Asalelaki Yehova na komikitisa nyonso
EZALI te esika ozali kosala nde ezali na ntina, kasi Ye oyo ozali kosalela.” John Booth azalaki kolinga koloba liloba wana mingi, mpe akokisaki yango kati na bomoi na ye. Bomoi na ye awa na mabelé, oyo esukaki na Mwayambo, 8 Yanuáli 1996, emonisaki polele nani oyo ye aponaki kosalela.
Wana azalaki elenge, na 1921, John Booth azalaki koluka ntina ya bomoi. Azalaki molakisi kati na Eteyelo ya Lomingo na Église réformée hollandaise, kasi aboyaki koyekola mpo na kokóma ministre ya lingomba mpamba te azalaki komona ete bakonzi ya lingomba bazalaki na ezaleli ya moimi. Na ntango amonaki piblisité na ntina na lisoló moko oyo ezalaki na motó ya likambo “Bamilió ya bato oyo bazali na bomoi lelo oyo bakokufa te,” asɛngaki nokinoki mikanda oyo milobelamaki kati na piblisité yango. Lokola makambo oyo atángaki masepelisaki ye mingi, nokinoki, akómaki kokende koyangana na makita ya Bayekoli ya Biblia, lolenge Batatoli bazalaki kobéngama na eleko wana, na ntáká ya bakilomɛ́tɛlɛ 24 na velo. Abatisamaki na 1923 mpe abandaki kosakola ndako na ndako kati na etúká ya Wallkill, na New York, epai kuna libota na ye ezalaki na ebokwelo mpo na kosala miliki.
Ndeko Booth abandaki mosala ya ntango nyonso na Apríli 1928. Asakolaki na mboka na ye mpe na bamboka mike ya súdi ya États-Unis, kosombitinyáká mikanda oyo mikolimbolaka Biblia na bilei mpe na esika ya kolala. Akutanaki na makambo ya mpasi, lokola basáli na masanga makasi, baoyo babangisaki ye na mandóki, moko na bango abɛtaki lisasi mpe ezokisaki moninga ya John Booth na mosala ya mobongisi-nzela. Na 1935, Ndeko Booth aponamaki mokɛngɛli-motamboli mpe abandaki kotala masangá mpe bituluku mike kati na mboka mobimba. Abongisaki mayangani mpe asalisaki bandeko mibali mpe bandeko basi ete bálendendela kati na botɛmɛli. Kotɛlɛma ngwi liboso na bituluku ya bato batondi na nkanda, kokamata etɛlɛmɛlo ya ngwi kati na esambiselo, kokɔtisama na bolɔ́kɔ, nyonso wana ezalaki makambo oyo ezalaki kokómela Ndeko Booth mingi. Mokolo mosusu akomaki ete: “Soki nasengeli koyebisa na molai makambo wana ya kolamwisa mayoki, ekosɛnga kokoma búku mobimba.”
Na 1941, Joseph F. Rutherford, oyo azalaki prezidá ya la Société na ntango wana aponaki Ndeko Booth ete akende kosala kati na Ferme du Royaume, pene na Ithaca, na New York. Kuna, asalaki na bosembo nyonso na boumeli ya bambula 28. Bolingo na ye mpo na mosala ya kosakola ekitaki te, na boumeli ya bambula mingi, azalaki na esengo ya kosangana elongo na bankóto ya bayekoli na Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower oyo ebongisaka bamisionɛrɛ, oyo etyamaki kuna kati na Ferme du Royaume kino 1961. Na 1970, basɛngaki na Ndeko Booth ete akende kosala kati na bibokwelo ya Watchtower na Wallkill, na etúká ya New York, mpe na bongo azongaki lisusu na etúká oyo abandaki mosala ya mobongisi-nzela wana esilaki koleka soko mbula 45.
Na 1974, Ndeko Booth aponamaki lokola moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na New York. Akokisaki mokumba wana na bosembo nyonso kino na ntango ya liwa na ye, wana akómaki na mibu 93. John Booth alingamaki mingi mpamba te azalaki na komikitisa mingi mpe azalaki moklisto ya boboto mingi. Liboso ete kolɔngɔ́nɔ́ na ye mpe makasi na ye ekita, azalaki kosakola na bosembo nyonso ndako na ndako mpe na balabála kati na engumba.
Wana baoyo basalaki elongo na ye bazali kolela ye, bazali kozwa kobɔndisama kati na elaka ya Biblia na ntina na baklisto bapakolami, ete basekwisami mpo na bomoi na likoló mpe ete “misala na bango mikobila bango.” (Emoniseli 14:13; 1 Bakolinti 15:51-54) Na ntembe te, likoló ezali efandelo ya sika, kasi kuna, John Booth akozala na likoki ya kosalela Yehova mpo na libela!
[Elilingi na lokasa 32]
John Booth 1902-1996
[Elilingi na lokasa 32]
HERALD-AMERICAN, ANDOVER 1234
76 Jehovites Jailed in Joliet
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Chicago Herald-American