“Babangaki Nzambe”
NTANGO Bayisalaele bazalaki na boombo na Ezipito, Sifala na Pua, basi ya Yisalaele oyo bazalaki kobotisa basi bakutanaki na komekama monene. Mpo na kopekisa ete bapaya bábakisama lisusu mingi koleka te, Falo ayebisaki basi yango boye: “Ekobotisa bino basi na Baebele . . . , soko azali mwana mobali, mbɛlɛ bomá ye.”—Exode 1:15, 16.
Sifala na Pua “babangaki Nzambe,” yango wana bazalaki na mpiko mpe “basalaki lokola elakaki bango mokonzi na Ezipito te.” Kasi, batikaki bana mibali na bomoi, atako kosala ndenge yango ezalaki kotya bomoi na bango na likama. Yehova “asalelaki babotisi malamu,” mpe apesaki bango mbano na ndenge babikisaki bomoi ya bana.—Exode 1:17-21.
Lisolo oyo ezali komonisa ete Yehova asepelaka na bato oyo basalelaka ye. Akokaki kotalela makambo oyo Sifala na Pua basalaki lokola kaka mosala moko ya kosunga bato, atako esɛngaki mpiko mpo na kosala yango. Soki totali malamu, mwasi moko te oyo azali na makanisi malamu akolinga koboma bana! Kasi, na ntembe te, Yehova atalelaki likambo oyo ete bato mosusu, mpo na kobanga bato, bandimaki kosala makambo ya nsɔmɔ. Ayebaki ete babotisi wana basalaki bongo mpo bazalaki kaka na boboto te, kasi bazalaki lisusu kobanga Nzambe mpe bazalaki sembo epai na ye.
Tosengeli kozala na botɔndi lokola tosalelaka Nzambe oyo abosanaka te misala malamu oyo tosalaka! Ya solo, mbala mosusu moko te kati na biso akutaná na komekama lokola oyo ya Sifala na Pua. Kasi, ntango tozali sembo mpe tozali kosala makambo malamu, ezala na kelasi, na mosala, to na esika mosusu, Yehova amonaka bosembo na biso mpamba te. Kutu, “akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.” (Baebele 11:6) Ɛɛ, “Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na nkombo na ye, awa esalelaki bino Babulami mpe bozali naino kosalela bango.” —Baebele 6:10.