Eleki biloko mpamba oyo bikobendaka likebi
Na Kaisalia, libóngo ya kala lizali na ekólo Israel, makonzi kati na mai monene Méditerranée malamusi likebi ya basali mibémbo ya botali bikólo. Hérode le Grand nde atongaki libóngo yango mpe apesaki nkombo wana na engumba yango mpo na lokumu ya Kaisala Augusto.
Bakundoli na biloko na kala bakundolaki ndambo monene ya engumba wana, bakisa mpe ndako na yango monene ya masano. Bakɔtaki mpe kati na mai monene mpo na koyeba lolenge nini libóngo wana monene litongamaki na ngámbo na mai monene na zɛlo mingi.
Zulunalo The New York Times ya le 8 janvier 1991 eyebisaki bokundoli ya makonzi kati na bitiká ya ndako monene oyo ezalaki kala na libóngo ya mai monene. Ekeseni na mosusu mpo ete yango ezali na bankombo ya baguvɛrnɛrɛ Baloma oyo bayebanaki le kino wana. Balobeli mpe “mobongisi” na masuwa, mpe “yango ezali nkomá ya yambo oyo ezalaki na makambo matali libóngo.”
Baoyo bazali koyekola Biblia bayebi ete ntóma Paulo asɛmaki na libóngo wana na nsima na mibembo mibale ya misionere. Na engumba wana, afandaki epai na Filipo mopalanganisi na nsango malamu, mpe makambo oyo akutanaki na yango malendisaki bayekoli. (Misala 18:21, 22; 21:7, 8, 16) Misala na bantóma, moko na mikanda ya Biblia, ezali koyebisa biso ebele na makambo ya ntina mingi oyo ye akutanaki na yango.
Bongo, makonzi wana mazali pembenipembeni na mai mazali bikitá mpamba te oyo bizangi ntina. Mazali kokundwela baklisto, bandeko na bango ya ntango na kala baoyo bamipesaki mingi mpo na kopalanganisa nsango malamu kati na mabóngo mpe “kino nsuka na mokili.”—Misala 1:8.
[Eutelo ya fɔtɔ na lokasa 32]
Garo Nalbandian