Molulu oyo osengeli kozangisa yango te
“Makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi” mautaka epai ya Nzambe, Tata na biso ya likoló. (Yakobo 1:17, NW) Likabo lileki monene oyo Nzambe apesaki epai na bato ya masumu mpo na lisiko na bango, ezali bongo Mwana na ye mobotami-bobele-moko, Yesu Klisto. Liwa ya Mosikoli na biso Yesu lizali kopesa na bato likoki ya kozwa bomoi ya seko kati na paladiso awa na mabelé. Na Luka 22:19, topesameli etindá ya kokanisa liwa na ye.
Na esengo nyonso, Batatoli ya Yehova bazali kobyanga yo na kosangana na bango mpo na kokokisa etindá oyo ya Yesu Klisto. Molulu yango mpo na mobu oyo mokosalema nsima na kolala ya moi na dati oyo ekokani na 14 Nisan, engebene manáka ya Biblia; na yango, ekozala bongo mokolo mwa Mibale na 2 Apríli 1996. Komá dati yango mpo ete obosana yango te. Batatoli ya Yehova na kartyé na yo bakoki koyebisa yo ngonga mpe esika ya sikisiki epai kuna likita yango ekozala.