Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/2 lok. 29
  • Nkombo na Nzambe ezongisami

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkombo na Nzambe ezongisami
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/2 lok. 29

Nkombo na Nzambe ezongisami

“ESENGELAKI soko mibu 60 mpo ete nkombo na Nzambe, ‘JHWH,’ oyo azali bobele Nzambe na Bayuda te kasi oyo na baklisto lokola, ekoka kozongisama na esika moyemi na bililingi atyaki yango na ebandeli.” Ezali bongo nde Schwarzwälder Bote, zulunalo ya Alemanye, elobelaki kozongisama ya nkombo na Nzambe na etutú ya hôtel de ville ya mboka Horb, na ngele ya Alemanye. Kasi mpo na nini nkombo yango elongolamaki?

Zulunalo yango elimboli ete bitutú ya libandá ya hôtel de ville bityamaki mokóbo kitoko, na bililingi ndenge na ndenge bibongisaki etutú. Moyemi atyaki Tétragramme, nkomá minei na Liebele emonisi nkombo na Nzambe.

Zulunalo ekóbi ete, “nkombo yango oyo emonani mbala 6 000 kati na Biblia, ezali ‘Jéhova’ to ebengeli mosusu ekokani na yango na monoko ya Alemanye. Ebéngeli na yango mpenza emonisami malamu te mpo ete monoko na Liebele mokomamaki bobele na oyo babéngi na Lifalansé ete consonnes. Motangi azalaki kobakisa oyo babéngi ete voyelles.”

Nzokande, na 1934, bamonisi ya parti ya nazi bazwaki ekateli ete Tétragramme ezalaki “na boyokani te na malako ya ntango wana” mpe mpo na yango, esengelaki kozipa yango na langi. Likambo ya esengo mpenza, lelo oyo Tétragramme esili kozongisama. Zulunalo emonisi ete: “Etutú [ya hôtel de ville] ya lelo, oyo ezali na bililingi ya makambo na kala, ya bilembo ya ekólo mpe bililingi ya bato, ezali eloko kitoko na kotala na mboka Horb.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto