Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/12 lok. 32
  • Banani bakozala bapalanganisi ya nsango malamu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Banani bakozala bapalanganisi ya nsango malamu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/12 lok. 32

Banani bakozala bapalanganisi ya nsango malamu?

NA LIKITA moko oyo esalemaki esili koleka mibu soko 40 na lisangá libéngami Conseil mondial des Églises, basangani na yango balendisamaki ete “bápela na elimo ya kopalanganisa nsango malamu” mpe ya koteya bitɔ́nga na bango ete “bákenda kopalanganisa nsango malamu.” Mibu mitano na nsima, John A. O’Brien, mokonzi moko ya Lingomba ya Katolike akomaki na ntina etali kozwa bayekoli ya sika “na kokendáká epai na bango” kasi bobele “na kofandáká na bandako na biso” te. Mpe na Yanuáli 1994, Pápa Jean Paul II alobaki ete oyo ezali “te ntango ya koyoka nsɔ́ni mpo na Evanzile, ezali nde ntango ya kosakola yango longwa na likoló ya ndako.”

Emonani polele ete libyangi wana ya mbala na mbala mpo na bapalanganisi ya nsango malamu lindimamaki te. Lisoló moko kati na zulunalo moko ya mboka Australie, na nkombo Illawarra Mercury elobaki ete: “Bakatolike oyo bayebani mingi na etúká ya South Coast bazali mpenza na mposa te ya komekola lolenge ya kondima ya Batatoli ya Yehova.” Mobali moko alobaki ete kopalanganisa nsango malamu ezali “motindo ya makanisi ya Bakatolike te.” Mosusu amonisaki ete: “Ezali likambo malamu ete Lingomba likoka komitombola, kasi na nzela ya kobɛta bikuke te. Ekoki mbala mosusu kosalema malamu koleka na nzela ya biteyelo to na mwango ya kotindela bato mikanda.” Ata sángó-mokonzi ya katɛdralɛ ya mboka yango ayebaki na sikisiki mpenza te lolenge ya kolimbola maloba ya pápa. Alobaki ete: “Tozali kolendisa bato bátosa makambo ya Evanzile oyo bayebi na nzela ya bomoi na bango moko. Kasi ekómi likambo mosusu soki yango elimboli kobɛta bikuke.” Motó ya likambo ya lisoló ya zulunalo elobelaki yango malamu na mokuse ete: “Bakatolike bakolanda libyangi ya Pápa te ya kokende kosakola.”

Atako boklisto ya nkombo mpamba elóngi te kopalanganisa nsango malamu, koleka milió mitano ya Batatoli ya Yehova bazali kolanda etindá ya Yesu ya ‘kokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso.’ (Matai 28:19, 20; kokanisá na Misala 5:42.) Mosala na bango ya kosakola ndako na ndako ezali sikawa kokokisama na mikili koleka 230. Nsango oyo bazali komema ezali koyikisa mpiko, komonisáká polele bilaka kitoko ya Biblia mpo na mikolo mizali koya. Mpo na nini te kosolola na bango mbala ya nsima oyo bakoya na ekuke na yo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto