Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/12 lok. 32
  • “Kimia na Njambe oyo eleki makanisi yɔnsɔ”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Kimia na Njambe oyo eleki makanisi yɔnsɔ”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/12 lok. 32

“Kimia na Njambe oyo eleki makanisi yɔnsɔ”

KATI na lisoló ya bato, emonani ete basaleli ya sembo ya Nzambe basili kokutana na bileko ya mpasi mingi na mayoki. Yango ezali mpe bongo na mikolo na biso, mpo ete tozali kobika na “ntango na mpasi”! (2 Timɔtɛ 3:1) Ntoma Paulo apesaki baklisto toli oyo ete bábwaka mitungisi na bango epai na Yehova na nzela ya mabondeli. Yango ekoki kobimisa matomba nini? “Kimia na Njambe oyo eleki makanisi yɔnsɔ ekosɛnjɛla mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.”​—Bafilipi 4:7.

“Kimia na Njambe” ezali nini? Ezali bongo ezalela ya motema kokita oyo euti na kozala na boyokani malamu elongo na Mozalisi. Boyokani wana ya penepene ekopesaka biso libɔndisi ete, ata tozali na mpasi, Yehova “akoboya bato na ye tɛ; akotika libula na ye tɛ.”​—Njembo 94:14.

Yango elimboli te ete makambo ya mpasi makoki kokómela biso te. Mokomi na Nzembo akomaki ete: “Moyɛngɛbɛni ajali na makambo mingi na mpasi.” (Njembo 34:19) Kasi kimya ya Nzambe ekoki kopesa libɔndisi. Na lolenge nini?

Paulo akomaki ete kimya ya Nzambe “eleki makanisi yɔnsɔ”​—to lokola ebongolami na Boyokani ya Sika ete “eleki mayele nyonso.” Mitungisi ekoki kopusa biso na kokóma na mayoki ya kobulunganisama na mitindo mikeseni. (Mosakoli 7:7) Nzokande, kimya ya Nzambe ekoki kokitisa biso motema, mingimingi soki tozali na mposa ya “nguya oyo eleki nguya ya bato.”​—2 Bakolinti 4:7, NW; 2 Timoté 1:7.

Lisusu, kimya ya Nzambe ezali libateli. Lokola Paulo akomaki yango epai na Bafilipi, ete ekoki “kosɛnjɛla mitema na bino mpe bikaniselo na bino.” Liloba ya Greke oyo ebongolami na “ekosɛnjɛla” euti na makambo matali basodá oyo ekoki mpenza kopesa likanisi ya basínzílí oyo bazali kokɛngɛla butu na moi kozanga kotika. Bobele bongo, mpe kimya ya Nzambe ekoki kosala lokola mokɛngɛli oyo akosɛnzɛlaka butu na moi likoló na mitema na biso mpe likoló na nguya ya makanisi na biso.​—1 Bakolinti 10:13; kokanisá na Baefese 4:26.

Na kotalela makambo ya mpasi na mayoki oyo tokoki kokutana na yango lelo oyo, kimya ya Nzambe ezali eloko oyo tosengeli kozala na botɔ́ndi mpo na yango, boye te?​—Nzembo 18:2; kokanisá na Exode 40:38.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto