Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/7 lok. 31
  • “Bayebi mongongo na ye”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bayebi mongongo na ye”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/7 lok. 31

“Bayebi mongongo na ye”

“YEHOVA azali Mobateli na ngai.” Oyo ezali maloba ya ebandeli ya Nzembo 23. Makomami mazali lisusu kokokanisa Yehova Nzambe na mobateli ya mpate kati na esakweli ya Yisaya, oyo elobi ete: “Akoleisa etɔnga na ye lokola mobateli, akoyanganisa bana na mpate na mabɔkɔ na ye; akokumba bango na ntolo na ye, akokamba malɛmbɛ baoyo bajali konungisa.”​—Yisaya 40:11.

Bobele bongo, Yesu Klisto akokisami na mobateli ya mpate. Alobaki ete: “Ngai najali mobateli malamu; mobateli malamu akotika [molimo, NW] na ye na mpɔ na bampate.” (Yoane 10:11) Yesu alobaki ete “bampate bakoyokaka mongongo [ya mobateli], akobiangaka bampate na ye na nkombo mpe akokamba bango libanda.” Abakisaki ete “bampate bakobilaka [mobateli] mpɔ ete bayebi mongongo na ye. Bakobila mopaya tɛ kasi bakokima liboso na ye jambi bayebi mongongo na bapaya tɛ.”​—Yoane 10:2-5.

Yehova Nzambe mpe Mwana na ye, Yesu Klisto, babongi mpenza na elilingi oyo elobelami kati na mikapo oyo touti kotánga. Bazali kosalela bampate na bango ya elilingi na boboto mpe na bolingo nyonso. Lokola litomba, bato oyo bakokani na bampate bazali komiyoka ete balingami, bazali na kimya mpe babatelami.

Boyokani wana ekokisami malamu mpenza na oyo ezalaka kati na bampate ya solosolo mpe babateli na yango. Na mobu 1831, John Hartley akomaki na ntina na oyo amonaki kati na likambo yango. Amonaki ete na Grèce, babateli bazalaki na momesano ya kopesa nkombo na bampate na bango. Wana babéngi ye na nkombo na ye, mpate akoyanola na mongongo ya mobateli. Soko mibu 51 na nsima, na mobu 1882, J. L. Porter amonaki likambo motindo moko. Amonaki mpenza babateli “kobelela. . . na mongongo makasi” oyo bampate bakoki koyanola na kolandáká babateli na botosi nyonso. Na mbula bobele moko wana, William M. Thomson akomaki na ntina na makambo oyo mamonisaki ete bampate bakoki kolakisama na kolanda mobateli na bango mpe na koyeba mongongo na ye.

Boyokani motindo wana kati na babateli mpe bampate na bango emonanaki mpe na bambula oyo euti koleka? Ee. Kati na nimero ya Sɛtɛ́mbɛ 1993, ya zulunalo National Geographic, Robyn Davidson, moto moko ya mboka Australie, oyo alingaka koyeba makambo mingi, akomaki makambo malandi na ntina na Rabari, babɔkɔli ya bitongá, na nɔ́rdi-wɛ́sti ya Inde: “Mobateli moko na moko azali na mitindo mingi ya kobénga oyo mikeseni engebene likambo na likambo. Ezali na motindo ya kobénga na ntɔ́ngɔ́ mpo na kokende, lolenge ya kobénga mpo na komema bampate na mai, mpe bongo na bongo. Moto moko na moko ayebi bampate na ye mpenza mpe bampate bayebi nkolo na bango, mpe etongá na ye ekoki komikabola na etongá moko monene mpe kolanda ye na ntɔ́ngɔ́.”

Kozanga ntembe, Yesu amonisaki oyo elobelami na basáli mibembo minei oyo totángi. Lolenge na ye ya komona ebakisaki bosolo na lisese na ye ya bampate oyo bayebi mongongo na ye. Ozali moko kati na bampate ya Yesu? Oyebi mongongo na ye mpe oyokaka yango? Soki oyebi mpe ondimi mateya na ye ete mazali solo mpe soki ozali kotosa mitindá na ye mpe ozali kolanda litambwisi na ye mpo na kosambela Yehova, boye okoki komona bolingo mpe boboto oyo euti na kobatelama ya Yehova Nzambe mpe ya Mwana na ye, Yesu Klisto.​—Yoane 15:10.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto