Bokundoli mokolo ya mbótama etikaki nsolo ya liwa nsima na yango
MILULU ya bokundoli mokolo ya mbótama etalelami na bato mingi lelo oyo ete ezali momeseno mozangi likámá. Kasi Biblia emonisi momeseno wana lokola likambo ya malamu te. Mpamba te, Makomami mazali ata na elembo moko te oyo emonisi ete basaleli ya sembo ya Nzambe basalaki milulu ya bokundoli mikolo ya mbótama.
Mbala bobele mibale ya bokundoli mikolo ya mbótama oyo Biblia ezali kolobela ezalaki mpo na bakonzi oyo bazalaki banguna ya Nzambe. Milulu nyonso mibale misukaki na koboma moto, mpo ete babyangami bakokaki kosepela na kobomama ya moto oyo mokonzi asepelaki na ye te. Na likambo ya liboso, Falo, mokonzi ya Ezipito, abomaki kapita ya basáli na ye ya kuku. (Genese 40:2, 3, 20, 22) Mokonzi na Ezipito asalaki bongo na boumeli ya elambo, mpamba te asilikelaki mosaleli na ye. Na likambo ya mibale, Elode, mokonzi ya Galilai, oyo azalaki na etamboli ya mbindo, akataki Yoane Mobatisi nkingo mpo na kosepelisa elenge mwasi oyo lolenge na ye ya kobina esepelisaki ye. Oyo nde likambo ya nsɔ́mɔ!—Matai 14:6-11.
Nzokande, Biblia ezali mpenza te kobenda likebi na biso likoló na bokundoli mokolo ya mbótama mibale ya monene? Soko moke te. Josèphe, moyuda, mokomi na makambo ya kala, amonisaki ete esukaki te bobele na makambo wana mibale. Ayebisi makambo mosusu oyo mamonisi kobomama ya bato na bokundoli mokolo ya mbótama mpo na komisepelisa.
Na ndakisa, likambo mosusu lisalemaki nsima na kobomama ya Yelusaleme na mobu 70 T.B., ntango Bayuda 1 000 000 babomamaki mpe Bayuda 97 000 babikaki mpo na kozala bakangami. Wana ezalaki ye kokende na Loma, mokonzi ya basodá ya Loma na nkombo ya Titus akamataki baombo na ye Bayuda penepene na libongo ya mai monene ya Kaisalia.
Josèphe akomi ete: “Wana Titus atikalaki na Kaisalia, asalaki molulu mpo na kokundola mokolo ya mbótama ya ndeko na ye ya mobali na nkombo Domitien, ezalaki molulu moko monene, oyo na boumeli na yango abomisaki bakangami koleka 2 500 kati na masano elongo na banyama mpe kati na mɔ́tɔ. Nsima na yango, akendaki na Berytus [Beirut], mboka oyo eyangelamaki na Baloma kati na Phénicie, epai kuna asalaki molulu ya bokundoli mokolo ya mbótama ya tata na ye na kobomáká ebele ya bakangami kati na masano ya mindɔndɔ́.”—The Jewish War, VII, 37, ebongolami na Paul kati na búku Josephus: The Essential Writings.
Ezali likambo ya kokamwa te soki búku The Imperial Bible-Dictionary elobi ete: “Baebele ya ntango na kala bazalaki kotalela molulu ya kokundola mikolo na mbótama lokola eteni ya losambo ya bikeko, likanisi oyo lindimisamaki mingi wana bazalaki komona ebele na milulu oyo mizalaki kosalema na boyokani na mikolo yango.”
Baklisto ya sembo ya ekeke ya liboso basanganaki te na momeseno oyo momonisami na lolenge ya mabe kati na Biblia mpe oyo Baloma bazalaki kokumisa na motindo ya nsɔ́mɔ mingi. Lelo oyo, baklisto ya solo bayebi ete masoló ya Biblia na ntina na bokundoli mikolo ya mbótama mazalaki kati na makambo makomamaki mpo na kolakisa bango. (Baloma 15:4) Bazali kobwaka bokundoli mikolo ya mbótama mpamba te milulu motindo wana mizali kopesa lokumu lobongi te epai na moto. Likambo ya ntina koleka, Basaleli ya Yehova, na bwanya nyonso bazali kotya likebi na motindo oyo bokundoli mikolo ya mbótama emonisami kati na Biblia na lolenge ya mabe.
[Elilingi na lokasa 25]
Esika ya masano na Kaisalia