Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
Baklisto ya solo bakonyokolama
KOBANDA na eleko ya Abel, basaleli mingi ya Yehova bazali koyika mpiko na minyoko ya bato ya mangomba. (Luka 11:49-51) Mpe ezali likambo ya kokamwa te, mpamba te Biblia epesi likebisi oyo ete “bango nyonso bazali na mposa na ezaleli na kosambela kati na Klisto Yesu bakonyokolama”! (2 Timoté 3:12) Na yango, lelo oyo na mikili koleka 25, Batatoli ya Yehova bazali na nsé ya epekiseli mpe bazali koyika mpiko na minyoko.
Kati na mokili moko epai kuna Batatoli ya Yehova bazali bobele na nsé ya bipekiseli te kasi bazali lisusu konyokolama na bato ya mangomba, basakoli ya nsango malamu koleka 12 000 bazali kokóba kosala na molende nyonso, bazali koyekola Biblia elongo na bato koleka 15 000. Ya solo, mosala na bango ya kosakola ezali kosalema na mayele. Mingimingi, basalaka makita na bango ya boklisto na nkúku na bandako ya bato, mpe bazalaka na bokɛngi na ntango babyangaka bato oyo bamonisi mposa na makita wana.
Na mikolo miuti koleka bakonzi ya mboka yango basilaki kolɛmbisa mwa moke ezaleli na bango epai na Batatoli, oyo bazali sikawa kokokisa eteni monene ya mosala na bango kozanga kotungisama mingi. Nzokande, bituluku ya mangomba ndenge na ndenge bisalelaki bopusi na bango mpo na kobimisa mikakatano.
Na engumba moko, pene na bato 200 ya lingomba ya molende moleki ndelo, na nkanda nyonso, bazalaki na nzela mpo na koya na ndako moko epai kuna Batatoli ya Yehova soko 50 bazalaki kosala likita na lisangá. Basusu kati na etuluku yango basimbaki mabángá mpe bazalaki kobimisa maloba ya bokumisi lingomba na bango. Emonanaki polele ete mokano na bango ezalaki ya kobundisa Batatoli mpe kobebisa ndako yango. Emonanaki ete bakonzi ya mangomba bazalaki konɔ́nga makita na boumeli ya mwa ntango mpe bazelaki ntango oyo ebongi mpo ete báya kobundisa. Etuluku yango ekómaki mpenza pene ya kokɔta na ndako na ntango bapolísi 15 bakómaki wana mpe bapanzaki bato. Yango ezalaki likambo ya kokamwa mpo na Batatoli, mpamba te moko te kati na bango azalaki na ntango ya kokende kobénga bapolísi.
Nzokande, na mabaku mosusu, batɛmɛli bazalaki kolónga. Batatoli mingi bafundamaki mpe bakatelamaki etumbu ya bolɔ́kɔ. Likambo moko ya kosambisa etikalaki naino kozanga kosambisama na boumeli ya bambula mingi, mpe emonanaki ete basambisi bazalaki kotyela yango likebi te. Nzokande, na bopusi ya bakonzi ya mangomba ya mboka wana, likambo yango efundamaki lisusu mpe Motatoli yango apesamelaki etumbu ya bolɔ́kɔ.
Na esika mosusu etuluku moko ya Batatoli bayanganaki na Elambo ya Mpokwa ya Nkolo. Na nsima ebele ya bapolísi bayaki kokanga nkolo ndako mpe nkulutu oyo akambaki likita. Na ntango bakómaki na biro ya bapolísi, babɛtamaki makasi. Na boumeli ya bangonga mingi banyokolaki bango wana bazalaki kotuna bango mituna. Banyokolaki mpe Motatoli mosusu na kokɔtisáká ye kati na libulu ya mayi ya mpiɔ.
Mpo na nini bapolísi bazalaki kobimisa monyokoli motindo wana? Lisusu, etuluku moko ya bato ya lingomba ya molende ya kolekisa ndelo, na kosungamáká na bakonzi ya lingomba ya mboka yango, bazalaki kopusa bapolísi. Na nsima, mokonzi ya bapolísi alobaki ete bazalaki kokanga bango kozanga ete ye apesa etinda. Asɛngaki bolimbisi, bato oyo babimisaki monyokoli wana bazwaki etumbu.
Kati na mokili mobimba Batatoli ya Yehova bazali kokóba kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, ata kati na botɛmɛli makasi. Bazali kolanda toli oyo ya Yesu ete: “Nazali kotinda bino lokola bampate kati na nkoi. Bózala nde na mayele lokola banyoka mpe na bopɔlɔ lokola bibenga.”—Matai 10:16.
[Elilingi na lokasa 31]
Abele azalaki moto ya liboso oyo anyokwamaki