Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/10 lok. 32
  • “Yehova ayanolaki na mabondeli na ngai!”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Yehova ayanolaki na mabondeli na ngai!”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/10 lok. 32

“Yehova ayanolaki na mabondeli na ngai!”

NA MOKILI mobimba, Batatoli ya Yehova bazali kotambwisa pene na milió mitano ya boyekoli ya Biblia elongo na bato oyo bamonisi bosepeli mpo na kozwa boyebi ya sikisiki ya Nzambe mpe ya mokano na ye kitoko mpo na bato. Ata bana ya Batatoli ya Yehova bazali kosangana na mosala yango. Tótalela, na ndakisa, elenge mobali moko na nkombo Joel. Amonisaki komipesa na ye epai na Yehova mpe azwaki batisimo ntango akómaki na mibu libwa. Mbula moko na nsima, akutanaki na eksperiansi oyo:

“Wana tozalaki kati na mosala ya kosakola, nakutanaki na mwasi moko na nkombo Candy. Nalakisaki ye mwa búku ‘Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.’ Azalaki na yango, na bongo nalakisaki ye búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Azalaki mpe na yango. Na nsima nakanisaki ete, ‘nakosɛnga na mwasi yango ete tóyekola Biblia.’ Andimaki!

“Ndeko mwasi ya Candy, oyo azalaki kobɛla kansɛr, ayaki kofanda na ye elongo. Lisusu, Candy azalaki kotánga kelasi mpo na kokóma lifulumɛ́. Na yango, na boumeli ya mwa ntango, boyekoli ya Biblia ekatanaki. Kasi ngai mpe baboti na ngai tokóbaki kokutana na ye na kotikeláká ye to mobali na ye Dick bazulunalo. Dick ayebisaki biso ete Candy azalaki kobomba bazulunalo na mbeto mpe kotánga yango na butu.

“Nsukansuka, ndeko mwasi ya Candy akufaki. Ngai, tata mpe mama na ngai tosololaki na Candy na ntina na ezalela ya bakufi. Azwaki ekateli ya kozongela boyekoli ya Biblia. Mokolo mosusu, totunaki Dick soki akosepela koyekola lokola Candy mpe kokómisa yango boyekoli ya libota. Alobaki ete yango ezalaki likanisi malamu. Na bongo, sikawa elongo na tata na ngai, nazali koyekola na Dick mpe Candy. Bazali kosala bokóli malamu mpe bazali kopesa motuya mpo na boyekoli ya Biblia.

“Nazalaki kosala mabondeli mpo na kozwa boyekoli ya Biblia, mpe Yehova ayanolaki na mabondeli na ngai!”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto