamaki ete azalaki moombo na Mibeko yango mizalaki malamu, kasi akokisaki masengami na yango te. (Bafilipi 3:4-6) Mibeko oyo milakisaki mitinda na Nzambe oyo mizali na kokoka, emonisaki ntoma ete, na mosuni, azalaki bobele moombo ya mobeko na masumu mpe na bongo, alakamaki na liwa. Kasi, Paulo akokaki kozala na botɔndi epai na Jéhovah lokola atangaki ye moyengebene na nzela na mbeka na Klisto, mpe asikoli ye na mobeko na masumu mpe na lifuta na yango, etumbu na kufa.—Baloma 7:25.
Lelo, baklisto bazali na nsé na Mibeko na Moïse te, mpamba te Mibeko yango misilaki kobákama na nzete na mpasi. (Baloma 7:4-6; Bakolose 2:14) Atako bongo, tosengeli koyeba ete yango ezalaki te eloko na bozito mingi oyo tosengeli te kotya likebi. Te, Mibeko mizalaki mpenza mpenza malamu. Ebongi mpenza ete totangaka mikanda ya Biblia oyo mizali na Mibeko mpe ete tokanga ntina na makambo oyo yango esengisaki Bayisraele. Ezali yango nde ba Témoins de Jéhovah bakosala mosika te, na mokili mobimba, kati na botangi na bango ya Biblia na poso na poso.
Na kotangáká Mibeko, tosengeli kokanisa na mitinda oyo mizali moboko ya malako mingi oyo tozali kokuta kati na yango, mpe na bolamu oyo bozwamaki na basaleli na Nzambe baoyo bazalaki komeka kolanda malako wana malamu. Tosengeli lisusu koyeba ete tozali bato tozangi kokoka, mpe na bongo, tokoki mpenza te kosala malamu oyo Liloba na Nzambe ezali kolakisa biso. Kasi, awa ezali biso kobunda etumba na mobeko na masumu, tokoki kozwa esengo na kokanisa na likambo oyo ete tosili kosikwama na nzela na mbeka na Klisto.