Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/11 lok. 32
  • “Ezali lolenge oyo baklisto ya solo basengeli kozala”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ezali lolenge oyo baklisto ya solo basengeli kozala”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/11 lok. 32

“Ezali lolenge oyo baklisto ya solo basengeli kozala”

KATI na búku na ye ya mobu 1990 na motó na likambo Arbeit macht tot​—Eine Jugend in Auschwitz (Mosala ebomi yo​—Bolenge kati na Auschwitz), Tibor Wohl, oyo abikaki na bolɔ́kɔ ya Auschwitz akomaki lisoló moko oyo ayokaki wana bakangami mibale bazalaki kosolola. Moko na bango, azalaki moto ya ekólo Autriche, oyo azalaki komitánga “moto azangi kondima.” Nzokande, azalaki kokumisa bakangami oyo bazalaki kolata elembo ya triangle motane mondo​—Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo bazalaki kobénga Batatoli ya Yehova kati na káa.

Moto ya ekólo Autriche alobaki na moninga na ye ete: “Bakendeke etumba te. Bakoki nkutu kolinga ete bango moko bábomama na esika ete bango báboma moto mosusu. Na makanisi na ngai yango ezali lolenge oyo baklisto ya solo basengeli kozala. Nakoyebisa yo likambo moko ya kosepelisa namonaki epai na bango. Tozalaki elongo na Bayuda mpe Bayekoli ya Biblia kati na ndako moko na káa ya Stutthof. Na mikolo wana, Bayekoli ya Biblia bazalaki kosala mosala makasi mpenza na libándá kati na mpiɔ makasi. Tokokaki te kososola lolenge nini bakufaki te. Balobaki ete Yehova apesaki bango nguya. Bazalaki mpenza na mposa ya kolya limpa na bango, mpo ete bazalaki na nzala makasi. Kasi basalaki nini? Bayanganisaki mampa nyonso oyo bazalaki na yango, balyaki ndambo mpe bapesaki ndambo mosusu epai na bandeko na bango, bandeko na bango ya elimo, baoyo bautaki na bakáa mosusu mpe bazalaki mpenza na mposa ya bilei. Mpe bayambaki bango mpe bapwɛpwaki bango. Liboso ya kolya, babondelaki, mpe na nsima bilongi na bango bizalaki kongɛnga na esengo. Balobaki ete moto moko te kati na bango azalaki lisusu koyoka nzala. Na bongo, nakanisaki ete, ‘Baoyo basengeli kozala baklisto ya solo.’ Yango ezali lolenge oyo nazalaki kokanisa ete baklisto ya solo basengeli kozala. Mbɛlɛ ekozala kitoko mingi koyamba na motindo yango baninga oyo bazali koya na nzala makasi awa na Auschwitz!”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto