“Ntaba kitoko ya ngomba”
KITOKO ezali liloba oyo mingi kati na biso tokoki te kosalela mpo na kolobela ntaba. Toyebi ete ntaba ezali nyama moko ya ntina oyo tokoki koloba ete elyaka matiti, mosuni na yango ezalaka elɛngi mpe miliki na yango ezalaka malamu, kasi ezali mwa mpasi tóbenga nyama yango kitoko.
Nzokande, Biblia ezali kolobela mwasi lokola “mboloko oyo okoki kolinga mpe ntaba kitoko ya ngomba.” (Masese 5:18, 19, NW ) Salomo, moto oyo akomaki mokanda ya Masese, azalaki kotala malamumalamu banyama na Yisalaele; na ntembe te ezali na ntina oyo asalelaki maloba wana ya elilingi. (1 Mikonzi 4:30-33) Mbala mosusu, na ndakisa ya tata na ye Davidi, Salomo mpe azalaki kotala ntaba ya ngomba oyo eyaka mingi na mboka Ene-gedi, pembeni ya mabongo ya Mbu Ekufá.
Mwa bituluku ya bantaba ya ngomba oyo ezalaka na mokili mokauki ya Yudea ekendaka mbala na mbala na mai ya Ene-gedi. Lokola kaka esika yango nde ezalaka na mai, banda kalakala, Ene-gedi ezalaka esika malamu oyo bantaba ya ngomba ekendaka komela mai. Kutu, ekoki kozala ete nkombo Ene-gedi elimboli “liziba ya mwana,” ezali kondimisa ete bana ya ntaba bazalaki mbala mingi kokende na esika yango. Ntango azalaki kokima Mokonzi Saulo oyo azalaki konyokola ye, Mokonzi Davidi akendaki komibomba kuna, atako azalaki kolala “likoló na mabanga ya ntaba ya [ngomba, NW ].”—1 Samwele 24:1, 2.
Tii na moi ya lelo oyo, na Ene-gedi, okoki komona ntaba mwasi ya zamba, to ntaba ya ngomba, ezali kokita malɛmbɛmalɛmbɛ na ngomba ya mabangamabanga mpe kolanda ntaba mobali na mai. Na ntango yango nde okoki kokanga ntina oyo Salomo akokanisaki ntaba ya mwasi na mwasi oyo azali sembo. Lokola ntaba mwasi ya ngomba ezalaka kimya mpe na kotalela lolenge kitoko na yango ya kotambola, ezali komonisa bizaleli malamu ya bomwasi. Emonani ete liloba “kitoko” ezali kotalela nzoto kitoko to bonzenga ya ntaba ya ngomba.a
Ntaba mwasi ya ngomba ezalaka makasi mpe lolenge na yango ya kotambola ezalaka kitoko. Lokola Yehova alobaki na Yobo, ntaba ya ngomba ebotaka na likoló, na mabanga, bisika oyo moto akómaka te mpe mbala mosusu bilei ezalaka te mpe molunge ezalaka makasi. (Yobo 39:1) Atako mpasi wana, ebatelaka bana na yango mpe elakisaka yango komata mpe kopumbwa na mabanga malɛmbɛmalɛmbɛ ndenge yango moko esalaka. Ntaba mwasi ya ngomba ezalaka na mpiko ya kobatela lisusu bana na yango soki nyama mosusu elingi kokanga yango. Moto moko amonaki ndenge ntaba ya ngomba ezali kobunda na mpɔngɔ na miniti ntuku misato, wana bazalaki kobunda, ntaba ebombaki mwana na yango na nse na yango mpo na kobatela yango.
Mbala mingi, basi mpe bamama oyo bazali baklisto babɔkɔlaka bana na bango na mpasi. Lokola ntaba ya ngomba, bango mpe bamipesaka mpe basalaka nyonso mpo na kokokisa mokumba oyo Nzambe apesi bango. Basalaka na mpiko nyonso mpo na kobatela bana na bango ete bákwea na makama ya elimo te. Yango wana, ntango akokanisaki bango na ntaba ya ngomba, Salomo atyolaki basi te, kasi azali nde kolobela mingi mpenza lokumu mpe kitoko ya mwasi, elingi koloba bizaleli malamu ya elimo na bango oyo emonanaka ata na ntango ya mpasi koleka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Buku moko (The New Brown-Driver-Briggs-Gesenius Hebrew and English Lexicon), elobi ete na esika oyo, liloba ya Liebele chen, oyo babongoli na “kitoko,” elimboli ‘kitoko to bonzenga na bizaleli mpe na nzoto.’
[Bililingi na lokasa 30]
Mwasi mpe mama oyo azali moklisto amonisaka bizaleli kitoko ya elimo ntango azali kokokisa mikumba oyo Nzambe apesi ye