Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/5 lok. 19
  • Balongoli nkombo ya Nzambe nsɔni

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Balongoli nkombo ya Nzambe nsɔni
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini nakoki koyokana na molakisi na ngai?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Bana kelasi na mokili ya Nigéria bapambolami mpo na bosembo na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Balakisi​—Mpo na nini tosengeli na bango?
    Lamuká!—2002
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/5 lok. 19

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

Balongoli nkombo ya Nzambe nsɔni

BIBLIA, Liloba ya Nzambe, elobi ete: “Bózala na bizaleli na bino malamu kati na bapakano ete na likambo likotukaka bango bino lokola ete bozali bato mabe, awa ekomona bango misala na bino malamu, bákumisa Nzambe na mokolo wana ekoya ye kotala.” (1 Petelo 2:12) Yango wana, baklisto ya solo basalaka makasi ete bázala ntango nyonso na bizaleli malamu mpo báfingisa nkombo ya Yehova te.

Na engumba Senanga, na kati mpenza ya ekólo Zambie, bayibaki radio ya molakisi moko na ndako na ye. Lokola mokolo yango Batatoli ya Yehova basakolaki na kartye wana, moto yango alobaki ete ezali moto mosusu te, kaka bango nde bayibi radio na ye. Afundaki Batatoli epai na bapolisi. Mpo na kondimisa ete balekaki na ndako na ye, alakisaki trakte moko oyo akutaki na mabele. Kasi, bapolisi bandimaki ye te. Bayebisaki ye azonga epai na ye mpo na koluka malamumalamu moto oyo ayibaki radio na ye.

Bankulutu balendisaki Batatoli oyo basakolaki na kartye wana bákende kokutana na molakisi yango mpo básolola na ye likambo yango. Ndambo na bango bakendaki mpe basololaki na ye, bayebisaki ye ete balingi te ete nkombo ya Yehova efingama. Bayebisaki ye ete bakutaki elenge mobali moko na ndako na ye mpe bapesaki ye trakte wana. Ntango balimbolelaki ye ndenge elenge yango azali, mbala moko molakisi ayebaki ye. Ye na elenge yango bazalaki lingomba moko. Molakisi akendaki kokutana na elenge yango mpe atunaki ye, kasi awanganaki. Na nsima, molakisi asololaki na baboti ya elenge yango mpe azongaki epai na ye. Nsima ya ngonga moko, mama ya elenge yango akendaki kozongisela ye radio oyo ebungaki.

Molakisi ayokaki mawa mpe akutanaki na bankulutu mpo na kosɛnga bango bolimbisi na ndenge oyo akoselaki Batatoli makambo. Bankulutu bandimaki bolimbisi oyo asɛngaki kasi basɛngaki ye ayebisa bato epai oyo amoni radio na ye mpo báyeba ete ezali Batatoli te nde bayibaki yango. Bapesaki liyebisi na eteyelo, mpe na ndenge yango, balongolaki nkombo ya Yehova nsɔni. Batatoli ya Yehova bazali kokoba kosakola na kartye wana kozanga nkaka.

[Karte/​Elilingi na lokasa 19]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

AFRIKA

Zambie

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto