“Nsukansuka nayebi nini ezali kotungisa ngai!”
WANA ezali maloba mobali moko oyo afandaka na Tokyo alobaki ntango atángaki lisolo ya bomoi ya ndeko moko, lisolo oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 2000. Lisolo yango ezalaki na motó ya likambo “Oyebi te ndenge bomoi na yo ekozala lobi,” mpe yango elobelaki ndeko mobali moko oyo azalaki misionɛrɛ, oyo abɛlaka maladi ya makanisi, maladi oyo minganga babengaka yango psychoses maniaco-dépressives.
Na mokanda oyo atindelaki bato oyo babimisaka zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mobali wana oyo afandaka na Tokyo, alobaki boye: “Bilembo nyonso ya maladi yango oyo elobelami na zulunalo oyo ekokani mpenza na nyonso oyo ngai nayokaka. Yango wana nakendaki na lopitalo oyo esalisaka maladi ya motó mpe bayebisaki ngai ete nazali kobɛla maladi ya makanisi. Monganga oyo atalaki ngai akamwaki mingi. Alobaki ete, ‘Bato oyo babɛlaka maladi wana, ezalaka mpasi bákanisa ete bazali na maladi yango.’ Nazwaki lisalisi na ndenge nayebaki soki maladi yango ezalaki nini liboso ete ekóma makasi.”
Na bisika mingi kati na mokili, bamilio ya bato bazali kozwa lisalisi na makambo mingi ntango bazali kotánga nimero mokomoko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! Masolo oyo batángaka na bazulunalo wana esalisaka bango báyeba makambo mingi mpe esepelisaka bango mingi. Lelo oyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimisami na minɔkɔ 141, mpe Lamuká! ebimisami na minɔkɔ 86. Yo mpe, soki ozali kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mbala na mbala, ekosalisa yo mingi.