Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/5 lok. 27
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • Tempelo monene ya Yehova na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Sepelá na libaku kitoko ya kosambela na tempelo ya Yehova ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • “Ndako na mabondeli mpo na mabota nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Tósosola ntina na koya na masiya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/5 lok. 27

Mituna ya batángi

Ntango nini “Esika eleki bosantu” epakolamaki, lokola Danyele 9:24 (NW) esakolaki yango?

Esakweli ya Danyele 9:24-27 elobeli komonana ya “Masiya Mokonzi” to Klisto. Na yango, “Esika eleki bosantu” oyo esakolamaki ete ekopakolama, ezali tempelo ya Yelusaleme te. Ezali “Esika eleki bosantu” ya tempelo ya Nzambe na likoló, tempelo na ye monene ya elimoa​—Baebele 8:1-5; 9:2-10, 23.

Ntango nini tempelo ya Nzambe na elimo ebandaki kosala? Tótalela makambo oyo esalemaki na mobu 29 T.B., ntango Yesu akendaki kozwa batisimo. Kobanda ntango wana, Yesu akokisaki maloba ya Nzembo 40:6-8. Na nsima, ntoma Paulo amonisaki ete Yesu abondelaki Nzambe boye: “Olingaki mbeka mpe makabo ya kotombwa te, kasi osili kobongisela ngai nzoto.” (Baebele 10:5) Yesu ayebaki ete Nzambe “alingaki” te bálanda kopesa banyama lokola mbeka na tempelo ya Yelusaleme. Kasi, Yehova abongisaki nzoto ya Yesu, moto ya kokoka, mpo na kopesa yango lokola mbeka. Mpo na komonisa mposa makasi oyo azalaki na yango, Yesu alobaki lisusu boye: “Talá nasili koya, ekomami mpo na ngai kati na mokanda. Ɛ Nzambe, nayei kosala mokano na yo.” (Baebele 10:7) Eyano ya Yehova ezalaki nini? Evanzile ya Matai elobi boye: “Esili ye kobatisama, abimi nokinoki na mai. Mpe talá, likoló epaswami mpe amoni [elimo, NW] ya Nzambe kokita lokola ebenga mpe kokóma likoló na ye. Mpe mongongo uta na likoló elobi ete, Oyo mwana na ngai ya bolingo, nasepeli [na] ye mingi.”​—Matai 3:16, 17.

Lokola Yehova Nzambe andimaki ete nzoto ya Klisto epesama lokola mbeka, emonisaki ete etumbelo monene, oyo eleki etumbelo oyo ezalaki na tempelo ya Yelusaleme, esalemaki. Etumbelo yango ezalaki “mokano” ya Nzambe, to ebongiseli mpo na kondima ete bomoi ya Yesu lokola moto epesama lokola mbeka. (Baebele 10:10) Ndenge oyo Yesu apakolamaki na elimo santu elimbolaki ete Nzambe abimisaki ebongiseli na ye mpo na tempelo ya solo ya elimo.b Yango elingi koloba ete ntango Yesu azwaki batisimo, esika ya Nzambe na likoló epakolamaki, to eponamaki lokola “Esika eleki bosantu” kati na ebongiseli monene ya tempelo ya elimo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba biteni ndenge na ndenge ya tempelo ya Nzambe na elimo, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1996, lokasa 14-19.

b Buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! elobelaki yango na lokasa 195.

[Elilingi na lokasa 27]

“Esika eleki bosantu” epakolamaki ntango Yesu abatisamaki

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto