Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/8 nk. 30-31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Masolo mosusu
  • Bantoma batuni elembo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Ndenge oyo toyebi ete Armagedona ekómi pene
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Boyekoli nimero 6—Makomi ya Greke ya boklisto kati na Makomami Mosantu
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Oyo osengeli koyeba mpo na Tata, Mwana mpe Elimo Santu
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/8 nk. 30-31

Mituna ya batángi

Yesu ayebi mokolo oyo Armagedon ekoya?

Emonani ete tozali na bantina malamu mpo na yango tokoki koyanola ete: ee.

Bamoko bakoki kútu kotuna soki mpo na nini motuna oyo motunami. Ekoki mpenza kozala bongo mpo ete Yesu alobaki kati na Matai 24:36, ete: “Mpo na mokolo yango mpe ntango yango, moto ayebi te, ata baanzelu na Likoló te, ata Mwana mpenza te, kasi bobele Tata ayebi.” Tótya likebi na maloba oyo ete “ata Mwana mpenza te.”

Vɛrsɛ́ oyo ezwami kati na eyano Yesu apesaki na ntango bantoma batunaki ye ete: “Makambo oyo makozala ntango nini, mpe nini ekozala elembo ya kozala na yo mpe ya nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo?” (Matai 24:3, NW) Kati na esakweli na ye oyo eyebani mingi na ntina na makambo oyo makomonisa “elembo,” asakolaki bitumba, nzala, koningana ya mabelé, konyokolama ya baklisto ya solo, makambo mosusu oyo masengelaki kobima awa na mabelé mpe komonisa elembo ya kozala na ye. Na nzela ya elembo yango bayekoli na ye basengelaki koyeba ete nsuka ebɛlɛmi. Akokanisaki kobɛlɛma yango na ntango oyo nzeté ya mosuke ebandaka kobimisa nkasa na yango ya sika, komonisáká bongo ete eleko ya molungé ebɛlɛmi. Abakisaki ete: “Bino mpe bongo, wana ekomona bino makambo oyo nyonso, bokoyeba ete azali penepene, ata na bikuke.”​—Matai 24:33.

Kasi Yesu ayebisaki te ntango ya sikisiki oyo nsuka ekoya. Na esika ya kosala bongo, alobaki nde likambo oyo totángaka kati na Matai 24:36. Ekomami bongo kati na Biblia ya Lingala Haut-fleuve, mpe na mabongoli mingi ya mikolo oyo. Nzokande, mabongoli mosusu ya kala mazangi maloba oyo ete “ata Mwana mpenza te.”

Na ndakisa, libongoli ya Katolike ya Douay elobi boye: “Kasi mpo na mokolo mpe ngonga moto moko te ayebi, ata baanzelu ya likoló, kasi bobele Tata.” Libongoli ya Roi Jacques ezali na maloba motindo moko. Mpo na nini liloba “ata Mwana [to, mpe te]” elongolami, nzokande tozali kokuta yango na Malako 13:32? Mpamba te na ebandeli ya ekeke ya 17 ntango mabongoli oyo nyonso mibale masalemaki, bamaniskri oyo babongoli basalelaki ezalaki na maloba yango te. Nzokande, bobele na ntango yango, bayaki kokundola bamaniskri mingi ya kala ya Greke. Bamaniskri wana oyo ekomamaki mpenza pene na eleko oyo Mokanda ya Matai mokomamaki na lokótá ya ebandeli, ezali na maloba “ata Mwana mpenza te” kati na Matai 24:36.

Likambo ya kobenda likebi ezali ete, libongoli ya Katolike oyo ebéngami Bible de Jérusalem ezali mpe na maloba yango, ebakisi na maloba na nsé ya lokasa ete, Vulgate na Latin elongolaki maloba wana, “ekoki mpenza kozala mpo na bantina ya bindimeli.” Ezali mpenza bongo! Ekoki kozala ete babongoli to bakomi oyo bazalaki kondima liteya ya Bosato bapusamaki ete bálongola liloba oyo mpo emonisi lokola ete Yesu azangaki koyeba likambo oyo Tata na ye ayebaki yango. Ndenge nini Yesu akokaki kozanga koyeba likambo moko, soki ye mpe Tata na ye bazalaki kati na Nzambe moko ya bosato?

Bobele bongo, búku A Textual Commentary on the Greek New Testament, ya B.M. Metzger elobi ete: “Liloba ‘ata Mwana mpenza te’ ezangi kati na [bamaniskri] mingi ya matatoli ya makomi ya Matai, bakisá mpe makomi ya Byzantine oyo eyaki kobima na nsima. Epai mosusu, makomi oyo mamonisi malamu mpenza makomi ya Alexandrie, ya Occident, mpe ya Césarée mazali na liloba wana. Kolongolama ya maloba wana mpo na nkaká oyo yango etye kati na bindimeli ezali ntina oyo emonani polele koleka ntina oyo elobi ete maloba wana mabakisamaki na bakomi mpo na kokokanisa yango” na Malako 13:32.​—Biso nde totɛngisi maloba oyo.

“Makomi maleki malamu” ya bamaniskri endimi botángi oyo emonisi likanisi ya boyebi oyo ezali kokóla mokemoke. Baanzelu bayebaki ntango ya nsuka te; ata mpe Mwana te, kasi bobele Tata. Mpe yango eyokani na maloba ya Yesu mazwami na Matai 20:23, epai kuna alobaki ete azalaki na lotómo te ya kopesa bato bisika ya lokumu kati na Bokonzi, kasi bobele Tata nde akoki.

Na bongo, maloba na Yesu ye moko mamonisi ete na ntango azalaki awa na mabelé ayebaki te mokolo oyo ‘nsuka ya mokili’ esengelaki koya. Asilá sikawa koyeba yango?

Emoniseli 6:2 ezali koloba na ntina na Yesu ete afandi likoló ya mpunda mpɛmbɛ mpe abimi “kolónga mpe kolónga lisusu.” Na nsima, elobi na ntina na bafandi na mpunda oyo bazali komonisa bitumba, nzala, mpe malɔ́zi, lokola tosili komona yango uta Etumba ya liboso ya mokili mobimba oyo ebandaki na 1914. Batatoli ya Yehova bandimaka ete na mobu 1914, Yesu atyamaki na kiti lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe na likoló, oyo akokamba etumba oyo ebɛlɛmi mpo na kosilisa mabe awa na mabelé. (Emoniseli 6:3-8; 19:11-16) Lokola Yesu asilá sikawa kopesamela nguya mpo na kolónga na nkombo ya Nzambe, emonani ete tozali na bantina malamu ya koloba ete Tata na ye asili koyebisa ye ntango nsuka ekoya, ntango oyo ‘akosilisa kolónga na ye.’

Biso awa na mabelé toyebisameli mokolo yango te, na bongo maloba oyo ya Yesu mazali kino lelo kotalela biso: “Bókeba mpe bósɛnzɛla, mpo ete boyebi te soko elaka yango ekokoka ntango nini. . . . Oyo mpe nazali koloba na bino, nazali koloba na bato nyonso ete, Bókɛngɛlaka.”​—Malako 13:33-37.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto