Tetragrame ezali na kati ya libongoli ya Septante
NKOMBO ya Nzambe, Yehova, ekomami na balɛtrɛ minei ya Liebele יהוה (YHWH) oyo ebengamaka Tetragrame. Banda kala, bato bazalaki kokanisa ete bakopi ya libongoli ya Septante ezali na Tetragrame te. Yango wana bato bazalaki koloba ete ntango bakomi ya Makomami ya Grɛki ya boklisto bazalaki kozongela makambo oyo ezali na Makomami ya Liebele, bazalaki kosalela nkombo ya Nzambe te.
Makambo mingi oyo bato bamonaki na bambula soki nkama oyo euti koleka emonisi ete nkombo ya Nzambe ekomamaki mpenza na kati ya libongoli ya Septante. Buku moko elobi boye: “Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Grɛki bazalaki na mposa mpenza ya kobatela malamumalamu nkombo mosantu ya Nzambe; yango wana, ntango bazalaki kobongola Biblia ya Liebele na Grɛki, bakomaki balɛtɛlɛ ya Tetragrame yango ndenge kaka ezalaka na Liebele na kati ya makomi ya Grɛki.”
Eteni ya papirise oyo ezali awa na lobɔkɔ ya mwasi ya lokasa oyo, ezali kaka moko na kati ya ebele ya bandakisa yango oyo ezali tii lelo. Bamonaki eteni ya mokanda yango na Ezipito, na engumba Oxyrhynchus, mpe bapesaki yango nimero 3522; ekomamaki na ekeke ya liboso na ntango na biso (T.B.).a Ezali na bolai ya santimɛtrɛ 7 mpe bonene ya santimɛtrɛ 10 na ndambo mpe ezali na vɛrsɛ ya Yobo 42:11, 12. Tetragrame oyo tozingi yango mokɔlɔtɔ na fɔtɔ, ekomami na ekomeli ya kala ya Liebele.b
Na yango, nkombo ya Nzambe ekomamaki nde na bakopi ya liboso ya Makomami ya Grɛki ya boklisto? George Howard, moto moko ya mayele oyo alimbolaka maloba ya Biblia, alobi boye: “Lokola bazalaki kaka kokoma Tetragrame na bakopi ya Biblia ya Grɛki [Septante] oyo basalelaki mpo na kokoma Makomami ya lingomba na ebandeli, tokoki mpenza koloba ete ntango bakomi ya K[ondimana] ya S[ika] bazalaki kozongela makambo oyo ezali na Makomami, bazalaki kokoma mpe Tetragrame.” Kasi ezali komonana ete mwa moke na nsima, bakomi babandaki kolongola nkombo ya Nzambe mpe kotya batitre lokola Kurios (Nkolo) mpe Théos (Nzambe) na esika na yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Soki olingi koyeba makambo mosusu oyo etali bapapirise oyo bazwaki na Oxyrhynchus, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 1992, nkasa 26-28.
b Mpo na komona bandakisa mosusu ete nkombo ya Nzambe ezali na mabongoli ya kala ya Grɛki, talá Les Saintes Écritures—Traduction du monde nouveau—avec notes et références, appendice 1C.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 30]
Na ndingisa ya Egypt Exploration Society