Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/5 lok. 3
  • Akufaki mpo aboyaki kobuka mobeko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Akufaki mpo aboyaki kobuka mobeko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/5 lok. 3

Akufaki mpo aboyaki kobuka mobeko

“MPO na kokanisa August Dickmann (abotamaki na 1910), azalaki Motatoli ya Yehova.” Oyo ezali maloba ya ebandeli oyo ekomami na libaya moko (talá elilingi) bauti kotya na esika oyo kaa ya bakangami ya Sachsenhausen ezalaki. Mpo na nini basaleli Motatoli ya Yehova libaya yango? Maloba oyo bakomi mpo na komonisa likambo yango elandani boye: “Basoda ya SS babɛtaki [ye] masasi na miso ya bato nyonso na mokolo ya 15 Sɛtɛmbɛ 1939 mpo aboyaki kosala mosala ya soda mpo na kotosa mibeko ya Nzambe.”

Batyaki August Dickmann na kaa ya Sachsenhausen na 1937. Mikolo misato nsima ya ebandeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba na 1939, basɛngaki ye atya sinyatili na ye na mokanda moko mpo na komonisa ete andimi kosala mosala ya soda. Lokola aboyaki, komanda ya kaa asɛngaki Heinrich Himmler, mokonzi ya basoda ya SS (Schutzstaffel, basoda oyo bazalaki kokɛngɛla Hitler) ndingisa ya koboma Dickmann na miso ya bakangami mosusu nyonso. Na mokolo ya 17 Sɛtɛmbɛ 1939, zulunalo The New York Times eyebisaki nsango eutaki na Allemagne ete: “Basoda babɛtaki August Dickmann masasi, . . . azalaki na mbula 29.” Zulunalo yango elobaki ete azalaki moto ya liboso ya Allemagne oyo aboyaki kosala mosala ya soda na etumba wana.

Mbula ntuku motoba na nsima, mokolo ya 18 Sɛtɛmbɛ 1999, lisangá moko (Brandenburg Memorial Foundation) ekanisaki liwa ya Dickmann mpe batyaki libaya wana mpo bato oyo bakendaka kotala esika yango bátángaka yango mpo na kokanisa molende mpe kondima makasi oyo Dickmann azalaki na yango. Libaya mosusu oyo ezali na libándá ya lopango ya kaa yango ezali kolakisa bato oyo bakendaka kotala esika wana ete Dickmann azalaki kaka moko kati na Batatoli ya Yehova pene na 900 oyo banyokwamaki na kaa ya Sachsenhausen mpo na kondima na bango. Batatoli mosusu ebele banyokwamaki mpe na bakaa mosusu. Atako bamonaki nsuka na bwale na kati ya bakaa yango, mingi na bango batikalaki sembo mpe batosaki mibeko ya Nzambe.

Batatoli ya Yehova bandimaka ete moklisto asengeli ‘kotosa bakonzi [ya Leta] oyo bazali liboso.’ (Baloma 13:1, NW ) Kasi, soki bakonzi ya Leta baluki kotinda bango bábuka mibeko ya Nzambe, balandaka ndakisa ya bantoma ya klisto, bango balobaki ete: “Ekoki ete tótosa Nzambe liboso ya kotosa bato.” (Misala 5:29) Yango wana, atako lokola bonguna mpe koyinana makasi ezali kati na bikólo mpe bato bazali kosala makambo ya nsɔmɔ, Batatoli ya Yehova na bisika nyonso, balukaka kimya lokola August Dickmann. Balandaka toli ya Biblia oyo elobi ete: “Tiká te ete mabe mazongisa yo nsima, yo zongisá mabe nsima mpo na malamu.”—Baloma 12:21.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto