Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/3 lok. 32
  • Azangá yango banda alongwá na engumba New York

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Azangá yango banda alongwá na engumba New York
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/3 lok. 32

Azangá yango banda alongwá na engumba New York

MALOBA oyo ekomami polele banda bambula ya 1950 na imprimerie moko ya Société Watchtower na Brooklyn, na engumba New York. Maloba yango eyebisaka bato oyo bautaka bakartye mosusu, baturiste mpe bato mosusu oyo balekaka wana ete bátángaka Biblia mokolo na mokolo. Mokanda oyo, euti na elenge mwasi moko Motatoli, emonisi ete bato mingi basalelaka toli yango.

“Nazalaki kosolola na moninga na ngai moko ya kelasi makambo oyo nakosala ntango nakosilisa eteyelo ya ntei. Nalobelaki ye likambo ya Betele, biro monene ya Batatoli ya Yehova, mpe asepelaki mingi mpenza. Ayebisaki ngai ete alekisá bomoi na ye mobimba na engumba New York. Libota na ye ezalaki kosepela na makambo ya losambo te, kasi ntɔngɔ nyonso, ntango azalaki kotala na lininisa ya ndako na bango, azalaki komona maloba oyo: ‘Tángáká Biblia Mosantu, Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo.’ Na yango, mokolo na mokolo liboso akenda kelasi, azalaki kotánga Biblia na ye.

“Na nsima, ntango balongwaki na engumba wana, alobaki ete eloko oyo azangá banda alongwá na engumba New York ezali ete, ntango alamukaka, amonaka lisusu te toli ya kotángaka Biblia na ye. Kasi, mpo na maloba wana oyo bakomá na ndako ya Société Watchtower, akómá na momeseno ya kotánga Biblia; yango wana azali kokoba kotánga yango mokolo na mokolo!”

Eleki malamu kobanda mokolo na kotánga mwa ndambo ya Liloba ya Nzambe. Soki osali bongo, na ntembe te, okosepela na maloba oyo ya ntoma Paulo: “Makomi na bulɛɛ, makoki kopesa yo boyebi mpo na kobika na nzela na kondima kati na Klisto Yesu.”—2 Timote 3:15-17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto