Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/12 lok. 32
  • Nkombo ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkombo ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/12 lok. 32

Nkombo ya Nzambe

“Soki ezali Yehova oyo akotonga ndako te, basáli bakosala wana bobele mpamba.” Ezali yango ntina ya makomi oyo ya Latin. Maloba yango mauti na Nzembo 127:1 oyo ezali kati na Biblia, mpe mazali na bosɔlɔ moko ya mozindo: Milende nyonso oyo mizali na mapamboli ya Yehova te mizali mpenza mpamba.

Makomi yango, oyo ekomamaki na mobu 1780, mabakami likoló na ndako moko na engumba Colombo, na Sri Lanka, mpe mazali na ntina mingi mpo ete mazali na nkombo ya Nzambe, Yehova. (Tala fɔtɔ́.) Na bikeke oyo bisili koleka nkombo wana esalelamaki mingi. Mbala mingi ezalaki kokomama likoló na bandako ya Leta, bandakonzambe, ata likoló ya mbongo ya ebende. Bamisionere basalelaki nkombo ya Nzambe ntango bamemaki Biblia na mikili ya mosika, kozanga ntembe ezali bango nde bakomaki makomi oyo mazali na Sri Lanka.

Makambo masili mpenza kobongwana lelo oyo! Bato mingi oyo bazali komitanga baklisto bazali komibanzabanza te mpo na nkombo ya Nzambe. Balimboli mosusu ya Biblia bazali nkutu kotyola Batatoli ya Yehova mpo bazali kosalela yango mingi. Mpo na nini? Engebene basusu, mpo ete ebéngeli na yango ya Liebele eyebani malamu te. Kasi bato boni bayebi ebéngeli ya nkombo na Yesu na Liebele? Nzokande, nkombo na ye ezali kosalelama mpe ezali kozwa limemya na mokili mobimba.

Mpo na Yesu, nkombo ya Nzambe ezalaki na ntina mingi. Ateyaki biso kobondela ete: “Tika nkombo na yo ezala mosantu.” (Matai 6:9, NW) Mpe mwa moke liboso ya kufa na ye alobaki na Nzambe ete: “Nasili kolimbola nkombo na yɔ epai na bato baoyo opɛsi ngai bango uta na mokili.” (Yoane 17:6) Baklisto bazali bamekoli na Yesu. Bango mpe basengeli te ‘kolimbola nkombo ya Nzambe’? Batatoli ya Yehova bazali kosala yango, mpe Yehova azali kopambola mingi “ndako” na bango. Mpo na bango Nzembo oyo ezali solo kokokana: “Esengo ezali na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!”​—Nzembo 144:15, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto