“Ndakisa ya bomoko”
YANGO ezali motó ya likambo ya lisolo moko ebimaki na zulunalo moko na engumba Indaiatuba, na etúká ya São Paulo, na ekólo Brésil. Banani bapesaki ndakisa yango? Moto oyo akomaki lisolo yango alobaki boye: “Batatoli ya Yehova, oyo balingi kotonga ‘Ndako ya Bokonzi’ ya sika, ndenge babengaka batempelo to bandako ya makita na bango, bazali kopesa ndakisa ya malamu oyo ezali komonisa polele ete bazali kosala na boyokani mpe bato nyonso bazali komona yango.”
Bomoko ya Batatoli ya Yehova emonanaka polele na makambo ya ndenge yango. Yango wana lisolo yango elobaki boye: “Ezali esengo na komona mibali, basi, na bilenge ya bolingo malamu bazali kosala elongo na bolingo na bango moko mpo na kotonga esika oyo bakobanda koyangana mpo na kosambela Nzambe.”
Batatoli ya Yehova bazali mpe kopesa ndakisa malamu na makambo mosusu. Lisolo yango ebakisaki boye: “Longola koyekola mpe kobondela, bazali na mokano ya kosalisa bato oyo balangwaka masanga, na baoyo bamelaka bangi; bazali mpe kolakisa bato nzela ya bomoko mpe ya bolingo.” Basalaka ndenge nini? Batatoli bayebi ete koyekola mpe kosalela toli ya Biblia esalisaka moto atika bizaleli ya mabe. Yango wana basalaka makasi mpo na koteya bato mosusu makambo oyo bayekoli na Biblia. Lisolo yango esukisi na koloba ete ndakisa na bango ezali “ndakisa oyo, na ntembe te, esengeli kolanda yango nokinoki.”
Makita ya Batatoli ya Yehova ezali mpo na bato nyonso mpe bakɔngɔlaka mabonza te. Tozali kosɛnga yo okende na Ndako ya Bokonzi oyo ezali penepene na esika ofandi.