Nani akosilisa mobulu?
NA SANZA ya Sɛtɛmbɛ 1999, Kofi Annan, secrétaire général ya ONU, ayambaki bakonzi oyo bakendaki na likita monene ya mbala ya 54 ya bikólo ya ONU (assemblée générale annuelle). Zulunalo moko (The Toronto Star) eyebisaki ete, Kofi Annan alobaki na bakonzi ya mokili boye: “Bato ebele mpenza bazali na mposa ete mokili mobimba (communauté internationale) bátika koyokela bango mawa na maloba mpamba. Bazali na mposa ete mokili mobimba bázwa mpenza mokano ya solosolo ya kosalisa bango na kosilisa mobulu oyo ezali kosalema mbala na mbala esika bafandi, mpe mokili mobimba esalisa bango bázala na kimya mpe bázala malamu.”
ONU mpe bikólo nyonso oyo esangani na kati na yango, ekoki mpenza “kozwa mokano ya solosolo” mpo na kosilisa mobulu? Kaka zulunalo yango ezongelaki maloba ya Bill Clinton, prezida ya États-Unis, ye alobaki boye: “Soki totali makila nyonso oyo esopami na ekeke oyo, toyebi ete ezali mpasi te na koloba ete ‘makila ekosopama lisusu bongo te,’ kasi ezali nde mpasi mpo na kokokisa yango.” Alobaki lisusu ete: “Kopesa bilaka mingi ezali mabe ndenge moko na kokanga mabɔkɔ mpe kosala eloko te.”
Esali sikoyo mbula koleka 2 500, mosakoli Yilimia alobaki mpo na milende oyo bato basalaka ete: “Ɛ [Yehova], nayebi ete nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko.” (Yilimia 10:23) Na bongo, elikya nini tozali na yango mpo mobulu esila?
Ndenge totángaka yango na Yisaya 60:18, Nzambe apesaki elaka ete: “Mobulu ekoyokana lisusu kati na mokili na yo te, kobebisama to kopunzama kati na ndelo na yo te.” Esakweli yango ekokisamaki liboso ntango Nzambe alongolaki bato na ye na boombo mpe azongisaki bango na mboka na bango. Ekokokisama lisusu mpo na bato ebele, mpe biso tokoki komona yango. Yehova Nzambe azali ‘kopesa bilaka mingi’ te. Lokola azali Oyo-Aleki-Likoló mpe Mozalisi ya bato, azali na makoki ya kosilisa “mobulu.” Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, mokili mobimba ekozala kimya na kimya. Mobulu ekosila mpo na libela!—Danyele 2:44.