Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/4 lok. 32
  • Ntango oyo ezali Malamu Kokima

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango oyo ezali Malamu Kokima
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/4 lok. 32

Ntango oyo ezali Malamu Kokima

LELO oyo, bato mingi bakómi koloba ete oyo ekoya eya; piká pende to mpe meká nzoto. Mbala mingi, balobaka ete moto oyo akimaka makambo azali makasi te to mpe azali bibangabanga. Ntango mosusu kutu bakoki kobanda kotyola ye.

Kasi, Biblia ezali koloba polele ete ntango mosusu kokima ezalaka malamu mpe emonisaka ete moto azali na mpiko. Yesu Klisto amonisaki bosolo ya likambo yango liboso atinda bayekoli na ye na mosala ya kosakola, ntango ayebisaki bango, ete: “Soki banyokoli bino na mboka moko, bokima na mboka mosusu.” (Matai 10:​23, Boyokani ya Sika) Bayekoli ya Yesu basengelaki kokima bato oyo bazalaki konyokola bango. Atindaki bango te ete bábunda bitumba mpo na kokɔtisa bato na lingomba na makasi. Bazalaki komemela bato nsango ya kimya. (Matai 10:​11-14; Misala 10:​34-37) Na yango, na esika ya kosilika, baklisto basengelaki kokima, to kozala mosika na bato oyo batumoli bango. Na ndenge wana, bakobatela lisosoli ya malamu mpe boyokani ya malamu na Yehova.​—⁠2 Bakolinti 4:​1, 2.

Ndakisa ya mabe na likambo yango ezali na mokanda ya Biblia ya Masese. Elobeli elenge mobali moko oyo, na esika akima komekama, alandaki mwasi ya pite “lokola ngɔmbɛ akei na kobomama.” Asukaki wapi? Amonaki mpasi mingi mpo akweaki na komekama oyo ezalaki motambo mpo na molimo na ye mpenza.​—⁠Masese 7:​5-8, 21-23.

Okosala nini soki omekami na kosala pite to okutani na makambo mosusu oyo ekoki komema na likama? Liloba ya Nzambe emonisi ete ezali malamu kokima, kolongwa nokinoki na esika yango.​—⁠Masese 4:​14, 15; 1 Bakolinti 6:18; 2 Timote 2:⁠22.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto