Milende mpo na kosilisa bobola ekolonga?
BAPAYA oyo bakendaka kotala biro monene ya ONU na engumba New York, bamonaka biro ya ebongiseli ya ONU oyo etalaka makambo ya nkita mpe bomoi ya bato (conseil économique et social), epai bansinga na batiyo etikala polele likoló na plafɔ. Mwasi oyo atambwisaka bapaya alimbolaka boye: “Plafɔ oyo ‘esilá te’ etalelamaka lokola elembo oyo eyebisaka ete misala ya ebongiseli ya ONU oyo etalaka makambo ya nkita mpe bomoi ya bato esilaka te; ekozala ntango nyonso na likambo mosusu ya kobongisa na bomoi ya bato na mokili mobimba.”
Atako ebongiseli yango ezali na mokumba ya ntina mingi oyo etali kolendisa bomoi ya malamu mpo na bato nyonso, emonani ete mosala na yango esilaka kaka te. Nzokande, na boumeli ya mosala na ye awa na mabele na ekeke ya liboso ya T.B., Yesu Klisto alobaki ete: “[Elimo, NW] ya Nkolo ezali likoló na ngai, mpo ete apakoli ngai na mafuta ete nasakola na babola Nsango Malamu.” (Luka 4:18) “Nsango Malamu” oyo ye asakolaki ezalaki nini? Ezalaki nsango etali Bokonzi oyo Yehova Nzambe, ye oyo ‘azali esika ya makasi mpo na mobola . . . kati na mpasi na ye,’ akosala mpe akotya Yesu Klisto lokola Mokonzi. Makambo nini Bokonzi yango ekosala? Yisaya asakolaki ete: “[Yehova] na bibele akobongisela mabota nyonso elambo ya bilei ya mafuta, elambo ya vinyo oyo esili koumela, na bilei kitoko bitondi na mafuta mpe na vinyo eumeli mpe eponami. Akosilisa kufa libela mpe Nkolo Mokonzi [Yehova] akokɔmba mpisoli na bilongi nyonso.”—Yisaya 25:4-6, 8.
Olingi koyeba makambo mosusu na ndenge oyo Bokonzi ya Nzambe “ekobongisa bomoi ya bato na mokili mobimba,” na bongo eloko moko ekozanga te? Talá maloba oyo ezali na nse mpo na koyeba ndenge oyo okoki kosɛnga ete moteyi moko ya malamu ayaka kotala yo mpo na komonisa yo oyo Biblia elobi mpo na makambo yango.