Bizaleli malamu ezali na motuya oyo esilaka te
MOKLISTO MOKO YA SEMBO OYO AZALI MOBANGE, ALOBAKI BOYE: “MPO NA ELENGE MOBALI, KITOKO YA NZOTO NA BIZALELI MALAMU EZALI SE ELOKO MOKO.”
Ya solo, banda kalakala bato batyelaka kitoko ya nzoto likebi mingi, yango wana mbala mingi babosanaka bizaleli malamu. Nzokande, ezala tozali kitoko to te, Mozalisi na biso atalaka nde mitema na biso. Na bongo, apesaka ndakisa oyo eleki malamu mpo na kotalela makambo na liso ya moto oyo akɔmeli. Na kati ya Biblia, Nzambe ye moko alobaki boye: “[Nzambe] akotalaka lokola ekotalaka moto te. Moto akomonaka lolenge na libándá nde [Yehova] akotalaka kati na motema.”—1 Samwele 16:7.
Nzambe nde apesaka moto kitoko ya solosolo, mpe Liloba na ye emonisi ete mpo na koyeba motuya ya solosolo ya moto, esengeli nde kotala bizaleli ya elimo. Biblia elobi boye: “Bonzenga ekozimbisa mpe kitoko ezali mpamba, nde mwasi oyo akotosa [Yehova], ye akosanzolama.” (Masese 31:30) Moto mosusu akoki kozala kitoko, kasi azali na bizaleli mabe na motema na ye. (Esetele 1:10-12; Masese 11:22) Kitoko ya nzoto esilaka, kasi kitoko ya kati, elingi koloba bizaleli malamu ya motema, ekoki kokola mpe kotikala mpo na libela.
Yango wana, ezali mpenza malamu tólona bizaleli lokola bolingo, esengo, kimya, motema pɛtɛɛ, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ mpe komipekisa! (Bagalatia 5:22, 23) Na yango, tóluka kokóma na kitoko ya bizaleli, oyo ezali na motuya mingi koleka.—1 Petelo 3:3, 4.