Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/8 lok. 32
  • Eumelaka mingi koleka wolo ya pɛto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eumelaka mingi koleka wolo ya pɛto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/8 lok. 32

Eumelaka mingi koleka wolo ya pɛto

BATO balukaka wolo mpo ezali kitoko mpe eumelaka. Bato balingaka yango mpo kongɛnga na yango esilaka te mpe egugaka te. Ezali bongo mpo wolo ebebaka te ata soki ezwi mai, mopɛpɛ, sufulu to eloko nini mosusu. Wolo mingi oyo bakutaki na nse ya banzungu oyo bazalaki kolambela yango mpe na bisika mosusu, ebatelaki kaka kongɛnga na yango nsima ya bankama ya bambula.

Nzokande, Biblia elobi ete ezali na eloko moko oyo eumelaka koleka wolo mpe “oyo ezali na motuya monene koleka wolo oyo ebebaka atako bamekaka yango na mɔ́tɔ.” (1 Petelo 1:7, NW) Wolo oyo “emekami,” to epɛtolami na mɔ́tɔ mpe na balolenge mosusu, ekoki kokóma pɛto mpenza. Atako bongo, ezala wolo oyo epɛtolami, ebebaka, to enangwaka, soki ezwi aqua regia, oyo ezali bongo acide hydrochlorique esangani na ndambo ya acide nitrique. Na bongo, Biblia elobi solo ete ‘wolo ebebaka.’

Nzokande, kondima ya solosolo ya boklisto ‘ebikisaka molimo.’ (Baebele 10:39) Bakoki koboma moto oyo azali na kondima makasi, ndenge basalaki mpo na Yesu Klisto. Kasi, Nzambe alaki baoyo bazali na kondima ya solosolo ete: “Zalá sembo kino kufa, mpe nakopesa yo motole ya bomoi.” (Emoniseli 2:10) Bato oyo bazali kokufa na kati ya kondima, Nzambe abatelaka bango na makanisi na ye; mpe akosekwisa bango. (Yoane 5:28, 29) Ata soki wolo ezali mingi ndenge nini, ekoki kosala likambo wana te. Na bongo, kondima ezali mpenza na motuya monene koleka wolo. Kasi, mpo kondima ezala na motuya monene motindo wana, esengeli ete emekama. Petelo alobaki ete ezali ‘kondima oyo emekami’ nde ezali na motuya monene koleka wolo. Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo oyekola Biblia mpo okolisa mpe obatela kondima makasi epai ya Yehova, Nzambe ya solo, mpe epai ya mwana na ye, Yesu Klisto. Yesu amonisaki ete kosala bongo ‘elimboli bomoi ya seko.’​—Yoane 17:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto