“Bozali ndenge ya bato oyo Nzambe alingaka tózala”
NTANGO bazali kosala elongo na bakonzi ya mokili “mpo na Nkolo,” baklisto bakoki ‘kosanzolama [lokola] bato na misala mibongi.’ (1 Petelo 2:13-15) Eleki mwa mikolo, Batatoli ya Yehova na ekólo Afrika ya Sudi bamonaki likambo yango na liyangani ya etúká oyo basalaki na ndako moko ya iniversite.
Na mokolo ya liboso ya liyangani, bapolisi ya iniversite bazalaki kokanisa ete bakoyamba bato oyo basilikaka mpambampamba mpe ya motó makasi mpo ete, na momeseno, ezali lolenge ya bato yango nde bayaka na mayangani oyo esalemaka kuna. Nzokande, lokola basalaki naino na Batatoli ya Yehova liboso te, bakamwaki mpenza mpe basepelaki na bango!
Mpo na kobatela esika yango, bapolisi bazalaki koluka eloko nyonso oyo ekoki kozala likama mpo na bato na motuka nyonso oyo ezalaki kokɔta mpe kobima. Bakamwaki ndenge bayangani bazalaki kopesa bango mbote na boninga, bazalaki na motema molai, mpe na limemya, atako kolukaluka yango ezalaki kolekisa bango ngonga. Moto moko te azalaki na motó makasi mpo ya koswanisa bango mpe kobimisela bango maloba mabe lokola bamesaná koyoka. Mokonzi moko ya bapolisi alobaki ete: “Bino bokeseni na bato mosusu oyo bayaka awa, mpamba te bozali na komikitisa mpe boyebi komipesa lokumu, biso nyonso tozali komona yango.”
Ntango mokonzi ya bapolisi amonaki ete bizaleli ya Batatoli ya Yehova ezali malamu, azwaki ekateli ete ntina ya kolukaluka biloko oyo bikoki kozala likama na mituka ezali te. Alobaki ete, “Mpamba te bozali mpenza na disipilini.” Yango wana, mituka oyo babakaki papye oyo bakomi “TJ” (Batatoli ya Yehova) mikɔtaki kozanga ete bálukaluka na kati na yango.
Ntango liyangani esilaki, mokonzi ya bapolisi alobaki ete azali na elikya ya komona Batatoli ya Yehova kozonga lisusu kuna noki. Abakisaki ete, “Tomoná naino bato ya etamboli malamu boye te. Bozali ndenge ya bato oyo Nzambe alingaka tózala.” Makumisi ya boye mazali ntina mosusu oyo ezali kopusa baklisto ya solo na ‘kozala na bizaleli malamu,’ mpo ete bato ‘bákoka kokumisa Nzambe na mokolo wana ekoya ye kotala.’—1 Petelo 2:12.